12 Mpe ya solo, akotombola elembo mpo na bikólo mpe akoyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná;+ mpe bato ya Yuda oyo bapalanganá, akoyanganisa bango uta na nsuka minei ya mabele.+
8 kasi, ‘Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abimisaki mpe amemaki libota ya ndako ya Yisraele uta na mokili ya nɔrdi mpe uta na mikili nyonso epai napalanganisaki bango,’ mpe bakofanda mpenza na mabele na bango.”+
12 Ndenge moto atyaka likebi na etonga na ye,+ oyo azali koleisa na mokolo oyo akómi na katikati ya bampate na ye oyo epalanganaki,+ ndenge yango nde nakotyela bampate na ngai likebi; mpe nakobikisa yango na bisika nyonso oyo yango epalanganaki na mokolo ya mapata mpe ya molili tuu.+