Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 41:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Bongo moto oyo ayebi misala ya mabɔkɔ azali kolendisa mosali bibende;+

      Moto oyo ayeisaka biloko sɛlisɛli na marto ya kotulela

      Azali kolendisa moto oyo azali kobɛta marto na elondo*

      Alobi mpo na sudire ete: “Ezali malamu.”

      Na nsima bakangisaki yango makasi na nsɛtɛ mpo eningana te.

  • Yisaya 46:6, 7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Ezali na bato oyo babimisaka wolo na potɔmɔni mpe basopasopaka yango;

      Bamekaka kilo ya palata na emekeli-kilo.

      Bafutaka mosali-bibende, mpe asalaka na yango nzambe.+

      Na nsima, bafukamelaka yango, ɛɛ, basambelaka yango.*+

       7 Bamemaka yango na mapeka na bango;+

      Bakumbaka yango, batyaka yango na esika na yango mpe etɛlɛmaka kaka wana.

      Elongwaka te na esika na yango.+

      Babelelaka yango, kasi eyanolaka te;

      Ekoki kobikisa moto te na ntango ya mpasi.+

  • Yirimia 10:3, 4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpo mimeseno ya bato ya bikólo ezali kaka ndɔtɔ mpamba.

      Ezali kaka nzete oyo moto akati na zamba,

      Moto ya misala ya mabɔkɔ asali yango na mabɔkɔ na ye na nzela ya esaleli na ye.*+

       4 Bakómisaka yango kitoko na palata mpe na wolo+

      Bakangaka yango makasi na bansɛtɛ mpe na bamarto, mpo ata moko te ekwea.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto