MOTUNA 11
Nini ekómelaka moto soki akufi?
“Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.”
“Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te . . . Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.”
“[Yesu] alobaki na bango ete: ‘Lazare moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi. Nzokande, Yesu alobelaki liwa na ye.’ Kasi bakanisaki ete azali kolobela kopema na mpɔngi. Bongo, na ntango wana Yesu alobaki na bango polelepolele ete: ‘Lazare akufi.’”