MOTUNA 18
Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?
“Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.”
“Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”
“Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”
“Ya solo, [Nzambe], azali mosika te na mokomoko na biso.”
“Talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango: bolingo na bino ebakisamaka lisusu mingi mpenza ná boyebi ya solosolo ná bososoli mingi mpenza.”
“Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te; mpe akopesa ye yango.”
“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino. Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki, mpe bókómisa mitema na bino pɛto, bino bato ya mitema mibale.”
“Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”