Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Hagai 1:1-2:23
  • Hagai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Hagai
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Hagai

HAGAI

1 Na mbula ya mibale ya Mokonzi Dariuse, na sanza ya motoba, na mokolo ya liboso ya sanza yango, Yehova alobaki na mosakoli Hagai*+ mpo na Zerubabele+ mwana ya Shealatiele, guvɛrnɛrɛ ya Yuda, mpe mpo na nganga-nzambe monene Yosua, mwana ya Yehozadake, ete:

2 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bato oyo bazali koloba: “Ntango ya kotonga* ndako* ya Yehova ekoki naino te.”’”+

3 Mpe liloba ya Yehova eyaki lisusu na nzela ya mosakoli Hagai,+ ete: 4 “Oyo nde ntango ya kofanda na bandako na bino oyo eyeisami kitoko na mabaya, nzokande ndako oyo ekómi esika oyo ebebabebá?+ 5 Sikoyo talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bókanisa malamu makambo oyo bozali kosala.* 6 Bozali kolona mingi, kasi bozali kobuka moke.+ Bozali kolya, kasi bozali kotonda te. Bozali komɛla, kasi bozali kosilisa mposa na bino te. Bozali kolata bilamba, kasi bozali kozwa molunge te; moto oyo azali kosala mpo na kozwa lifuti, azali kotya lifuti na ye na saki oyo etondi na madusu.’”

7 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bókanisa malamu makambo oyo bozali kosala.’*

8 “‘Bómata na ngomba mpe bóya na mabaya.+ Bótonga ndako na ngai,+ mpo nasepela na yango mpe mpo nazwa nkembo,’+ Yehova alobi bongo.”

9 “‘Botyaki motema ete bokozwa biloko mingi, kasi bozwi kaka moke; mpe ntango bomemi yango epai na bino, napanzaki yango na mopɛpɛ.+ Mpo na nini?’ Yehova ya mampinga alobi bongo. ‘Mpo ndako na ngai ekómi esika oyo ebebabebá, nzokande mokomoko na bino azali kopota mbangu epai na epai mpo na kobongisa ndako na ye moko.+ 10 Yango wana likoló eboyi kopesa mamwɛ* na yango, mpe mabele eboyi kopesa mbuma na yango. 11 Mpe nasalaki ete kokauka eya na mabele, na bangomba, na mbuma, na vinyo ya sika, na mafuta, mpe na milona oyo ezali kobima na mabele, na bato ná banyama ya mboka, mpe na mosala makasi nyonso ya mabɔkɔ na bino.’”

12 Zerubabele+ mwana ya Shealatiele,+ ná nganga-nzambe monene Yosua, mwana ya Yehozadake,+ mpe bato mosusu nyonso bayokaki mongongo ya Yehova Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Hagai, mpo Yehova Nzambe na bango nde atindaki ye; mpe bato bakómaki kobanga Yehova.

13 Bongo Hagai, momemi-nsango ya Yehova, na kolanda mokumba na ye oyo Yehova apesaki ye, apesaki bato nsango oyo: “‘Nazali elongo na bino,’+ Yehova alobi bongo.”

14 Na yango Yehova alamwisaki elimo+ ya Zerubabele mwana ya Shealatiele, guvɛrnɛrɛ ya Yuda,+ mpe elimo ya nganga-nzambe monene Yosua,+ mwana ya Yehozadake mpe elimo ya bato mosusu nyonso; mpe babandaki kosala mosala na ndako ya Yehova ya mampinga, Nzambe na bango.+ 15 Ezalaki na mokolo ya 24 ya sanza ya motoba na mbula ya mibale ya Mokonzi Dariuse.+

2 Na sanza ya nsambo, na mokolo ya 21 ya sanza yango, liloba ya Yehova eyaki na nzela ya mosakoli Hagai,+ ete: 2 “Nabondeli yo, tuná Zerubabele+ mwana ya Shealatiele, guvɛrnɛrɛ ya Yuda,+ mpe nganga-nzambe monene Yosua+ mwana ya Yehozadake,+ mpe bato mosusu nyonso boye: 3 ‘Nani kati na bino amonaki ndako* oyo na nkembo na yango ya kala?+ Ndenge nini bozali komona yango sikoyo? Soki bokokanisi yango na oyo ya kala, bomoni te ete oyo ezali komonana eloko te?’+

4 “‘Kasi sikoyo, zalá makasi Zerubabele,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe zalá makasi nganga-nzambe monene Yosua mwana ya Yehozadake.’

“‘Mpe bózala makasi, bino nyonso bato ya ekólo,’+ ‘mpe bósala mosala,’ Yehova alobi bongo.

“‘Mpo nazali elongo na bino,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 5 ‘Bókanisa lisusu likambo oyo nalakaki bino ntango bobimaki na Ezipito.+ Mpe elimo na ngai ezali kaka kati na bino.*+ Bóbanga te.’”+

6 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Mbala moko lisusu—etikali moke—nakoningisa likoló ná mabele, mpe mbu ná mokili ekauká.’+

7 “‘Mpe nakoningisa bikólo nyonso, mpe biloko ya motuya* ya bikólo nyonso ekokɔta na ndako oyo;+ mpe nakotondisa yango na nkembo,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

8 “‘Palata ezali ya ngai, mpe wolo ezali ya ngai,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.

9 “‘Nkembo ya ndako oyo ya sika ekozala monene koleka nkembo ya ndako ya kala,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

“‘Mpe na esika oyo nakotya kimya,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.”

10 Na mokolo ya 24 na sanza ya libwa, na mbula ya mibale ya Mokonzi Dariuse, Yehova alobaki na mosakoli Hagai,+ ete: 11 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nabondeli yo, tuná banganga-nzambe mpo na mobeko:+ 12 “Soki moto amemi mosuni mosantu na nsɔngɛ ya elamba na ye, mpe elamba na ye etuti limpa, bilei, vinyo, mafuta to eloko nyonso ya kolya, biloko yango ekokóma mosantu?”’”

Banganga-nzambe bayanolaki: “Te!”

13 Hagai atunaki lisusu: “Soki moto oyo azali mbindo mpo asimbaki ebembe,* asimbi moko ya biloko oyo, eloko yango ekokóma mbindo?”+

Banganga-nzambe bayanolaki: “Ekokóma mbindo.”

14 Bongo Hagai alobaki: “‘Bato oyo bazali bongo, mpe ekólo oyo ezali bongo liboso na ngai,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe mosala nyonso ya mabɔkɔ na bango ezali bongo; nyonso oyo bazali kopesa lokola mbeka ezali mbindo.’

15 “‘Kasi sikoyo, nabondeli bino, bókanisa malamu* likambo oyo banda lelo: Liboso bátya libanga likoló ya libanga mosusu ya tempelo ya Yehova,+ 16 makambo ezalaki ndenge nini? Ntango moto azalaki kokende na esika oyo babombaka mbuma na likanisi ya kozwa bamezire 20, azalaki kokuta kaka 10; mpe soki akei na esika oyo babimisaka vinyo mpo na kozwa mezire 50 ya vinyo, azalaki kokuta kaka 20;+ 17 nabɛtaki bino—mosala nyonso ya mabɔkɔ na bino—na kokauka ya milona, na koguga+ mpe na mbula ya mabanga, kasi ata moko na bino te azongelaki ngai,’ Yehova alobi bongo.

18 “‘Nabondeli bino, bókanisa malamu* likambo oyo banda lelo, mokolo ya 24 ya sanza ya libwa, mokolo oyo moboko ya tempelo ya Yehova etyamaki;+ bókanisa malamu likambo oyo: 19 Ezali lisusu na mboto na kati ya ndako ya kobomba biloko?*+ Vinyo, nzete ya figi, nzete ya mbuma ya grenade ná nzete ya olive, eboti naino mbuma te, boye te? Banda lelo nakotinda lipamboli.’”+

20 Yehova alobaki na Hagai mpo na mbala ya mibale na mokolo ya 24 ya sanza yango,+ ete: 21 “Lobá na Zerubabele guvɛrnɛrɛ ya Yuda boye: ‘Nakoningisa likoló ná mabele.+ 22 Nakokweisa kiti ya bokonzi ya makonzi mpe nakosilisa makasi ya makonzi ya bikólo;+ mpe nakokweisa makalo ná batambwisi na yango, mpe bampunda ná batambwisi na yango bakokwea, moto na moto na mopanga ya ndeko na ye.’”+

23 “‘Na mokolo wana,’ Yehova ya mampinga alobi bongo, ‘nakozwa yo, mosaleli na ngai Zerubabele+ mwana ya Shealatiele,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakokómisa yo lokola lopɛtɛ ya kotya kashɛ, mpo ozali moto oyo ngai naponi,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.”

Elimboli, “abotami na mokolo ya fɛti.”

To, “kotonga lisusu.”

To, “tempelo.”

Lil., “Bótya motema na bino na banzela na bino.”

Lil., “Bótya motema na bino na banzela na bino.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To, “tempelo.”

To mbala mosusu, “ntango elimo na ngai ezalaki kotɛlɛma kati na bino.”

To, “kitoko.”

To, “mbindo mpo na molimo moko.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “bótya mitema na bino na.”

Lil., “bótya mitema na bino na.”

To, “libulu ya kobomba mbuma?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto