Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 40:20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Aponi nzete mpo ezala likabo na ye,+

      Nzete oyo ekopɔla te.

      Aluki moto oyo ayebi malamu mosala ya mabɔkɔ

      Mpo na kobongisa ekeko* oyo ekotengatenga te.+

  • Yisaya 44:14, 15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Ezali na moto moko oyo mosala na ye nde kokata banzete ya sɛdrɛ.

      Aponaka motindo moko boye ya nzete, nzete ya monene,

      Atikaka yango ekóma makasi na kati ya banzete ya zamba.+

      Alonaka nzete ya lorye, mpe mbula ekolisaka yango.

      15 Na nsima moto asalelaka yango lokola nkoni mpo na mɔtɔ.

      Azwaka eteni na yango mpo ayɔta mɔtɔ;

      Apelisaka mɔtɔ mpe atumbaka limpa.

      Lisusu asalaka nzambe mpe asambelaka yango.

      Akómisi yango ekeko* mpe agumbamaka na nse liboso na yango.+

  • Yisaya 45:20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bóyangana mpe bóya.

      Bópusana elongo, bino baoyo bobiki na bikólo.+

      Baoyo bazali kokumba ekeko* na bango, bayebi eloko te,

      Mpe bazali kobondela nzambe oyo akoki kobikisa bango te.+

  • Habakuku 2:18
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ntina ya ekeko oyo eyemami ezali nini,

      Ntango mosali na yango ayemi yango?

      Ntina ya ekeko ya ebende* mpe moteyi ya makambo ya lokuta ezali nini,

      Ata soki moto oyo asali yango atyeli yango motema?

      Asali banzambe ya mpambampamba oyo elobaka te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto