MOTUNA 10
Biblia elaki nini mpo na mikolo ezali koya?
“Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”
“Mabele ezali koumela seko.”
“Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”
“Na ntango yango miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama. Na ntango yango motɛngumi akopumbwa lokola serfe, mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo. Mpo mai ekopunzwapunzwa na esobe, mpe mikɛli na mokili patatalu oyo ekauká.”
“Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”
“Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete; mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”