Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 31:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Talá! Ozali kolala esika moko na bankɔkɔ na yo;+ mpe bato oyo bakotɛlɛma+ mpenza mpe bakosala pite na banzambe ya bapaya ya mokili epai bazali kokende,+ na kati na bango, mpe bakobosana ngai+ mpenza mpe bakobuka kondimana na ngai oyo nasalaki ná bango.+

  • 2 Bakonzi 17:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe esalemaki bongo mpo bana ya Yisraele basalelaki Yehova Nzambe na bango lisumu,+ ye oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito na lobɔkɔ ya Farao mokonzi ya Ezipito,+ mpe babandaki kobanga banzambe mosusu;+

  • Ezekiele 16:59
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 59 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai mpe nakosala mpenza epai na yo kaka ndenge osali,+ mpo otyolaki ndai na ndenge obukaki kondimana na ngai.+

  • Hosea 6:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi bango, babuki kondimana+ lokola moto ya mabele. Wana nde esika basaleli ngai makambo na bokosi.+

  • Baebre 8:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 ekozala te na kolanda kondimana+ oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango na mokolo oyo nasimbaki lobɔkɔ na bango mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito,+ mpo batikalaki te na kati ya kondimana na ngai,+ yango wana natikaki kobatela bango,’ Yehova alobi bongo.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto