Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 17:18-20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ntango akofanda na kiti ya bokonzi na ye, asengeli kokoma mpo na ye moko na buku* mosusu kopi ya Mobeko oyo, oyo ezali epai ya banganga-nzambe Balevi.+

      19 “Akobatela yango epai na ye, mpe asengeli kotánga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye,+ mpo ayekola kobanga Yehova Nzambe na ye, atosa mpe asalela maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe malako oyo.+ 20 Na ndenge yango, motema na ye ekomitombola te likoló ya bandeko na ye, mpe akopɛngwa na mitindo te, akotosa mobeko yango, mpo aumela mingi na bokonzi na ye na kati ya Yisraele, ye ná bana na ye.

  • Nzembo 119:105
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 105 Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai,

      Mpe pole mpo na nzela na ngai.+

  • 2 Timote 3:16, 17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.+ Ezali na litomba mpo na koteya,+ kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na bosembo,*+ 17 mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto