Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 26:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Bakufi na yo bakobika.+ Ebembe na ngai—ekotɛlɛma.+ Bólamuka mpe bóganga na esengo, bino baoyo bofandi na putulu!+ Mpo mamwɛ+ na yo ezali lokola mamwɛ ya yengolongonda,+ mpe mabele yango moko ekobimisa ata baoyo bazangi makasi kati na liwa.+

  • Danyele 12:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe mingi oyo balali na kati ya mabele ya putulu bakolamuka,+ baoyo boye mpo na bomoi oyo ekoumela seko+ mpe baoyo wana mpo na nsɔni mingi mpe koyinama seko.+

  • Yoane 5:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi,+ baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.+

  • Misala 24:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpe nazali na elikya+ epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala,+ ya bayengebene+ mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.+

  • Baebre 11:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Basi bazwaki bakufi na bango na lisekwa;+ kasi bato mosusu banyokwamaki makasi mpo bandimaki te kosikolama na nzela ya lisiko moko boye, mpo bázwa lisekwa moko oyo eleki malamu.

  • Emoniseli 20:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe namonaki bakufi, bato minene ná bato mike,+ batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi.+ Mpe bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto