Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 20:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe balamukaki ntɔngɔntɔngɔ, mpe babimaki mpe bakendaki na esobe+ ya Tekoa.+ Mpe ntango bazalaki kobima, Yehoshafate atɛlɛmaki mpe alobaki boye: “Bóyoka ngai, Ee Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme!+ Bóndimela+ Yehova Nzambe na bino mpo bókoka koumela ntango molai. Bóndimela basakoli na ye,+ na bongo bokolonga.”

  • Matai 17:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Alobaki na bango ete: “Mpo bozali na kondima moke. Mpo ya solo nalobi na bino: Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo ete: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende, mpe ezali na eloko moko te oyo bokokoka kosala te.”+

  • Marko 11:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Ya solo nalobi na bino ete moto nyonso oyo alobi na ngomba oyo ete: ‘Pikolamá mpe bwakamá na mbu,’ mpe azali kotya ntembe na motema na ye te, kasi azali na kondima ete oyo azali koloba ekosalema, ekosalema mpe bongo epai na ye.+

  • Luka 17:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Nkolo alobaki ete: “Soki bózalaka na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, mbɛlɛ bolobi na nzete oyo ya sikaminosi ya moindo ete: ‘Pikolamá mpe lonamá na mbu!’ mpe etosi bino.+

  • Yoane 11:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 Yesu alobaki na ye ete: “Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?”+

  • Misala 14:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mobali yango azalaki koyoka ndenge Paulo azalaki koloba, oyo, ntango atalaki ye na likebi mpenza mpe amonaki ete azali na kondima+ mpo akóma malamu,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto