Kobotama ya monzoto na “Zumbu” ya mpongo
● LOLENGE nini minzoto mibotamaka? Mpo na nini minzoto misusu mizali minene mpe na kongɛnga koleka misusu? Fɔtɔ́ oyo bazwaki na lisalisi ya Télescope spatial Hubble, ekoki komonisa lolenge monzoto ebandaka. Mwango oyo ya kokamwa esalemaka na katikati ya oyo babéngi nébuleuse de l’Aigle, lipata ya gaze mpe ya mputulu kati na oyo ebéngami voie lactée.
Kotala yango uta na mabelé, lipata ya gaze mpe ya mputulu (nébuleuse de l’Aigle) ezali na lolenge ya ndɛkɛ ebéngami mpongo oyo efungoli mapapu mpe ebimisi manzaka. Astronɔ́mɛ Jeff Hester mpe ba astronɔ́mɛ mosusu ya Inivɛrsité ya etúká ya Arizona basepelaki kokanga zongazonga ya manzaka fɔtɔ́, manzaka mazalaka yango moko na moko na motindo ya makonzi ekokani na zolo ya nzoku. Na esika oyo ya lipata yango, kongɛnga makasi ebéngami rayonnement ultraviolet oyo ezali kobima wana ezali kokitisa motuya ya oyo babengi molécule d’hydrogène—na maloba mosusu, elongolaka ba électrons na yango.
Bafɔtɔ́ ya Hubble oyo ezali komonisa biloko ndenge na ndenge emonisi bantuku ya biloko bikokani na misapi na bansuka ya makonzi. Na nsɔ́ngɛ́ ya misapi yango, ebele ya matóno ya gaze oyo kati na yango ezalaki na minzoto, mpe engebene baastronɔ́mɛ mosusu ata mpe baplanɛti ezalaki kobotama. Nzokande, bankámá ya minzoto ya sika oyo mibotamaki na nébuleuse de l’Aigle oyo tolobelaki, etindaka mopɛpɛ makasi mpe yango esalaka ete biloko yango bikóma mingi te. Monzoto oyo eleki minzoto mosusu nyonso na kongɛnga, ekoki koleka moi na kongɛnga mbala 100 000, mpe na molungé koleka mbala mwambe. Emonani lokola ete, kongɛnga na yango esili kobebisa bisika bizangi makasi ya nébuleuse. Mwango yango, oyo ebéngami photo-évaporation, ekoki kobebisa monzoto oyo ebotami na kolongoláká biloko oyo bibongisamaki na koyanganisama oyo ekokaki kosalelama na minzoto ya sika. Na bafɔtɔ́, gaze oyo ezali kopanzana emonani lokola milinga oyo ezali komata longwa na likonzi ya gaze mpe ya mputulu.
Mpo ete moko na litɔnɔ (globule) ya gaze yango ebanda kongɛnga, esengeli kozala monene. Bato ya siansi balobi ete bonene na yango esengeli kozala mbala mwambe likoló na monkámá na oyo ya moi. Lisusu, mpo ete pole ekoka kopanzana, esengeli mputulu mingi elongwa na zongazonga na yango. Nzokande, soki litɔnɔ yango eyei monene te mpo na kongɛnga, ekokóma libungutulu ya gaze ya lángi moindo oyo eyebani na nkombo naine brune. Eumeli naino te, banganga-minzoto bautaki komona mpo na mbala ya liboso naine brune.
Bokokani ya mapata ya mputulu kati na nébuleuse de l’aigle na milinga ya mapata oyo emonanaka na mokolo ya mopɛpɛ makasi ekoki kondimisa yo ete mapata ya mputulu ezali mpenza monene te. Emonani solo ete, likonzi mokomoko ya lipata ezali molai na boye ete kongɛnga oyo euti na nsuka moko esalaka pene na mbula mobimba mpo na kokóma na nsuka mosusu. Lisusu, litɔnɔ “moke” kati na fɔtɔ́ ezali na bonene ekokani na système solaire, etando epai biso tozali. Lisusu, nébuleuse de l’Aigle ezali mosika mpenza na boye ete pole na yango esalaka mbula 7 000 mpo ekómela biso—kotambolaka na lombangu ya kilomɛtɛlɛ 300 000 na segɔndi moko. Yango elimboli ete tozali komona lelo nébuleuse de l’Aigle lokola ezalaki liboso ete moto azalisama.
Baastronɔ́mɛ balobi ete minzoto mikoki kobotama na ba nébuleuses mosusu, lokola nébuleuse ebéngami Orion. Nzokande, mpo na nebuleuses mosusu kotalela esika yango ezali, tozali na likoki te ya komona lolenge yango esalemaka. Monzoto ekoki mpe kokufa soki elɛmbi, soki epanzani na bitenibiteni na nsima ya kongɛnga makasi, soki ekwei na nguya ebéngami gravitation mpe esali lidusu moindo. Mozalisi ya molɔ́ngɔ́, Yehova Nzambe, ayebi motuya ya minzoto, mpamba te atángaka yango nyonso mpe abéngaka yango na nkombo. (Yisaya 40:26) Monzoto oyo ya “zumbu” ya mpongo ekoki komonisa myango mosusu Nzambe asalelaki mpo na “kosala pole” mpe kosala minzoto mikeseni na nkembo nyonso.—Yisaya 45:7; 1 Bakolinti 15:41.