Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • igw lok. 26-lok. 27
  • Motuna 17: Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa libota na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuna 17: Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa libota na yo?
  • Maloba ya ebandeli mpo na Liloba ya Nzambe
Maloba ya ebandeli mpo na Liloba ya Nzambe
igw lok. 26-lok. 27

MOTUNA 17

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa libota na yo?

MIBALI/​BATATA

“Na ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango . . . mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko.”

Baefese 5:28, 29, 33

“Batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.”

Baefese 6:4

BASI

“Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”

Baefese 5:33

“Bino basi, bómikitisa liboso ya mibali na bino, mpo ebongi bongo na kati ya Nkolo.”

Bakolose 3:18

BANA

“Bana, bótosaka baboti na bino na boyokani na Nkolo, mpo yango ezali likambo ya boyengebene. ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo’; oyo ezali mobeko ya liboso elongo na elaka: ‘Mpo makambo na yo etambola malamu mpe oumela ntango molai na mabele.’”

Baefese 6:1-3

“Bino bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo yango ezali malamu mingi na kati ya Nkolo.”

Bakolose 3:20

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto