26 Ee mwana mwasi ya bato na ngai, kangá ngɔtɔ na loketo+ mpe omibalola na putulu ya mɔtɔ.+ Lelá ndenge balelaka mwana kaka moko ya mobali, kolela ya mawa;+ mpamba te mopunzi akobimela biso na pwasa.+
31 Mpe basengeli komisala libandi, ɛɛ libandi, mpo na yo,+ mpe bakokanga ngɔtɔ na loketo,+ mpe bakolela yo na kolela ya mawa na molimo,+ ná koganga ya kolela ya bololo.