Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 93:2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Kiti na yo ya bokonzi epikamá makasi banda kala;+

      Ozali libela na libela.+

  • Yisaya 40:28
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Oyebi te, oyoká te?

      Yehova, Mozalisi ya mabele nsuka tii nsuka, azali Nzambe mpo na seko.+

      Alɛmbaka te, asilaka makasi mpe te.+

      Mayele na ye ekoki kososolama te.+

  • Habakuku 1:12
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ee Yehova, yo ozali seko na seko.+

      Ee Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, yo okufaka te.*+

      Ee Yehova, oponaki bango mpo bákweisa lisambisi;

      Ee Libanga na ngai,+ otyaki bango mpo bápesa etumbu.*+

  • 1 Timote 1:17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Sikoyo, Mokonzi ya seko,+ oyo akoki kokufa te,+ oyo amonanaka te,+ ye Nzambe kaka moko,+ azwa lokumu ná nkembo libela na libela. Amen.

  • Emoniseli 1:8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Yehova* Nzambe alobi ete: “Ngai nazali Alfa ná Omega,*+ Oyo azali mpe azalaki mpe azali koya, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”+

  • Emoniseli 15:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bazalaki koyemba loyembo ya Moize+ moombo ya Nzambe mpe loyembo ya Mwana-Mpate,+ balobi:

      “Yehova* Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ misala na yo ezali minene+ mpe ezali kokamwisa. Mokonzi ya seko,+ banzela na yo ezali sembo mpe solo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto