Koboma bato na nkombo ya Nzambe
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA FRANCE
“Na nkombo ya Nzambe, tozali koboma mpe tokokóba koboma”
NA NSÉ ya motó na likambo oyo etángami likoló, zulunalo International Herald Tribune elobaki ete: “Bato oyo batalelaka mikolo mizali koya na lolenge malamu balingaka kotalela ekeke oyo lokola ekeke ya bato ya mayele mpe oyo esili kokesana na bikeke mosusu mpo na bopusi mabe ya bato na kobomana na nkombo ya Nzambe.”
Mokomi atángaki bandakisa ya bato mingi oyo babomamaki na nkombo ya mangomba na bikeke bileki. Na nsima, kolobeláká ebele ya bato oyo babomamaki na ekeke ya 20, asukisaki ete: “Makambo oyo tozali komona ezali kolandana ya nsɔ́mɔ ya koyinana ya mangomba na ndenge ya bonyama na ntango ya kala. Losambo ekómi esaleli mpo na mobulu ya politiki mpe kobɔtɔla bamboka na bitumba.”
Basusu bamekaka kolóngisa bitumba ya mangomba ya lelo na kolobáká ete Nzambe andimaki lolenge Bayisalaele ya kala babomaki Bakanana. Nzokande, yango ezali kolóngisa te baoyo bazali komibénga ete baklisto mpo na bitumba oyo bizali kosalema lelo oyo. Mpo na nini? Mpamba te, Bayisalaele bazwaki mitindá uta na Nzambe ete bázala bakokisi ya bikateli na ye ya sembo liboso ya basambeli ya bademó, oyo losambo na bango ekɔtisaki bizaleli ya mbindo ya kosangisa nzoto mpe kotumba bana lokola mbeka.—Deteronome 7:1-5; 2 Ntango 28:3.
Elembeteli mpo na koyeba ete bitumba ya Yisalaele ya kala bizalaki lokola bowelani ya bato nyonso te ezali bongo bolóngi oyo Nzambe azalaki kopesa na libota yango na lolenge ya kokamwa. Na ndakisa, mokolo moko Bayisalaele ya kala basalelaki kelelo, mbeki mpe miinda—ezali bisaleli oyo bikoki kosalelama lelo te mpo na bitumba! Na libaku mosusu, bayembi batyamaki liboso ya limpinga ya Bayisalaele oyo basengelaki kobunda na mampinga ya mabota mingi masangani.—Basambisi 7:17-22; 2 Ntango 20:10-26.
Lisusu, na mabaku mosusu, ntango Bayisalaele bamikɔtisaki na bitumba oyo Nzambe atindaki te, bapambolamaki te mpe balóngaki bango. (Deteronome 28:15, 25; Basambisi 2:11-14; 1 Samwele 4:1-3, 10, 11) Na yango, esengeli te kolobela bitumba ya Yisalaele mpo na kolóngisa bitumba oyo bizali kouta na mangomba ya boklisto.
Na nkombo ya lingomba, ba Hindous basili kobunda na Bamizilmá mpe ba Sikhs; Bamizilmá ba Shiites basili kobunda na Bamizilmá ba Sunnites; mpe na ekólo Sri Lanka, ba Bouddhistes mpe ba Hindous basili kobomana.
Koboma bato na nkombo ya Nzambe ezalaki mpenza oyo esalemaki na bitumba ya ekólo France na boumeli ya ekeke ya 16. Lisoló ya bitumba yango ekoki kokomisa mikanda ebele na ntina etali kosopa makila kati na lisoló ya Lingomba ya Katolike ya Loma mpe Lingomba ya Protestá na mikili ya Mpótó. Tiká tótalela bitumba yango, mpe tokomona makambo oyo tokoki koyeba na ntina na yango.