Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 78:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Mpe basengeli te kokóma lokola bankɔkɔ na bango,+

      Libota ya motó makasi mpe ya botomboki,+

      Libota ya bato oyo babongisaki motema na bango te+

      Mpe oyo Nzambe atyelaki elimo na bango motema te.+

  • Nzembo 81:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bongo natikaki bango bátambola na motó makasi na bango;+

      Bazalaki kotambola na batoli na bango moko.+

  • Nzembo 95:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mbula ntuku minei (40) nayokaki libota yango mpii,+

      Bongo nalobaki ete:

      “Bazali bato oyo motema na bango ezali kowayawaya,+

      Mpe bayebi banzela na ngai te”;+

  • Yisaya 1:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+ Mokomoko na bango azali moto oyo alingá kanyaka+ mpe moto oyo alandelaka makabo.+ Bazali kokata na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá; mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá ekómelaka bango te.+

  • Yisaya 65:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Natandi mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya bato ya motó makasi,+ oyo bazali kotambola na nzela oyo ezali malamu te,+ oyo bazali kolanda makanisi na bango;+

  • Yirimia 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na ntango yango, bakobenga Yerusaleme ete kiti ya bokonzi ya Yehova;+ mpe bato ya bikólo nyonso bakoyanganisama epai na ye+ mpo na nkombo ya Yehova na Yerusaleme,+ mpe bakolanda lisusu te motó makasi mpe motema mabe na bango.”+

  • Yirimia 11:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Kasi bayokaki te mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi bazalaki kaka kotambola, moto na moto, na motó makasi mpe motema mabe na bango;+ na yango nayeiselaki bango maloba nyonso ya kondimana oyo, oyo napesaki bango mitindo ete básalela, kasi basalelaki yango te.’”

  • Yirimia 18:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe balobaki ete: “Wapi!+ Mpo tokolanda kaka makanisi na biso moko, mpe tolingi moto na moto kokokisa motó makasi ya motema na ye ya mabe.”+

  • Hosea 11:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe bato na ngai balingi se kozanga bosembo epai na ngai.+ Mpe bazali kobenga bango na likoló;* ata moto moko te azali kotɛlɛma.

  • Misala 7:51
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 51 “Bato ya mitó makasi mpe bazangá kokatama ngenga na mitema+ mpe na matoi, bozali ntango nyonso kotɛmɛla elimo santu; ndenge bankɔkɔ na bino basalaki, bino mpe bozali kosala bongo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto