Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 mpe mpo otombola miso na yo na likoló mpe omona mpenza moi ná sanza mpe minzoto, limpinga nyonso ya likoló, mpe olengolama mpenza mpe ogumbamela yango mpe osalela yango,+ biloko oyo Yehova Nzambe na yo akabelá bato ya bikólo nyonso oyo bazali na mabele mobimba.+

  • Kolimbola Mibeko 17:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe akei kosambela banzambe mosusu mpe agumbameli bango to agumbameli moi to sanza to limpinga nyonso ya likoló,+ eloko oyo napeseli mitindo te,+

  • 2 Bakonzi 17:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe bazalaki se kotika mibeko+ nyonso ya Yehova Nzambe na bango mpe bamisalelaki bikeko ya ebende oyo enyangwisami,+ bana-ngɔmbɛ mibale,+ mpe basalaki nzete moko ya losambo+ mpe babandaki kogumbamela limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela Baala;+

  • 2 Bakonzi 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe alongolaki banganga-nzambe ya banzambe-bapaya, oyo bakonzi ya Yuda batyaki mpo bábimisaka milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná na kati ya bingumba ya Yuda mpe na bisika oyo ezali zingazinga ya Yerusaleme, ná baoyo bazalaki kobimisela Baala+ milinga ya mbeka, mpo na moi mpe mpo na sanza mpe mpo na maboke ya minzoto ya zodiake mpe mpo na limpinga nyonso ya likoló.+

  • Yobo 31:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Soki nazalaki komona pole ntango ezalaki kongɛnga,

      To sanza ezali kongɛnga wana ezalaki kotambola,+

  • Yirimia 8:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bakotanda yango mpenza liboso ya moi, ya sanza mpe ya limpinga mobimba ya likoló oyo bango balingaki, oyo bango basalelaki, oyo bango balandaki,+ oyo bango balukaki mpe oyo bango bagumbamelaki.+ Ekosangisama esika moko te, mpe ekokundama te. Ekokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.”+

  • Yirimia 44:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 kasi tokosala mpenza liloba nyonso oyo ebimi na monɔkɔ na biso,+ mpo na kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka+ mpe kosopela ye makabo ya masanga,+ ndenge biso+ ná bankɔkɔ na biso,+ bakonzi na biso+ ná bankumu na biso tosalaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme, ntango tozalaki kotonda na limpa mpe tozalaki bato ya bomɛngo, mpe tomonaki mpasi ata moke te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto