Lingomba nini endimami na Nzambe?
LIKAMBO ya mawa, koyinana ya mangomba na ekeke ya 16 na ekólo France esilaki te. Na ekeke oyo elandaki, kokanisela basusu mabe na ndenge ya nsɔmɔ ebebisaki mikili ya Mpótó, wana Bakatolike mpe Baprotestá bazongelaki lisusu bitumba na boumeli ya mbula ntuku misato (1618-1648). Na nkombo ya Nzambe, baoyo bazali komibénga ete baklisto bazongelaki kobomana na lolenge ya nsɔmɔ mpenza.
Koyinana ya mangomba mpe kobomana esilaki te. Eleki ntango mingi te Bakatolike mpe Baprotestá bazalaki kobomana na Irlande, mpe Baɔrtɔdɔksɛ mpe Bakatolike basalaki mpe bongo na ex-Yougoslavie. Mpe likambo oyo likoki komonana lokola mpasi mpo na kondima yango, na boumeli ya Etumba ya Liboso mpe ya Mibale ya mokili mobimba, Bakatolike mpe Baprotestá babomaki bankámá ya bankóto ya basangani ya mangomba na bango moko na bisika ya bitumba. Ntina ezali mpo na kolóngisa kobomama yango? Likanisi ya Nzambe ezali nini?
Milende mpo na kolóngisa bitumba
Mokanda 1995 Britannica Book of the Year elobi ete: “Na 1994, bateolojiɛ́ ya bituluku ndenge na ndenge bamekaki kolóngisa mobulu wana.” Esili koleka mbula 1 500, likambo motindo moko mpo na kolóngisa ntina ya kobomama esalemaki na filozofe “santu” Augustin. Engebene New Catholic Encyclopedia, “azalaki mpenza mobandisi ya mateya mabéngami bitumba ya sembo,” mpe búku yango emonisaki ete makanisi na ye ‘mazali naino na bopusi na mikolo na biso.’
Mangomba ya Katolike, Ɔrtɔdɔksɛ mpe Protestá bandimaki, bapesaki kútu mabɔkɔ na kobomama oyo esalemaki na nkombo ya Nzambe. Atako lisoló mobimba ya mangomba yango ekangisami na kosopa makila, mangomba mosusu mingi na mokili mobimba mpe masalaki bongo. Na yango, ndenge nini koyeba bato oyo bazali na lingomba ya solo?
Esengeli te bobele koyoka bango kolobela bindimeli na bango. Na ntina na likambo yango, Yesu Klisto abendaki likebi ete: “Bókeba na basakoli na lokuta baoyo bakoya liboso na bino na bilamba na mpate nde katikati bazali nkoi na kongala. Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango. . . . Nzeté malamu na nzeté malamu ekobota mbuma malamu nde nzeté mabe na nzeté mabe ekobota mbuma mabe. . . . Nzeté na nzeté oyo ekobota mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na mɔ́tɔ.” (Biso nde totɛngisi nkomá.)—Matai 7:15-20.
Bakoyeba bango na mbuma na bango
Bamilió ya bato na sembo bayebi ete mangomba ya mokili mazali bongo ‘nzeté mabe’ oyo esili kobimisa “mbuma mabe,” mingimingi, na kobimisáká bitumba oyo ezali kosopa makila. Kati na Biblia mangomba ya lokuta ya mokili mobimba mamonisami lokola mwasi na pite na elimo oyo abéngami “Babilone Monene.” Biblia elobi ete “kati na ye makila na basakoli, na bapɛtwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.”—Emoniseli 17:3-6; 18:24.
Na yango, na esika ete andima bitumba oyo bipambolamaki na bakonzi ya mangomba, mosika te Nzambe akokweisa bikateli na ye likoló na mangomba oyo masili koboma bato na nkombo na ye. Akosala yango na kokokisama ya esakweli ya Biblia oyo elobi ete: ‘Babilone, mboka monene, ekobwakama makasi, mpe ekozwama lisusu te.’ Ntango makambo wana makosalema, Nzambe ‘akokweisa bikateli na ye likoló na mwasi na pite yango monene’ mpe ‘akobukanisa ye mpo na makila na baombo na ye.’—Emoniseli 18:21; 19:2.
Bato oyo basepelaka te na kobomama oyo esalemi na nkombo ya Nzambe bakoki komituna soki ezali na baklisto oyo bazali mpenza komitambwisa engebene esakweli oyo ya Biblia: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko ekotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Oyebi bato oyo bazali na bobangi Nzambe, oyo bakɔtaka na bitumba te?
Lingomba oyo lindimami na Nzambe
Búku moko ya sosioloji oyo ezali na motó na likambo ete “De nouveaux développements sur la violence et sa justification,” ebimisamaki na Inivɛrsité ya Michigan, elobaki ete: “Uta na ebandeli ya ekeke oyo, Batatoli ya Yehova basili mpenza kosimba etɛlɛmɛlo ya ‘kozanga komikɔtisa na makambo’ ya mobulu na boumeli ya bitumba mibale ya minene ya mokili mobimba mpe bitumba mosusu oyo elandaki na eleko ebéngami ‘Guerre froide.’” Komonisáká ntina oyo Batatoli bamikɔtisaka na mobulu te, búku yango elobaki ete: “Mateya ya Batatoli ya Yehova eutaka na endimeli na bango oyo ete Biblia ezali liloba lipemami na Nzambe.”
Ɛɛ, Batatoli ya Yehova bamitambwisaka engebene Biblia, oyo ezali koteya ete: “Bana na Nzambe mpe bana na Satana bakomonana polele na likambo oyo. Moto na moto oyo azangi kosalaka boyengebene auti na Nzambe te; na oyo azangi kolinga ndeko na ye lokola. . . . Tólingana. Pelamoko Kaina te . . . oyo abomaki ndeko na ye.”—1 Yoane 3:10-12.
Mbala mingi Batatoli ya Yehova babendaka likebi ya bato likoló na ngambo ya makila oyo mangomba ezali na yango. Basili mpe koyebisa likebisi ya Biblia oyo elobi ete: “Bino bato na ngai bóbima na ye [Babilone Monene], ete bósangana na masumu na ye te, ete bózwa moko na malɔ́zi na ye mpe te. Mpo ete libondo na masumu na ye likómi kino likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye.”—Emoniseli 18:4, 5.
Bato mingi na sembo bazali kotya likebi na mbela ya kobima na mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Soki ozokisami na motema na yo na komona ndenge bato bazali kobomama na nkombo ya lingomba, tozali kosɛnga na yo ete osolola na moto oyo apesaki yo zulunalo oyo to tindá nkomá na adrɛsi ebongi na yo oyo etyami na lokasa 5. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo ete oyeba elaka ya Biblia etali mokili ya sika ya boyengebene, kati na yango bitumba ekozala lisusu te.—Nzembo 46:8, 9; 2 Petelo 3:13.
[Elilingi na lokasa 10]
“Balobi ete bayebi Nzambe nde na misala na bango bazali koangana ye.”—Tito 1:16