Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 75:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Mpo kɔpɔ ezali na lobɔkɔ ya Yehova,+

      Mpe vinyo ezali kobimisa fulufulu, etondi na biloko oyo esangisami.

      Mpe akosopa mpenza mbɔtɔ na yango;

      Bato mabe nyonso ya mabele bakosilisa yango, bakomɛla yango.”+

  • Yisaya 29:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bótikala monɔkɔ polele mpe bókamwa;+ bókanga miso, mpe bókangama miso.+ Bango balangwe,+ kasi na vinyo te; batengitengi, kasi na masanga oyo elangwisaka te.+

  • Yisaya 51:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Ee Yerusaleme, lamuká, lamuká, tɛlɛmá,+ yo oyo omɛli na lobɔkɔ ya Yehova kɔpɔ ya nkanda makasi na ye.+ Kɔpɔ ya monene, kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu, omɛli yango, osilisi yango.+

  • Yisaya 63:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe nakobaki konyatanyata bato ya bikólo na nkanda na ngai, mpe nabandaki kolangwisa bango na nkɛlɛ na ngai+ mpe kosopa na mabele makila na bango oyo ezalaki kopunzwapunzwa.”+

  • Yirimia 25:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bómɛla, bólangwa, mpe bósanza, mpe bókwea, na bongo bókoka kotɛlɛma lisusu te+ mpo na mopanga oyo nazali kotinda na kati na bino.”’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto