Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Ntango sanza ya nsambo+ ekómaki, bana ya Yisraele bazalaki na kati ya bingumba na bango. Mpe bato babandaki koyangana lokola moto moko+ na Yerusaleme.+

  • Yisaya 11:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe ya solo, akotombola elembo mpo na bikólo mpe akoyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná;+ mpe bato ya Yuda oyo bapalanganá, akoyanganisa bango uta na nsuka minei ya mabele.+

  • Yirimia 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Na mikolo yango, ndako ya Yuda ná ndako ya Yisraele+ bakotambola elongo,+ mpe bakobima elongo na mokili ya nɔrdi mpo na kokɔta na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino libula.+

  • Yirimia 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo, “talá! mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakoyanganisa bakangami ya bato na ngai, Yisraele mpe Yuda,”+ Yehova alobi bongo, “mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bango, mpe bakozwa mpenza yango lisusu.”’”+

  • Ezekiele 37:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe sangisá yango ekóma eteni kaka moko ya nzete, mpe yango ekokóma mpenza kaka moko na lobɔkɔ na yo.+

  • Mika 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Nakoyanganisa mpenza Yakobo, ɛɛ, yo mobimba;+ solo mpenza, nakosangisa esika moko bato ya Yisraele oyo batikali.+ Nakotya bango na bomoko, lokola bibwɛlɛ na lopango, lokola etonga na kati ya esika ya kolya matiti;+ makɛlɛlɛ ya bato ekozala kuna.’+

  • Baroma 11:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 mpe na ndenge yango Yisraele+ mobimba ekobika. Kaka ndenge ekomamá ete: “Mosikoli akouta na Siona+ mpe akolongola epai ya Yakobo misala ya kotyola Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto