Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Octobre lok. 32
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali na mposa na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi mpo na baoyo bazali na mposa na yango
  • Lamuká!—1993
Lamuká!—1993
g93 Octobre lok. 32

Lisalisi mpo na baoyo bazali na mposa na yango

Lisalisi ezali likambo bato mingi oyo bazali na makanisi malamu balingaka kopesa epai na basusu. Kasi lolenge nini ya lisalisi? Mpe lolenge nini kopesa yango? Moto moko ya boboto akomelaki filiale ya ba Témoins de Jéhovah oyo ezali na Pays-Bas, na Octobre ya mbula euti koleka mpe alimbwelaki lolenge alingaki kosalisa bazalani na ye.

Alimboli ete: “Mokolo ya poso oyo euti koleka, bapesaki ngai trakte moko ya moke oyo ezalaki na motó na likambo Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika. Nazali komona yango ete ezali malamu mingi mpe ezali na nsango moko ya kitoko. Emonani na miso na ngai ete ebongi mpo na kosalisa bato oyo bazali kokutana na mikakatano minene, bato oyo bazali mpenza na mposa ya lisalisi mpe baoyo bakosepela kotanga trakte motindo oyo.

“Pene na eteyelo na ngai (Laurenskerkplein), na Rotterdam, ezali ntango nyonso na bato oyo bazangi mosala, bato oyo bamelaka masanga mingi mpe baoyo bamelaka ba drogues oyo bafandi kozanga mosala. Nalingi ete botindela ngai batrakte wana mingi mpo ete nakoka kopesa bango yango. Mokano na ngai ezali ya kosala na esika na bino te, kasi bobele ya kopesa bango wana ezali ngai koleka, eloko oyo esepelisaki ngai.

“Nakanisi ete bokosalisa ngai na likambo yango. Nazali kotombela bino matomba malamu mingi kati na mosala na bino!”

Ba Témoins de Jéhovah bazali komipesa mingi mpo na kosalisa bazalani na bango ete bayeba makambo mingi likoló na mikano na Nzambe. Soki olingi kozwa ekzamplere moko ya trakte oyo elobelami awa na likoló, to soki olingi boyekoli ya Biblia na ndako na yo kozanga kofuta mbongo, komela association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete-Kinshasa.

[Elilingi na lokasa 32]

Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto