Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 16:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na yango, bakweaki bilongi na nse mpe balobaki ete: “Ee Nzambe, Nzambe ya bilimo ya bikelamu nyonso ya mosuni,+ moto moko kaka akosala lisumu mpe yo okosilikela liyangani mobimba?”+

  • Yisaya 42:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Talá oyo Nzambe ya solo, Yehova, alobi, ye Mozalisi ya likoló+ mpe Nzambe Monene oyo atandá yango;+ Ye oyo atandá mabele+ mpe mbuma na yango,+ Ye oyo azali kopesa mpema+ na bato oyo bafandi wana,+ mpe elimo na baoyo bazali kotambola wana:+

  • Malaki 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “‘Mwana akumisaka tata;+ mpe mosaleli akumisaka nkolo na ye monene.+ Bongo soki ngai nazali tata,+ wapi lokumu oyo bosengeli kopesa ngai?+ Mpe soki nazali Nkolo Monene, wapi bobangi+ oyo bosengeli kobanga ngai?’ Yehova ya mampinga alobi na bino bongo, Ee banganga-nzambe, bino baoyo bozali kotyola nkombo na ngai.+

      “‘Mpe bino bolobi ete: “Totyoli nkombo na yo na ndenge nini?”’

  • Yakobo 4:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bómikitisa na miso ya Yehova,+ mpe ye akotombola bino.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto