13 Mpo talá! Mosali ya bangomba+ mpe Mozalisi ya mopɛpɛ,+ mpe Ye oyo ayebisaka moto ya mabele nini ezali na makanisi na ye,+ Ye oyo asalaka ete kotana ya ntɔngɔ ekóma molili,+ mpe Ye oyo atambolaka na bisika oyo etombwaná ya mabele,+ Yehova Nzambe ya mampinga nde nkombo na ye.”+
15 Mokolo yango ezali mokolo ya nkɛlɛ, mokolo ya mpasi mpe ya bwale,+ mokolo ya mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya libebi, mokolo ya molili mpe ya kozanga pole,+ mokolo ya mapata mpe ya molili tuu,