Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 45:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na bongo, ezali bino te nde botindaki ngai awa,+ kasi ezali Nzambe ya solo, mpo atya ngai tata+ ya Farao mpe nkolo ya ndako na ye mobimba mpe moto oyo azali koyangela mokili mobimba ya Ezipito.

  • Danyele 4:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bakɛngɛli+ bapesi mitindo ya likambo yango, mpe basantu nde basakoli ekateli yango, mpo bato oyo bazali na bomoi báyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato+ mpe apesaka yango moto oyo ye alingi kopesa+ mpe atyaka moto oyo aleki moke kati na bato azala mokonzi na yango.”+

  • Luka 22:53
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 53 Ntango nazalaki elongo na bino na tempelo+ mokolo na mokolo bosembolaki lobɔkɔ na bino te mpo na kokanga ngai.+ Kasi oyo ezali ngonga+ na bino mpe bokonzi+ ya molili.”+

  • Yoane 7:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Na yango babandaki koluka kokanga ye,+ kasi ata moto moko te atyaki ye lobɔkɔ, mpo ngonga na ye+ ekokaki naino te.

  • Yoane 10:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Moto moko te abɔtɔli ngai yango, kasi nazali kokaba yango na likanisi na ngai moko. Nazali na lotomo ya kopesa yango, mpe nazali na lotomo ya kozwa yango lisusu.+ Na likambo yango, nazwi mitindo+ oyo epai ya Tata na ngai.”

  • Baroma 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Yango wana, moto oyo azali kotɛmɛla bokonzi atɛmɛli ebongiseli ya Nzambe; baoyo batɛmɛli yango bakosambisama.+

  • Emoniseli 13:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe bapesaki yango nzela+ ya kobunda etumba na basantu mpe kolonga bango,+ mpe bapesaki yango bokonzi likoló ya mabota nyonso mpe mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto