Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpo ‘talá, nazali kobengisa mabota nyonso ya makonzi ya nɔrdi,’ yango nde liloba ya Yehova;+ ‘mpe bakoya mpenza mpe mokomoko na bango akotya kiti na ye ya bokonzi na esika ya kokɔta na baporte ya Yerusaleme,+ mpe liboso ya bifelo na yango zingazinga mpe liboso ya bingumba nyonso ya Yuda.+

  • Yirimia 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bótɛlɛmisa elembo epai ya Siona. Bóluka esika ya komibatela. Bótɛlɛma te.” Mpo nazali koyeisa mpasi moko longwa na nɔrdi,+ ɛɛ libebi moko monene.

  • Yirimia 6:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Talá oyo Yehova alobi: “Talá! Ekólo moko ezali kouta na mokili ya nɔrdi, mpe talá ekólo moko monene oyo ekolamuka longwa na nsukansuka ya mabele.+

  • Habakuku 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo talá nazali kobimisa Bakaladea,+ ekólo ya nkanda makasi mpe ya motema mɔtɔmɔtɔ, oyo ezali kokende na bisika ya mabele oyo ezali polele mpo na kozwa bisika ya kofanda oyo ezali ya yango te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto