Bitumba ya mangomba na France
NA Mwalomingo 1 Mársi 1562, mokonzi ya Guise mpe ndeko na ye ya mobali Charles, cardinal ya Lorraine—bakambi mibale ya Lingomba ya Katolike na France—bazalaki kokende likoló ya bampunda elongo na mampinga na bango na Vassy, mboka moko oyo ezwami na ɛ́sti ya Paris. Bazwaki ekateli ya kotɛlɛma na ndakonzambe na Vassy mpo na kokɔta misa.
Na mbala moko, bayokaki mingongo ya nzembo. Nzembo yango ezalaki kouta na ndako moko monene epai kuna bankámá ya Baprotestá bayanganaki mpo na kosambela. Basodá bafungolaki ekuke na makasi mpe bakɔtaki. Na boumeli ya mobulungano oyo molandaki, babandaki kofingana, kobambana mabanga. Basodá babɛtaki masasi mpe babomaki Baprotestá soko ntuku motoba mpe bankámá mosusu bazokaki.
Nini esalaki ete bato bábomama ndenge wana? Baprotestá basalaki nini?
Lisoló na yango
Na boumeli ya eteni ya liboso ya ekeke ya 16, ekólo France ezalaki na bozwi mpe bato bakómaki mingi. Bokóli wana ya makambo ya nkita mpe boikani ya bato ezalaki kotambola elongo na milende ya komonisa bondeko makasi ya elimo epai na basambeli ya Lingomba ya Katolike. Bato bazalaki kolinga lingomba lisantu kasi lingomba ya bozwi te. Basangani mosusu kati na bakonzi ya lingomba mpe banganga-mayele ya ntango ya mbongwana basɛngaki mbongwana na makambo ya losambo mpo na kobundisa mbeba oyo ezalaki kosalema na baoyo bazalaki na etɛlɛmɛlo ya likoló mpe gɔigɔi ya basángó. Moko ya bakonzi ya lingomba oyo bazalaki kosala milende mpo na mbongwana ezalaki episkɔ́pɔ ya Katolike Guillaume Briçonnet.
Na diosɛ́zɛ na ye na mboka Meaux, Briçonnet alendisaki bandimi nyonso ete bátángaka Makomami. Apesaki kútu mosolo mpo na kobongola Makomami ya Greke ya boklisto na Lifalansé. Mosika te, Sorbonne, Inivɛrsité ya mateya ya Teoloji na Paris, oyo ezalaki bongo kobatela mateya ya Lingomba ya Katolike, esopaki nkanda na yango likoló na ye, mpe na yango milende na ye misukaki. Kasi episkɔ́pɔ abatelamaki na François I, mokonzi ya France kobanda 1515 kino 1547. Nsima ya mwa ntango, mokonzi andimaki ete mbongwana ekɔta.
Nzokande, François I, apesaki nzela ete bálobela mabe ya lingomba bobele na makambo oyo makopesa mobulu te mpe makobebisa bomoko ya mboka te. Na 1534, batingami na makambo ya Lingomba ya Protestá babákaki mayebisi oyo ezalaki komonisa ete misa ya ukaristya ezali bongo losambo ya bikeko, babákaki kútu liyebisi moko kino na ekuke ya ndako ya kolala ya mokonzi. Na yango, François I asilikaki makasi mpe apesaki etindá ete báboma bango nyonso.
Kosilisama ya nsɔmɔ
Nokinoki Baprotestá bakómaki kotumbama likoló na nzeté. Bato ya motema mawa baoyo bazalaki kokumisa mpe kosepela na bango, bakisá mpe baoyo bakɔtaki na Lingomba ya Baprotestá, bakómaki kokima mboka. Bakonzi babandaki kopekisa kobimisama ya babúku, bazalaki mpe kolandela bateyi, babimisi ya babúku mpe banyati na yango.
Lingomba ya ba Vaudois bakutanaki mpenza na botɛmɛli makasi ya bakonzi ya Letá. Bazalaki etuluku moke ya balandi ya mateya ya Biblia mpe bazalaki kofanda na bamboka ya bobóla na súdi ya ekólo France. Bamoko batumbamaki likoló na nzeté, bankámá kati na bango babomamaki, mpe bamboka na bango soko 20 ebebisamaki.—Talá etánda na lokasa 6.
Koyebáká ete ezali mpenza na ntina ete mbongwana ekɔta kati na lingomba, baepiskɔ́pɔ ya Katolike bayanganaki na Desɛ́mbɛ 1545, na mboka Trente, na ekólo Italie. Engebene búku The Cambridge Modern History, ntango likita yango lisilaki na 1563, “likambo ya ntina . . . ezalaki ya kolendisa baoyo bazwaki ekateli ya kolongola Lingomba ya Protestá.”
Makambo oyo mazalaki liboso ya etumba
Wana balɛmbaki mpo na kozela mbongwana, basangani mingi ya etuluku oyo ezalaki kolinga mbongwana kati na Lingomba ya Katolike bakómaki na ngámbo ya Baprotestá. Na mobu 1560, bato mingi ya mayele oyo etuluku na bango ezalaki koyangela na ekólo France mpe baoyo bazalaki kolanda bango bakómaki na ngámbo ya ba Huguenots, nkombo oyo bazalaki kobénga Baprotestá. Ba Huguenots bakómaki komimonisa polele. Na nsima, makita na bango oyo bakómaki kosala na polele ekómaki lokola matumoli mpe botɛmɛli. Na ndakisa, na 1558, bankóto kati na bango bayanganaki na Paris na boumeli ya mikolo minei mpo na koyemba nzembo.
Nyonso wana epesaki bakonzi mpe batambwisi ya Lingomba ya Katolike nkanda. Na bopusi ya Cardinal Charles ya Lorraine, Mokonzi Henri II, oyo akitanaki tata na ye, François I, abimisaki etindá ebéngami Écouen, na Yúni 1559. Mokano na yango monene ezalaki ya kosilisa “bato oyo bakoyokisa Luther nsɔni.” Yango epesaki nzela ete ba Huguenots bábanda kobomama na ndenge moko ya nsɔmɔ na engumba Paris.
Nsima ya mwa bapɔ́sɔ Henri II akufaki na bampota oyo azokaki ntango akendaki kotala bamboka. Mwana na ye ya mobali, Mokonzi François II, oyo apusamaki na bato ya Guise, azongelaki lisusu etindá oyo ezalaki kopesa etumbu ya liwa na batingami ya Lingomba ya Protestá. Mbula oyo elandaki François II akufaki mpe mama na ye, Catherine de Médicis ayangelaki na esika ya ndeko na ye ya mobali Charles IX oyo azalaki bobele na mibu zomi. Boyangeli ya Catherine oyo ezalaki koluka kosala boyokani kati na babundi esepelisaki ba Guises te, oyo bazalaki na mokano ya koboma Lingomba ya Protestá.
Na 1561, Catherine ayanganisaki likita moko na mboka Poissy, pene na Paris epai kuna bateolojiɛ́ ya Katolike mpe ya Protestá bakutanaki. Na etindá oyo ebimaki na Yanuáli 1562, Catherine apesaki Baprotestá bonsomi ya koyangana polele na bingumba mpo na losambo na bango. Bakatolike batombokaki! Yango epesaki nzela na oyo ebimaki nsima ya sanza mibale—lokola yango emonisamaki liboso, kobomama ya Baprotestá mpe kobukabuka ya bandako ya kobomba bilei na mboka Vassy.
Bitumba misato ya liboso
Kobomama ya bato na mboka Vassy ezalaki ebandeli ya molɔngɔ́ ya bitumba mwambe ya mangomba oyo bizindisaki ekólo France kati na kobomana ya nsɔmɔ kobanda na 1562 kino katikati ya bambula ya 1590. Atako makambo ya politiki mpe ya bizaleli ya bato ekɔtaki na kati, kosopama wana ya makila eutaki libosoliboso na mangomba.
Nsima ya etumba ya Dreux na Desɛ́mbɛ 1562, oyo ebomaki bato 6 000, etumba wana ya liboso ya mangomba esilaki. Etindá mpo na kimya ebéngami Kimya ya Amboise, oyo etyamaki mabɔkɔ na Mársi 1563, epesaki bonsomi moke na bakonzi ya ba Huguenots mpo na kosambela na bisika mosusu.
Búku The New Encyclopædia Britannica elobi ete “Etumba ya mibale ebimaki mpo ete ba Huguenots babangaki mayele mabe ya Lingomba ya Katolike na mokili mobimba.” Na nsima, bazuzi Bakatolike bakómaki koboma bato mosusu bobele mpo ete bazalaki ba Huguenots. Na mobu 1567, Huguenot moko amekaki koyiba mokonzi Charles IX mpe mama na ye Catherine, mpe yango ebimisaki etumba ya mibale.
Nsima ya kolobela etumba oyo esopaki makila na Saint-Denis, pene na Paris, bakomi ya masoló ya kala Will mpe Ariel Durant bakomaki ete: “Ekólo France ekamwaki lisusu na ntina na lingomba oyo ezalaki kopusa bato na kobomana ndenge wana.” Mwa moke na nsima, na Mársi 1568, mokanda ya boyokani mpo na Kimya ya Longjumeau epesaki na ba Huguenots bobele bonsomi moke oyo bazalaki na yango liboso ete mokanda ya boyokani mpo na Kimya ya Amboise motyama mabɔkɔ.
Nzokande, Bakatolike bayokaki nkanda mpe baboyaki kokómisa kimya yango kino nsuka. Na yango, na Sɛtɛ́mbɛ 1568, etumba ya misato ya mangomba ebandaki. Boyokani ya kimya oyo elandaki epesaki ba Huguenots bisika mingi ya kofanda. Bapesaki bango kútu bingumba minene, bakisá mpe libóngo ya La Rochelle. Lisusu, Amiral ya Coligny, mwana ya mokonzi, aponamaki kati na bato bazalaki koyangela zingazinga ya mokonzi. Mbala oyo lisusu, Bakatolike batombokaki.
Bato ebele babomami na mokolo ya “santu” Barthélemy
Soko mbula moko na nsima, na mwa 22 Augústo 1572, Coligny abikaki ntango balingaki koboma ye na Paris wana azalaki kotambola longwa na Louvre mpo na kokende na ndako na ye. Baprotestá bayokaki nkanda mpe bakanaki kozongisa mabe soki likambo yango ekatami malamu te mpe na lombangu te. Na likita moko oyo esalemaki na nkuku, elenge Mokonzi Charles IX, mama na ye Catherine de Médicis, mpe bakonzi mosusu bakanaki koboma Coligny. Mpo na kopɛngola meko ya kosala mobulu oyo ekoki kokamatama, bapesaki etindá ete báboma mpe Baprotestá nyonso oyo bayaki na Paris mpo na koyangana na molulu ya libala ya Henri de Navarre oyo azalaki bongo Protestá mpe oyo alingaki kobalana na Marguerite de Valois, mwana mwasi ya Catherine.
Na butu ya mokolo mwa 24 Augústo, na ngámbo ya Louvre, bangonga ya ndakonzambe ya Saint-Germain-l’Auxerrois ebɛtaki mpo na kopesa nzela ete bábanda kosasa bato. Mokonzi ya Guise mpe mibali oyo bazalaki elongo na ye bakendaki mbango na ndako oyo Coligny azalaki kolala. Ntango bakómaki kuna babomaki Coligny mpe babwakaki ye longwa na lininisa, mpe na nsima bayaki kokatakata ye. Mokonzi ya Lingomba ya Katolike azalaki konganga ete: “Bomá bango nyonso. Ezali etindá ya mokonzi.”
Banda mwa 24 kino 29 Augústo, makambo ya nsɔmɔ matondaki na babalabála ya Paris. Basusu balobaki ete Ebale Seine ekómaki motane mpo na makila ya bankóto ya ba Huguenots oyo babomamaki. Bingumba mosusu bimonaki makila na yango. Ekanisami ete bato oyo babomamaki bazalaki na motángo ya 10 000 kino 100 000; nzokande, bato mingi bazali kondima motángo ya bato koleka 30 000.
Mokomi moko ya makambo ya kala akomaki ete: “Likambo moko oyo eleki nsɔmɔ ezali bongo esengo oyo bazalaki koyoka na kosasa bato.” Wana ayokaki nsango ete bato ebele babomamaki, Pápa Grégoire XIII apesaki etindá ya kosala misa ya ngrasia mpe atindaki maloba ya botɔ́ndi epai ya Catherine de Médicis. Apesaki mpe etindá ya kosala modai mpe koyema elilingi ya kobomama mpo na kokanisa ba Huguenots oyo bakufaki, mpe elilingi yango ezalaki na maloba oyo: “Pápa andimaki kobomama ya Coligny.”
Elobamaki ete, nsima ya kosasa wana, Charles IX amonaki bimonaneli ya bato oyo abomisaki mpe azalaki konganga epai na monganga oyo azalaki kosalisa ye ete: “Oyo nde toli mabe nalandaki! O Nzambe na ngai, limbisá ngai!” Akufaki na 1574 na mibu 23 mpe ndeko na ye ya mobali Henri III akitanaki ye.
Bitumba ya mangomba bilandanaki
Na boumeli ya ntango nyonso wana, Bakatolike bapusamaki na bakonzi na bango mpo na kotombokela ba Huguenots. Na mboka Toulouse, basángó balendisaki bandimi na bango ete: “Bomá bango nyonso, bebisá; tozali batata na bino. Tokobatela bino.” Na mobulu ya koluka kosilisa Baprotestá, ezala mokonzi, badepite, baguvernɛrɛ, mpe bakapitɛnɛ, bango nyonso bapesaki ndakisa mpe bandimi ya Katolike balandaki yango.
Atako bongo, ba Huguenots babundaki. Sanza mibale ekokaki te nsima ya kosasa bato na mokolo ya “santu” Barthélemy, babandaki etumba ya minei ya mangomba. Na bisika oyo Baprotestá bazalaki mingi koleka Bakatolike, babukaki bikeko, bikulusu mpe lotale kati na bandakonzambe ya Katolike, mpe babomaki kútu bato. Jean Calvin, mokambi ya Lingomba ya Protestá na France, kati na mwa búku na ye Déclaration pour maintenir la vraie foi alobaki ete “Ezala bingumba to bato, Nzambe alingi te ete tótika yango.”
Bitumba mosusu minei ya mangomba elandaki. Oyo ya mitano esukaki na 1576 ntango Mokonzi Henri III atyaki mabɔkɔ na mokanda mpo na boyokani ya kimya, yango epesaki ba Huguenots bonsomi ya kosambela bipai binso na ekólo France. Ntango mingi na nsima, Bakatolike oyo batondaki na engumba Paris batombokaki mpe babenganaki Henri III, oyo atalelamaki lokola azalaki koluka koyokanisa ba Huguenots na Bakatolike. Bakatolike basalaki guvernemá na bango mpo na kotɛmɛla Sainte Ligue oyo etambwisamaki na Henri de Guise.
Na nsuka, etumba ya mwambe, to etumba ya ba Henri misato, ebandaki ntango Henry III (oyo azalaki moto ya Katolike) asalaki boyokani na mokitani na ye, Henri de Navarre (oyo azalaki moto ya Protestá), mpo na kotɛmɛla Henri de Guise (oyo azalaki bongo moto ya Katolike). Henri III abomaki Henri de Guise, kasi na Augústo 1589, ye mpe abomamaki na sángó moko ya ba Dominicains. Na yango, Henri de Navarre, oyo abikaki na boumeli ya mbula 17 na ntango ya kosasa bato na mokolo ya “santu” Barthélemy, akómaki Mokonzi Henri IV.
Lokola Henri IV azalaki Huguenot, bafandi ya engumba Paris baboyaki kotosa ye. Sainte Ligue ya Katolike ebongisaki botɛmɛli na ekólo mobimba na nzela ya mandoki. Henri alóngaki bitumba mingi, kasi ntango limpinga moko ya Espagne liyaki kosunga Bakatolike, nsukansuka azwaki ekateli ya koboya Lingomba ya Protestá mpe kondima Lingomba ya Katolike. Wana atyamaki na kiti ya bokonzi na mokolo mwa 27 Febwáli 1594, Henri akɔtaki na Paris, epai kuna bato oyo balɛmbaki na bitumba, bakumisaki ye lokola mokonzi.
Na yango, bitumba ya mangomba na ekólo France bikómaki na nsuka nsima ya mbula koleka 30 kati na yango mbala na mbala Bakatolike mpe Baprotestá babomanaki. Na mwa 13 Apríli 1598, Henri IV abimisaki mokanda ebéngami etindá ya Nantes, oyo epesaki bonsomi ya lisosoli mpe ya losambo epai na Baprotestá. Engebene pápa; etindá yango ezalaki “eloko elekaki mabe mpenza mpamba te epesaki bonsomi ya lisosoli epai na moto nyonso, yango ezalaki likambo lileki mabe na mokili.”
Na ekólo France mobimba, Bakatolike bamonaki ete Henri atɛkaki bango na elaka apesaki na etindá ya Nantes ya kondima mateya na bango. Lingomba ya Katolike ezalaki ntango nyonso kotomboka kino pene na ekeke mobimba na nsima, Louis XIV alongolaki etindá yango ya Nantes, kopesáká nzela ya konyokola ba Huguenots kútu makasi koleka.
Matomba mabe ya bitumba
Na nsuka ya ekeke ya 16, nkita ya ekólo France ekweaki. Ndambo monene ya ekólo ezalaki na mabɔkɔ ya banguna, ebebisamaki to ebɔtɔlamaki. Basodá oyo bazalaki bakómaki kobɔtɔla bato biloko, yango epesaki nzela ete bafandi ya bamboka mikemike bátɔmbɔkela bakonzi. Baprotestá bazwaki bitumbu ya liwa, mpe bazalaki koboma bango ebele mbala moko to bazalaki kokima mboka mpe kowangana eyamba na bango, na bongo motángo na bango ekitaki mingi na ebandeli ya ekeke ya 17.
Emonani ete, Bakatolike nde balóngaki bitumba ya mangomba na ekólo France. Kasi yango elingi koloba ete Nzambe apambolaki bango? Soko moke te. Kolɛmbáká mpo na kobomama wana oyo esalemaki na nkombo ya Nzambe, bato mingi na France balingaki lisusu koyoka makambo ya losambo te. Bazalaki bato ya liboso oyo babéngamaki ete nzela ya kotɛmɛla boklisto na ekeke ya 18.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
“Ezala bingumba to bato, Nzambe alingi te ete tótika yango.” Mokonzi ya Lingomba ya Protestá na ekólo France
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Ba Vaudois Batikalaki Ngwi: Yango Ebimisi Litomba Nini?
PIERRE VALDES, to Peter Waldo azalaki komelesá monene na France na ekeke ya 12. Na boumeli ya ntango oyo Lingomba ya Katolike ya Baloma etyaki bato na nkó kati na kozanga boyebi ya makambo ya Biblia, Waldo apesaki mosolo mpo na kobongola Baevanzile mpe mikanda mosusu ya Biblia na lokótá oyo ezalaki kolobama na bato mingi na súdi-ɛ́sti ya ekólo France. Na nsima, atikaki mosala na ye ya mombongo mpe amipesaki na kosakola Evanzile. Mwa ntango moke na nsima, bato mingi basanganaki na ye, mpe na mobu 1184 ye mpe basangani na ye balongolamaki na Lingomba ya Katolike na Pápa Lucius III.
Na nsima, bituluku yango ya basakoli oyo bakangamaki na Biblia bayaki koyebana na nkombo ba Vaudois. Bazalaki komonisa ete esengeli kozonga na bindimeli mpe misala ya boklisto ya ebandeli. Babwakaki misala mpe bindimeli ya mimeseno ya Lingomba ya Katolike, kati na yango bitumbu mpo na kozwa bolimbisi ya masumu, misa ya bawei, epongelo, losambo ya Malia, losambo epai na “basantu,” batisimo ya bana mike, kokumisama ya ekulusu, mpe mbongwana ya limpa mpe vinyo na nzoto mpe na makila ya Klisto. Na ntina yango, mbala mingi ba Vaudois bazalaki konyokolama makasi na Lingomba ya Katolike. Will Durant, mokomi na lisoló ya kala alobelaki makambo malekaki ntango Mokonzi François I atindaki ete bátɛmɛla bato oyo bazalaki Bakatolike te:
“Cardinal de Tournon, andimisaki ete ba Vaudois bazalaki kobongisa mwango moko mabe ya kotɛmɛla boyangeli, alóngaki kondimisa Mokonzi oyo azalaki na maladi, azalaki kokakatana mpo na kotya mabɔkɔ na etindá (1 Yanuáli 1545) ete ba Vaudois nyonso oyo bakozwama na likambo litali kokweisa bindimeli mbɛlɛ bakobomama. . . . Na boumeli sé ya pɔ́sɔ moko mpamba (12-18 Apríli) bamboka mingi mikemike etumbamaki; na moko kati na yango bato 800, mibali, basi mpe bana babomamaki; na boumeli ya sanza mibale bato 3 000 babomamaki, mboka ntuku mibale na mibale ebebisamaki, bato 700 batindamaki na bolɔ́kɔ epai kuna basengelaki kosala misala makasi. Basi ntuku mibale na mitano oyo babangaki makasi babombanaki kati na lidusu moko ya libanga monene, bakufaki na molinga ya mɔ́tɔ oyo mopelisamaki na ekɔtelo na yango.”
Na ntina na makambo yango, Durant alobaki ete: “Minyoko yango mimonisaki ete boyangeli ya François ekweaki.” Kasi bopusi nini esalemaki likoló na baoyo bamonaki mpiko ya ba Vaudois na boumeli ya minyoko oyo mipesamelaki nzela na mokonzi? Durant akomaki ete: “Mpiko ya bamartiru yango epesaki lokumu na mosala na bango; bankóto ya bato oyo bazalaki kotala bakamwaki mpe babulunganaki, soki bamonaki kobomama yango ya ebele ya bato te, mbɛlɛ balingaki ata kokanisa te kobongola lingomba na bango oyo basangolaki.”
[Elilingi na lokasa 5]
Kobomama ya bato na Vassy epesaki nzela na bitumba ya mangomba
[Elilingi na lokasa 7]
Mokolo ya kobomama na esika “santu” Barthélemy na boumeli na yango bankóto ya Baprotestá babomamaki
[Bililingi na lokasa 8]
Baprotestá babomaki Bakatolike mpe babebisaki bozwi ya ndakonzambe