Matai 9:29 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 29 Bongo asimbaki miso na bango+ mpe alobaki ete: “Ekómela bino ndenge kondima na bino ezali.” Matai 15:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Bongo Yesu azongiselaki ye ete: “Ee mwasi, kondima na yo ezali monene; ekómela yo kaka ndenge olingi.” Mpe mwana na ye abikaki banda na ngonga wana.+ Marko 9:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Yesu alobaki na ye ete: “Liloba wana, ‘Soki okoki’! Ya solo, makambo nyonso ekoki kosalema epai ya moto oyo azali na kondima.”+ Luka 7:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Mpe ntango baoyo batindamaki bazongaki na ndako, bakutaki moombo yango nzoto kolɔngɔnɔ.+
28 Bongo Yesu azongiselaki ye ete: “Ee mwasi, kondima na yo ezali monene; ekómela yo kaka ndenge olingi.” Mpe mwana na ye abikaki banda na ngonga wana.+
23 Yesu alobaki na ye ete: “Liloba wana, ‘Soki okoki’! Ya solo, makambo nyonso ekoki kosalema epai ya moto oyo azali na kondima.”+