Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Nazali kokóla malamu?
“Nazalaki moko na bana oyo balekaki moke kati na kelasi na biso—mpe oyo azalaki na kilo mingi te. Nazalaki kolinga maboko na ngai te. Nazalaki komona yango ete ekonda mingi. Nasalaki nkutu komande ya bisaleli mpo na kobongisa misisa oyo bazalaki kopesela yango piblisité na ezipeli ya bande dessinée moko. Kasi eloko moko esalemaki te.”—Éric.
“Nazali na molai mingi te. Nazali na mibu 13, mpe nazali bobele na 1,50 mètre. Bato nyonso baleki ngai na molai na kelasi! Ezali na bilenge mibali oyo bazali moke koleka ngai, kasi na ntembe te bakokóla na boumeli ya eleko ya molunge. Nalingaka kozala mokuse te. Nazali komona eloko moko te. Nalingi kokóma molai nokinoki.”—Karine.
MOLAI mingi! Mokuse mingi! Monene mingi! Moke mingi! Oyo ezali bobele matumoli mpamba kati na baninga te. Bilenge mingi bazali komilobela bango moko makambo wana mbala na mbala oyo bazali komitala na talatala. Elenge mwasi moko ya Espagne, nkombo na ye Mari, azali komikundola ete: “Ntango nazalaki na mibu 13, nazalaki koyina zolo na ngai; ezalaki monene mingi. Nazalaki kokanisa ete ebongaki bapasola yango! Lisusu, nazalaki monene. Yaya na ngai ya mwasi azalaki na robe oyo ezalaki kokómisa ye kitoko. Ntango ngai nazalaki kolata yango bato nyonso bazalaki koseka ngai.”
Ntango ozali na eleko oyo babengi “fleur de l’âge,” mingimingi na eleko oyo ya yikiyiki ya mbongwana nokinoki na nzoto mpe na mayoki oyo ete puberté, ezalaka mpasi te mpo na kozala na mayoki ete ozali mabe. (1 Bakolinti 7:36) Nzinganzinga na yo, ozali komona baninga na yo ete bazali kokóla na molai mpe na kitoko. Kasi yo, ozali kokóla te—to ozali kokóla mingi koleka. Bolukiluki moko emonisaki ete 56% ya bilenge oyo batunamaki balobaki ete bazali kosepela te na nzoto na bango. Balukiluki Jane Norman mpe Myron W. Harris balobi ete mingi kati na bilenge oyo bazali kosepela na nzoto na bango te bazali komiyoka ete bazali “mikuse mingi” to “bazali moke mingi.”
Bilenge mingi bazali mpe komitungisa na ntina na bokóli ya binama na bango oyo bikobombamaka; bazali komituna soki bazali mpenza malamu. Kati na mokanda na ye Tomber amoureux (na Lingelesi), Kathryn Watterson Burkhart alimboli ete mpo na bilenge “mayoki ya komilinga, kozala na makoki mpe lokumu etaleli nzoto; ezali bongo likambo ya ntina ete nzoto na bango ezala malamu.” Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete bilenge bazali mbala mingi komitungisa na ntina na makambo (lokola kosala ngalasisi na kelasi) epai nzoto na bango ezali komonana polele na miso ya bilenge mosusu—mpe bazali kokokanisa yango na oyo ya basusu. Elenge mobali moko alobaki ete: “Nasepelaka te kosukola elongo na bana mibali mosusu na kelasi.”
Ozali kotungisama na lolenge nzoto na yo ezali kokóla? Soki ezali bongo, komitungisa te! Ekoki kozala mpenza ete ezali na yango kokóla malamu.
Mpasi ya bokóli
Puberté ezali mwango ya bokoli na ndenge nzoto ya moto esalemá. Ata mpo na Yesu Klisto esalemaki mpe bongo, “akólaki na mayele, mpe na molai.” (Luka 2:52) Na eleko ya puberté, biboteli na yo bizali kokóla.a Kasi ozali mpe kokóla mbala moko, mingimingi mbala mibale koleka ndenge ozalaki kokóla liboso. Daniel ayebisi ete: “Nabandaki kokóla na mbula moko ba centimètres 10. Na mibu 13, nazalaki na 1,80 mètre.”
Na momeseno, bana basi babandaka komona mbongwana ya bokóli kati na nzoto na bango soko mibu mibale liboso ya bana mibali. Na boye ete elenge mwasi ya mibu 12 akoki koleka na molai baninga na ye ya mibali ya kelasi. Kasi yango ekoumela mpo na ntango molai te. Nsima ya bambula mibale to misato, mingi kati na bana mibali bakoleka ye na molai.
Atako bongo, mbongwana ya bokóli mpe ezalaka na mabe na yango. Na momeseno, ezali matambe ya makolo nde ekólaka liboso. Na boumeli ya mwa ntango, ekoki kosalema ete ekozala mpenza na boyokani te na molai ya nzoto na yo. Mokomi Lynda Madaras atangi maloba ya elenge mwasi moko: “Na mibu zomi na moko, nazalaki bobele na molai ya 1,50 mètre, kasi nazalaki kolata sapato ya nimero 38. Nazalaki koloba ete soko matambe ya makolo na ngai malandi kokóla, ekozala monene mingi koleka! Lelo oyo, nazali na mibu zomi na motoba, nazali na molai ya 1,70 mètre, kasi nazali se kolata sapato nimero 38.” Mosika te, makolo na yo, mipende, mpe ntolo na yo ekokóla nokinoki.
Likambo ya mpasi mingi koleka ekoki kozala lolenge oyo ozali komimona na talatala. Mokomi Lynda Madaras alimboli kati na mokanda Qu’arrive-t-il à mon corps? Manuel pour adolescentes (na Lingelesi) ete: “Na boumeli ya eleko ya puberté, elongi na yo ezali kobongwana. Eteni na yango ya nse ezali koya molai, mpe ezali kokóma libungutulu.” Yango ezali solo mpo na bana basi mpe bana mibali. Mbala mosusu esengeli mwa ntango eleka mpo ete elongi na yo ebongisama malamu.
Mpo ete biteni bikeseni ya nzoto na yo bizali kokóla lolenge moko te, mbala mosusu okoki komona ete maboko mpe makolo na yo eleki molai. Christine, oyo na nsima akómaki kitoko ntango akólaki, azali komikundola ete: “Nakanisaki ete maboko na ngai makokita kino na mabelé.” Lisusu, liboso ete nzoto na yo “ezala na boyokani mpe na bomoko kati na mosala na yango na nzela ya bitongeli nyonso,” na boumeli ya mwa ntango okozala na makambo oyo mbala mingi ekosala ete oyoka nsoni.—Baefese 4:16.
Bokóli ya malembemalembe
Kasi, puberté ekoki kozala likambo moko ya kokamwa. Ntango mosusu bakokanisaka elenge mobali ya mibu 12 ete azali mwana mobali ya mokóló oyo azali na mibu 20. Kasi mpo na bilenge mosusu, ba hormones emonani ete ezali kosala te mosala na yango na ntango ekoki. William azali komilela ete: “Nazali moko kati na bana baleki mokuse kati na kelasi na biso. Nazali kosekama mingi mpo na yango.” Soki ozali mokuse mingi mpo na kotala baninga na yo na miso, kobulungana te. Na momeseno, yango elimboli bobele ete nzoto na yo ezali kokóla malembemalembe na kokokanisa na nzoto na bango.b
Ya solo, kozala mokuse mingi to moke mingi kati na baninga na yo, ezalaka ntango nyonso elengi te. Allison, oyo azali na mibu 16, alobi ete: “Nakokani na mwana moke, mpe nazali kosepela bongo te!” Okoki koyeisa nokinoki ebongiseli ya kokóla? Te, kasi okoki kopesa yango nzela. Na Yobo 8:11, Biblia elobi ete: “Matiti-na-mai makokóla nde na esika ezangi potopoto? Fololo-na-mai ekobima nde na esika ezangi mai?” Lokola milona mizali na mposa ya bilei mpe esika ebongi mpo na kokóla, bobele bongo, esengeli na yo kozala na ntango mingi ya kopema mpe kolya biloko ya malamu. Na kolyáká biloko oyo bizali malamu te mpo na bokóli ya nzoto, ozali kopimela nzoto na yo biloko oyo ezali na yango mposa mpo na kokóla malamu.
Longola makambo matali bopeto ya nzoto oyo esengami na bizaleli malamu, ezali na likambo mosusu mpenza te oyo okoki kosala mpo na kokóla. Kasi, nsima na mikolo, okomona mpe mbongwana kati na bokóli ya nzoto na yo. Ya solo, okoki kolanda kokóla nsima wana baninga na yo basili kokóma na molai na bango ya nsuka. Jean azali komikundola ete: “Na kelasi ya minei ezalaki bobele na mwana moko oyo azalaki mokuse mingi koleka ngai. Kasi na mbala moko nakólaki na eleko ya molunge. Ntango nabandaki kelasi ya mitano, nazalaki molai koleka bana mingi mpenza kati na kelasi.” Yango ekundweli biso maloba ya lisese oyo ya kala: “Elikya oyo ezilisami epesi motema mpasi, nde mposa oyo esukisami ezali lokola nzete na bomoi.”—Masese 13:12.
Ya solo, ezali na eloko moko te oyo ezali kondimisa yo ete okozala molai mokolo mosusu lokola mobeti ya lisano ya basket. Soki baboti na yo bazali mokuse, likoki ezali ete yo mpe ozala mokuse. Nzokande, kozala mokuse koleka baninga na yo ekoki kobimisa mikakatano.
Osengeli kosala nini?
Nzambe azali kosambisa moto na ntina na molai na ye te. Kasi bato, na mayele na bango moke, mbala mingi bazali kosala yango. Engebene bolukiluki, bilenge bazali na ezaleli ya kotalela baoyo bazali kokóla malembemalembe lokola ete bazali kitoko mingi te mpe bazali na makasi mingi te lokola baoyo bazali kokóla nokinoki. Bazali nkutu koboya baninga na bango ya kala baoyo bazali na molai ndenge moko te na bango mpo ete bazali komonana lokola bana mike. Yango ekoki kotungisa yo makasi na ntina na lokumu oyo olingi kozala na yango. Bolukiluki moko emonisaki ete mayoki ya komimona ete ozali na ntina te ekoki koumela mingi ata nsima wana okokani na baninga na yo na bokóli ya nzoto.
Osengeli kosala nini soki bokóli na yo ezali koumela? Bilenge mosusu bazali kokima baninga na bango. Nzokande, basusu—mingimingi bana mibali—na mposa ya kobenda likebi likoló na bango moko, bakómi koluka ete bato nyonso bamona bango. Kasi ezali te na komonisáká moko to mosusu na bizaleli wana nde okoki kozala na baninga malamu. Na mikolo mizali koya, bato bakolinga yo na ntina na bomoto na yo, kasi na ntina na nzoto na yo te. Soki ozali kosepela solo na basusu mpe ozali kolona boboto mpe bokabi, bato mingi bakosepela na yo. (Masese 11:25; Bafilipi 2:4) Soki bamoko balandi kotumola yo to kobosana yo, lobela likambo yango polele elongo na baboti na yo. Bakokoka kopesa yo batoli ebongi.
Obosana mpe te ete Nzambe “akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:7) Biblia elobi ete Mokonzi Saulo azalaki moko na mibali balekaki molai mpe kitoko kati na Yisraele. Kasi bomoi na ye lokola mokonzi mpe lokola mobali esimbaki te. (1 Samwele 9:2) Nzokande, mobali moko na nkombo Zakai azalaki “mokuse.” Kasi apambwamaki, na kozwáká libaku kitoko ya koyamba Mwana na Nzambe na ndako na ye. (Luka 19:2-5) Na yango, ezali bomoto na biso ya kati nde ezali na ntina mingi. Mpe soki nzoto na yo ezali kokóla nokinoki te lokola ozali kolinga yango, okoki kolendisama na koyeba ete yango ezali likambo moko ya mabe te. “Ntango ezali mpo na eloko na eloko,” mpe nzoto na yo ekozanga te kokóla lokola esengeli na na eleko ya puberté. (Mosakoli 3:1) Likambo ya kokamwa, ebele na bilenge mosusu bazali komitungisa mpo ete nzoto na bango ezali kokóla nokinoki. Mikakatano na bango ekolobelama na lisoló likolanda kati na molongo oyo ya masoló.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala “Les jeunes s’interrogent. . . ” masoló mabimaki na nimero ya 22 Janvier mpe na nimero ya 8 Février 1990, kati na Réveillez-vous!
b Bato mosusu ya mayele bazali kosenga na bilenge mibali ya mibu 15, oyo bazali komonisa ata elembo moko te ya mbongwana na nzoto na bango na eleko ya puberté, ete bakende kokutana na monganga mpo na kotala soki bazali na bokono moko makasi.
[Elilingi na lokasa 27]
Na momeseno, bana basi babandaka komona mbongwana ya bokóli kati na nzoto na bango soko mibu mibale liboso ya bana mibali. Nzokande mingi kati na bana mibali na nsima bakólaka nokinoki mpe balekaka bana basi na molai