Eteyelo ya sika na Afrika
Euti na mokomani na biso na Nigéria
NA JUILLET 1990, mokanda moko etangamaki oyo epesaki esengo mingi epai na ba Témoins de Jéhovah koleka 400 oyo bamipesá lokola ba volontaires, oyo bafandaka mpe basalaka na filiale ya la Société Watch Tower ya Igieduma, na Nigéria. École de formation ministérielle (to Eteyelo mpo na kobongisama ya basungi), oyo ebandisamaki na États-Unis na 1987, ekómaki na Afrika, mpe bakelasi ya liboso esalemaki na Igieduma!
Na basanza oyo elandaki, libota ya Béthel ekamataki bibongiseli mpo na kelasi ya liboso.a Bayekoli mpe balakisi basengelaki kozwa bisika ya kolala. Ba chambres ezalaki naino ya kokoka te; esengelaki kobakisa ba chambres mosusu 15. Na bongo, Batemwe bakómisaki bandako oyo babombaka biloko ba chambres kitoko. Yango esengaki kotya ba carreaux, kotya langi na bitutu, mpe kotya ba rideaux. Atelier ya mosala na mabaya esalaki bambeto, biloko ya ndako, mpe bamesa. Na nsuka, bakiti, miinda mpo na kotanga mpe bisika ya kotya mikanda ebakisamaki. Bisika ya kotya mikanda etondaki na mikanda ya teokratike.
Epai mosusu, salle ya kominanola ekómaki salle ya kelasi mpe biblioteke mpo na bayekoli. Moko na ba chambres ya mwa lopitalo ekómaki mpo na ntango moke biro ya balakisi mpe batyaki bifandelo, bamesa mpe biloko mosusu ya mosala. Na boumeli ya ntango yango, wana ba Témoins de Jéhovah bayokaki kati na mboka mobimba nsango yango na ba assemblées de circonscription mpe ya district, bakandidá mingi bazalaki kotinda ba demandes na bango.
Poso ya liboso ya sanza ya Février 1992, makambo nyonso masilaki kolengelama. Balakisi mibale, Michael Purbrick mpe Peter Nicholls bayaki longwa na Angleterre mpo na kolakisa kelasi ya liboso. Longola bayekoli 22, balakisi mosusu misato na mikolo mizali koya, Isaiah Mnwe, Isaiah Olabode, mpe Pius Oparaocha, bazalaki mpe wana. Bango bazalaki Batemwe ya Nigéria oyo bayaki mpo na koyekola lolenge ya kolakisa bakelasi oyo ekolanda.
Ntina na eteyelo
Béthel ezalaki kozela likambo yango na motema likoló mpe na esengo mingi. Mpo na nini? Mpamba te eteyelo ekozala na bopusi malamu mpo na mosala ya kozalisa bayekoli na Nigéria. Uta kala, Jéhovah asakolaki ete akopesa “makabo na lolenge na mibali.” (Nzembo 68:18) Asalaki yango na ntango na bantoma, lokola ntoma Paulo akomaki yango na Baefese 4:8-11. Lelo oyo, Jéhovah azali mpe kopesa makabo na lolenge na mibali. École de formation ministérielle ezali ebongiseli ya bolingo mpo na kobongisa bamoko na mibali yango mpo na kokokisa mikumba minene kati na lisangá.
Na Nigéria, Batemwe bazali koleka 160 000 kati na masangá koleka 3 000. Bamoko na masangá yango ezali bobele na nkulutu moko to na bankulutu mibale mpe na mwa basaleli na misala. Masangá mosusu mazali na bateritware minene epai nsango malamu esakolami mingi te. Na bongo, mposa monene ezali ya mibali oyo babongisami bobele mpo na kokamba mosala ya kopalanganisa nsango malamu te, kasi lisusu mpo na kobatela etónga mpe koteya masangá.
Ntina ya École de formation ministérielle ezali ya kobongisa bandeko mibali mpo na kokokisa mikumba wana. Nsima na kozwa mapolomi, bamoko na bayekoli, bazali kokende mosala ya pionnier spécial to mosala ya zongazonga, misala mibale oyo mposa ezali mingi na Nigéria. Basusu bazali kozonga na masangá na bango mpo na kopesa lisalisi mpe kolendisa bandeko. Mibali wana babongisami bazali mpenza lipamboli mpo na masangá!
Kobongisama oyo ekeseni mpenza
Atako École de formation ministérielle ezali kolandana ya École de Galaad (Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, oyo ezali kobongisa bamisionere mpo na mosala na mikili ya bapaya), programme na yango ekeseni mpenza. Na boumeli ya baposo mwambe, bayekoli bazali komipesa na boyekoli mozindo ya Biblia. Bazali kotalela na mozindo mateya mingi ya Biblia, kati na yango mateya mazali kopesa nzela na kokokisa mikumba ya kobatela bampate mpe lolenge ya kosilisa mikakatano na kolanda mitinda ya boklisto. Bazali lisusu koyekola oyo Makomami mazali koteya na ntina na lolenge ya kotambwisa mosala, kosambisa makambo mpe lolenge ya kokoma mpe kobatela mikanda ya lisangá. Bazali kozwa kobongisama malamu mpo na kopesa badiskur liboso ya bato mingi mpe bazali kozwa likebi mpenza ya balakisi ya boboto, oyo bazali kosalisa bango na bokóli na bango ya elimo.
Na nyonso, moyekoli moko na moko azali kozwa mitó na makambo 45 ya kosala lokola mikumba na kelasi mpe azali na bangonga 256 ya mateya. Lisusu, azali na bangonga 140 mpo na kosala badevuare na ndako mpe bangonga 14 mpo na kotalela makambo bayekoli.
Atako mokanda ya ntina oyo bazali kotalela ezali Biblia, bayekoli basengisami na komema na eteyelo baekzamplere na bango moko ya mikanda mosusu 16, mikanda mikolimbolaka Biblia mibimisami na la Société Watch Tower. Na boumeli ya eteyelo, bayekoli bazali mpe kosala bolukiluki mozindo kati na ebele ya mikanda ya biblioteke ya Béthel. Na bongo, basengeli kozala batangi malamu.
Longola misala ya kelasi, bayekoli bazali kosala minite 45 mokolo na mokolo kati na moko to mosusu na ba départements oyo mwambe ya Béthel: kokombola, esika ya kolya, kobongisa libandá, kopetola bandako ya kolala, kolamba, kosukola bilamba, expédition, mpe transport. Bazali kosala bamoko nsima na basusu; boye na nsuka ya baposo mwambe bango nyonso balekaki na moko na moko ya misala wana. Moyekoli moko alobaki ete: “Kosaláká na misala mikeseni nasosoli ete Jéhovah nde azali kotambwisa misala wana.” Mosusu alobaki ete: “Bakɛngɛli bazali pene na kolakisa mpe na kopesa toli na bolingo nyonso.” Mosusu alobaki ete: “Mosala na Béthel ezali libaku kitoko oyo bato nyonso basengeli kosala yango mpo na komona motuya na yango.”
Bandeko mibali bakanisaki nini na ntina na kobongisama na bango? Moko alobaki ete: “[Ezalaki] eteyelo oyo eleki biteyelo nyonso.” Mosusu na esengo nyonso angangaki ete: “Oyo nde ebongiseli kitoko!” Lokola mitema na bango mitondaki na esengo mpe na bosepeli, bayekoli ya kelasi ya liboso bakomaki kati na mokanda ete: “Ekateli na biso ezali . . . ya kopesa bomoi na biso mobimba mpo na nsango malamu.”
Mayoki ya masangá
Na boumeli ya eteni ya liboso ya 1992 mpe ya 1993, bakelasi minei ya liboso ya École de formation ministérielle na Nigéria etambwisamaki. Kati na mokanda ya matɔndi oyo batindelaki Collège central, bayekoli ya kelasi ya mibale bakomaki ete: “Ya solo, tosilá naino kozwa mateya kitoko motindo oyo te. Mateya mazali kitoko mingi koleka mateya oyo mazali kopesama na université. Tondimi maloba oyo ya William Phelps: ‘Boyebi ya Biblia kozanga mateya ya biteyelo minene ya mokili ezali na ntina mingi koleka mateya ya biteyelo minene ya mokili oyo ezangi boyebi ya Biblia.’ Na makambo nyonso, komibanzabanza na bino mpo na biso ezali mpenza komonana polele. Na bongo tozwi ekateli ya kokómisa mosala ya pionnier mosala ya bomoi na biso.”
Lolenge nini bato oyo bazwaki mapolomi bayambamaki na bisika oyo batindamaki? Mokɛngɛli moko ya zongazonga akomaki na ntina na bato mibale oyo bazwaki mapolomi na kelasi ya liboso, oyo batindamaki kosala lokola ba pionniers spéciaux: “Makita mazali sikawa kitoko, mazali kolendisa, ezali esengo na kolanda yango mpe mazali kolobela makambo na mozindo. Mosala ya kosakola ekóli mingi . . . Lisangá ezali na esengo mingi . . . Ntango natunaki na bandeko mosusu na ntina na ba pionniers spéciaux wana, mokɛngɛli-mokambi ayanolaki na mai na miso, kolobáká ete: ‘Tozali kotɔndɔ Jéhovah mpe lisangá na ndenge atindaki basungi babongi mpe ya malamu na lisangá na biso.’”
Nani akoki kokota na eteyelo yango?
Kokota na École de formation ministérielle ata na mboka nini ezali libaku moko ya mosala, lipamboli monene ya Jéhovah. Kozanga ntembe, kobongisama wana ezali kosalisa bayekoli na kokóma mibali oyo bakóli mingi na elimo mpe ezali kobongisa bango mpo ete Jéhovah asalela bango mingi koleka.
Lokola tokoki kokanga ntina na yango, masengami mazali ya kotombwama. Mpo na kokota na eteyelo yango, bakandidá basengeli kozala bankulutu to basaleli na misala kati na lisangá ya boklisto uta koleka mibu mibale. Baoyo basengami mpenza ezali ba pionniers permanents. Bango nyonso basengeli kozala minzemba, mpe kozala na mibu kati na 23 mpe 50. Basengeli te kozala bato oyo bapamelamaki to oyo babimisamaki na lisangá na boumeli ya mibu mitano oyo miuti koleka. Bakandidá basengeli koyeba kotanga, kokoma, mpe koloba monoko ya liboso ya mokili epai eteyelo esalami, mpe basengeli kozala na nzoto kolongono, basengeli te koponapona bilei.
Oyo eleki mpenza, bakandidá basengeli kondima mpe kozala na makoki ya kosala bipai nyonso bakozala na mposa na bango. Yango esengi te bobele mposa makasi ya kosala mokano ya Nzambe, kasi lisusu elimo oyo ezalaki na Yisaya, oyo andimaki na bolingo na ye moko kosala mosala moko ya ntina, kolobáká ete: “Ngai oyo! Tinda ngai.”—Yisaya 6:8.
Ozali na elimo motindo moko? Ezalela na yo ezali kopesa yo nzela na kosangana na libaku kitoko wana ya mosala? Baoyo basalaki yango bazali na mawa te. Moko oyo azwaki lipolomi, oyo azali sikawa kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga, akomaki ete: “Mpo na ngai, École de formation ministérielle ezali likabo oyo ekokani na likabo mosusu te. Ezalaki likambo lileki kitoko kati na bomoi na ngai ya elimo. Soki likoki epesamelaki ngai ya kozongela lisusu bomoi na ngai, mbele nakopona lisusu bobele nzela oyo moko.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Béthel,” na Liebele “ndako ya Nzambe,” ezali nkombo oyo epesami na bandako epai ezwami filiale ya la Société Watch Tower.
[Bililingi na nkasa 28, 29]
Balakisi Isaiah Mnwe mpe Pius Oparaocha
Na ntango ya mateya
Bayekoli bazali kosala mikumba
Kosala bolukiluki na biblioteke
[Bililingi na lokasa 30]
Mosala na esika basukolaka bilamba mpe na expédition