Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Juillet nk. 24-25
  • Bakufi-matoi: Bazali Kosanzola Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakufi-matoi: Bazali Kosanzola Yehova
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Banani bayanganaki?
  • Mayoki ya batali
  • Teritware ya sika efungwami
  • Tólingaka bandeko na biso bababa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • ‘Yehova angengisi elongi na ye epai na bango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Luká na likebi mpenza bato oyo balobaka te mpe bayokaka te oyo bafandaka na teritware na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Yekolá koyoka na miso na yo
    Lamuká!—1999
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Juillet nk. 24-25

Bakufi-matoi: Bazali Kosanzola Yehova

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA NIGERIA

NA BOUMELI ya bambula mingi ezalaki mpasi mpo na Batatoli ya Yehova ya Nigeria ete báteya Biblia epai na bato bakufá-matoi. Ezalaki bongo mpamba te Batatoli oyo bayebaki elobeli ya bakufi-matoi bazalaki te. Kasi mbongwana ezali kosalema. Ebele ya Batatoli basili koyekola elobeli ya bakufi-matoi mpe bazali kosakola epai na bango. Litambe monene ya bokóli yango emonanaki na liyangani ya etúká oyo Batatoli ya Yehova basalaki na Nigeria esili bongo koleka mbula moko.

Mobali moko na liyangani ya mboka Ota na Nigeria alobaki ete: “Okoki koyoka mpenza esengo mingi.” Mosusu alobaki ete: “Ezalaki likambo ya nsɔ́mɔ, mpe ya kokamwisa.” Nini elamwisaki mayoki motindo wana? Ezali mpo ete mpo na mbala ya liboso na Nigeria, manáka na mobimba na yango ebongolamaki na elobeli ya bakufi-matoi. Oyo ezalaki liyangani bobele moko ebongolamaki na mobimba na yango kati na mayangani 96 oyo esalemaki na Nigeria na boumeli ya mbula wana.

Kati na bankóto ya bayangani, bato 43 bazalaki bakufi-matoi, bango bafandaki na lobɔkɔ ya mwasi ya ebaelo, na bifandelo ya liboso. Likoló na bango bakakisaki etánda mpɛmbɛ ya monene oyo bakomaki na lángi motane ete: “Elobeli ya bakufi-matoi.” Kozala kati na liyangani ebimisaki mayoki ya mozindo epai ya bakufi-matoi. Moko na bango akomaki: “Nazali kokoma nkomá oyo na esengo mingi mpe na mai na miso. ‘Eleki mwa ntango’ epesaki biso mpasi ntango toyokaki na ntina na bibongiseli ya elimo oyo bizalaki kokamatama mpo na bandeko na biso oyo bakufá-matoi oyo bazwami na mikili misusu. Tondimaki te ete mapamboli yango makokaki kokómela biso awa.”

Banani bayanganaki?

Bakufi-matoi bautaki bipai binso ya Nigeria. Motatoli moko mokufi-matoi amemaki bakufi-matoi misato oyo azalaki koyekola na bango Biblia. Etuluku moko ya bato bakufá-matoi, oyo basalaki mobembo ya kilomɛtɛlɛ 700, babandaki kobomba mbongo mpo na kosala mobembo na boumeli ya sanza nsambo. Nzokande, ntango eleko ekokaki mpo na kosala mobembo, bakokaki kozwa motuka ya kofutela te mpamba te eleko yango ezalaki ya lói. Ntango bakonzi ya Letá bayokaki mokakatano na bango, bapesaki bango 13 000 naira (ekokani na dolare 152) mpo ete esunga bango na myango mosusu ya mobembo!

Mabota oyo bazalaki na bana bakufá-matoi basalaki mobembo mpo na koyangana na liyangani bobele moko wana. Mwasi moko ya mboka mosika na Nigeria ayokaki nsango ya liyangani yango mpe ayaki na mwana na ye ya mobali oyo akufá-matoi. Ye moko lokola mpe mwana na ye bayebaki elobeli ya bakufi-matoi te. Batangisaki mpisoli mpo na maye bamonaki kuna, mpe bazwaki ekateli ya koyekola elobeli ya bakufi-matoi.

Bamoko kati na bankóto ya bayangani, bautaki mosika na ntáká ya bankámá ya bakilomɛtɛlɛ bobele mpo na komona ndenge nini bakufi-matoi “bakolanda” manáka. Mwalomingo bayangani bazalaki 13 936​—motángo moleki monene kati na mayangani 96 ya etúká oyo masalemaki na Nigeria. Bakufi-matoi basepelaki kozala kati na ebele monene wana.

Mayoki ya batali

Mingi kati na bakufi-matoi “balandaki” manáka na elobeli ya bakufi-matoi mpo na mbala ya liboso. Moto moko alobaki ete akamwaki na komona ete makambo nyonso mabongolamaki na elobeli ya bakufi-matoi​—nzembo, mabondeli, mayebisi, mpe ata lisano-liteya! Moto mosusu alobaki ete: “Ezalaki kitoko mingi.”

Esengo ya bakufi-matoi ezalaki komonana na ntango bazalaki koyemba. Na esengo nyonso, basalelaki mabɔkɔ na bango mpo na kokumisa Yehova. Mpo na bato oyo bayokaka, komona bakufi-matoi “koyemba” ezalaki likambo moko oyo ebendaki likebi na bango. Bato mingi batangisaki mpisoli. Bato bayokaki mobali moko konganga na bosepeli makasi ete: “Ɛ Yehova!” mpamba te ezalaki mpo na ye likambo ya sika. Na mbala moko, ntango loyembo esilaki, baoyo bafandaki penepene na bakufi-matoi babɛtaki mabɔkɔ.

Nsima ya lisukúlu ya batisimo, bakandidá ya batisimo batɛlɛmaki, mpe elenge moko kati na bakufi-matoi mpe atɛlɛmaki. Komimisa ya esengo eyokanaki epai ya bayangani ntango alobaki “Ɛɛ” na nzela ya ekela mpo na koyanola na mituna mibale oyo molobi atunaki.

Ezalaki mpenza esengo mpo na bakufi-matoi kokutana na bandeko na bango ya elimo, mibali mpe basi, oyo bautaki na bingumba mosusu na mboka! Mabɔkɔ mpe misapi mizalaki koningana na esengo nyonso wana bakufi-matoi bazalaki kosala boyebani bamoko na bamosusu. Bapesanaki mbote ya mabɔkɔ mpe lisusu baadrɛsi na bango.

Babongoli libwa (ya elobeli ya bakufi-matoi) bautaki na bisika bikeseni ya mboka. Ezalaki kitoko mingi na komona lolenge mabɔkɔ na bango na esengo nyonso mazalaki kobongola na bilembo masukúlu nyonso bakisá mpe nzembo. Mpo na milende na bango bazwaki mbano ya koyambama, kopesamela mbote ya mabɔkɔ, mpe longonya. Batunaki bango mituna lokola oyo: Boyekolaki yango ndenge nini? Ndenge nini ngai mpe nakoki koyekola? Ezali na babúku oyo epesaka mateya ya elobeli ya bakufi-matoi?

Teritware ya sika efungwami

Mpo na bakufi-matoi, likambo lilekaki ntina na liyangani wana ezalaki kobimisama ya kasɛ́ti-video na libongoli ya bilembo ya búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Balobaki mingi mpo na koyekola elobeli ya bakufi-matoi mpe, na lisungi ya malako oyo, koteya bato nyonso bakufá-matoi kati na mboka mobimba ya Nigeria. Liyangani esalaki ete bato mingi bázwa ekateli ya kosala bongo.

Ndeko moko ya mwasi alobaki ete: “Liboso, na mosala ya kosakola ezalaki soki tokutani na moto akufi-matoi, toleki mbala moko na ndako mosusu. Sikawa toyebi nini tokosala.” Likoki ezali ya koteya soko milió mitano ya bakufi-matoi na Nigeria. Ndeko moko alobaki: “Oyo ezali ebandeli. Sikawa tosengeli kolóna kati na teritware oyo.”

Ezali yango nde esalemaki na boumeli ya basanza oyo elandaki nsima ya liyangani. Milende mizali kosalema mpo na koteya solo ya Liloba ya Nzambe epai ya bamilió ya bakufi-matoi na Nigeria. Bango mpe bazali na mposa ya koyekola na ntina na nsango malamu ya mokili ya sika na nsé ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koya, mpamba te kuna maladi ekosila na lolenge ya ekamwiseli mpe “matoi na bimimi makozipolama.”​—Yisaya 35:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto