Kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto—Likambo oyo ezali komonana na mokili mobimba
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA SUÈDE
Mokili ezali koningana na lolenge moko mabe ya kobebisa bana, yango emonani ete ezali likambo lisalemaki naino te kino bambula oyo euti koleka. Mpo na koyeba nini esengeli kosalema na ntina na likambo yango, batindami ya mikili 130 bakutanaki na engumba Stockholm, na ekólo Suède, na likita ya yambo ya mokili mobimba mpo na kotɛmɛla likambo ya kosalela bana na mombongo ya kosangisa nzoto. Mokomani ya Lamuká! na Suède mpe azalaki na likita yango.
NTANGO Magdalen azalaki na mibu 14, bazwaki ye na mosala lokola “moyambi bato” na ekalá moko na engumba Manila, na ekólo Philippines. Mpo na koloba solo, mosala na ye ezalaki ya kokende na bakiliya mibali na eteni moko moke ya ndako, kolongola bilamba mpe kopesa nzoto na ye mpo ete básilisa bamposa na bango ya nzoto—azalaki kosala bongo na mibali soko 15 na butu moko mpe mibali 30 na mikolo ya pɔ́sɔ. Mbala mosusu, soki alobi ete akokoka lisusu te, patrɔ́ na ye azalaki bobele kosɛngisa ye ete akóba kosala. Mbala mingi azalaki kosukisa mosala na ye na ngonga ya minei ya ntɔ́ngɔ́, wana alɛmbi, abulungani mpe akómi mpenza na mawa.
Sareoun azalaki elenge mobali etike oyo azalaki koyengayenga na babalabála na engumba Phnom Penh, na ekólo Cambodge. Azalaki na bokɔnɔ ya kasɛndɛ mpe azalaki ‘kosangisa nzoto’ na bapaya. Bapesaki ye esika ya kofanda na mwa ndakonzambe ebéngami pagode, epai kuna sángó moko azalaki ‘kokɛngɛla ye.’ Nzokande, sángó yango azalaki kosangisa na ye nzoto mpe kopesa ye na bapaya mpo ete básangisa na ye nzoto. Ntango babukaki bandako esika mwa ndakonzambe yango ezalaki, akómaki kofanda epai ya tata-mwasi na ye kasi basɛngisaki ye akóba kosala bondumba.
Oyo ezali bobele ndakisa mibale ya likambo yango monene oyo elobelamaki na mobu euti koleka na Likita ya mokili mobimba oyo lisalemaki mpo na kotɛmɛla kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto. Likambo yango ezali mpenza monene? Bankámá ya bankóto ya bana bazwami kati na likambo yango—nzokande, basusu balobaka ete bazali bamilió. Motindami moko ya mwasi alobaki na bokuse na ntina na likambo yango ete: “Bana bazali kosombama mpe kotɛkisama lokola biloko ya mombongo mpo na kosangisa nzoto. Bazali komema bango na mombongo ya moyibi na bamboka mopaya epai kuna bakotya bango na balotɛlɛ mpe bakosɛngisa bango kosala makambo ya mbindo na ebele ya bakiliya.”
Na maloba na ye ya bofungoli likita yango, Göran Persson, ministre mokonzi ya ekólo Suède, alobelaki likambo yango lokola “mbeba oyo eleki kopesa motema mpasi, eleki bonyama.” Mwasi moko motindami ya Mabota Masangani alobaki ete “ezaleli ya kobebisa bana oyo epalangani bipai binso, misala ya nsɔni oyo eleki mabe mpenza . . . , kobuka ntómo ya bato na lolenge ya nsɔmɔ oyo ekoki kokanisama te.” Maloba mosusu motindo yango na ntina na kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto malobamaki na ebaelo na boumeli ya likita yango mpo na komonisa bonene ya mokakatano wana, ntina na yango mpe mbeba oyo likambo yango ezali kobimisa.
Mokanda moko elobaki ete: “Likambo yango lisili kopalangana na bikólo mingi mpe bopusi na yango ezali kokitana longwa na libota moko kino libota mosusu.” Mokanda mosusu elobaki ete: “Ekanisami ete milió moko ya bana bazali kokɔtisa mbula na mbula bamiliare ya badolare na mombongo ya kosangisa nzoto.” Mbeba nini ezali komonana? “Bana bazali kobungisa lokumu na bango, komimona ete bazali na ntina te, mpe bakokaka lisusu te kotyela bato mosusu motema. Kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto mpe ya mayoki etyami na likámá, ntómo na bango etalelami te mpe avɛnire na bango etyami na likámá.”
Bantina mosusu
Wapi bamoko ya bantina ya mokakatano yango oyo mozali sé kokóla? Elobamaki ete bana mosusu “bapusamaka na kosala bondumba mpo na bantina mingi, lokola mwango ya kobikela na babalabála, mpo na kosalisa libota, to mpo na kosomba bilamba mpe biloko mosusu. Basusu bazali kolɛngolama na bililingi ya piblisite oyo bizali kolakisama na bipanzeli-nsango.” Nzokande, ezali mpe na basusu oyo bayibaka bango mpo na komema bango bipai mosusu mpe basɛngisami na kosala bondumba. Kobeba ya bizaleli malamu bipai binso na mokili mobimba, bakisá mpe mayoki ya kozanga elikya, elobelamaki mpe kati na bantina ya mokakatano yango.
Bana basi mpe bana mibali mingi bazali kosala mombongo ya kosangisa nzoto mpamba te bazali kobebisama kati na libota—mobulu mpe kosangisa nzoto bandeko na bandeko kati na ndako ezali kosala ete bákima ndako mpe bakóma koyengayenga na babalabála. Kuna, bazali kati na likámá ya kobebisama na bapedofile mpe na bato mosusu, ata mpe bapolisi. Mokanda moko oyo ezalaki na motó na likambo ete Enfants à louer (Bana ya kofutela) oyo elobelaki likambo yango emonisaki oyo ekómelaki Katia, mwana mwasi ya mibu motoba, mofandi na ekólo Brésil. Ntango polisi moko akangaki ye, asɛngisaki ye na kosala makambo ya bosɔtɔ mpe akanaki koboma bato ya libota na ye soki afundi ye epai ya mokonzi na ye. Mokolo oyo elandaki ayaki na mibali mosusu mitano, bango nyonso balingaki ete asala na bango makambo ya bosɔtɔ.
Ebongiseli moko etaleli bana na Suède oyo ebéngami Ombudsman, bayebisaki batindami ete: “Ntango bolukiluki esalemaki mpo na koyeba bantina oyo bana basalaka bondumba, ntembe ezali te ete [mibembo ya kosangisa nzoto] ezali moko ya bantina minene.” Mokanda moko elobaki ete: “Bokóli ya bondumba oyo ezali kosalema na bana na boumeli ya mbula zomi oyo eleki euti na mibembo ya kosangisa nzoto. Bondumba ya bana ezali lolenge ya sika ya mibembo oyo ezali kobenda bapaya na mikili ya bobóla.” “Mibembo ya kosangisa nzoto” ya baturiste oyo bautaka Mpótó, États-Unis, Japon, mpe bipai mosusu mpo na kosepelisa mposa na bango ya kosangisa nzoto bazali kosala ete bondumba ya bana mike epalangana kati na mokili mobimba. Kompanyi moko ya mpɛpɔ na Mpótó esalelaki liyemi moko ya dessin animé ya mwana oyo amonisamaki na lolenge ya mbindo. Bakompanyi ya mibembo ebongisaka mibembo ya kosangisa nzoto mpo na bankóto ya bato mbula na mbula.
Lisusu, kati na bantina mingi ya kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto, ezali mpe piblisite oyo ezali kosalema na mokili mobimba na nzela ya bisaleli ya sika. Esaleli oyo ebéngami Internet, wana ekangisami na myango misusu ya ordinatere, ezali mpenza eutelo monene ya kolakisa bolumbu. Lokola bisaleli ya video ezali na ntalo moke, yango esili kopesa likoki ya kobimisa bakasɛti mingi ya bililingi ya bolumbu ya bana.
Banani bazali kosangisa nzoto na bana?
Kati na bakólo oyo bazali kobebisa bana, mingi bazali bapedofile. Pedofile ezali moto oyo azalaka na mposa mabe ya kosangisa nzoto na bana. Engebene ebongiseli ebéngami Ombudsman na Suède, “ezali te bobele mibangé ya kanza oyo balingaka kofanda bango moko, to mpe bilenge ya bilamba nyamunyamu. Pedofile azali moto mokóló oyo atángá, mbala mingi oyo azali kosala esika moko na bana, lokola molakisi, monganga, mosali na Letá to mpe sángó.”
Etuluku yango ya Suède epesaki ndakisa ya Rosario, elenge mwasi ya mibu 12, mofandi na ekólo Philippines, oyo abebisamaki na turiste moko ya mibembo ya kosangisa nzoto, azalaki monganga, autaki na ekólo Autriche. Elenge mwasi yango akufaki na mpasi ya kobebisama yango.
Carol Bellamy, mokambi ya UNICEF (Ebongiseli ya Mabota Masangani oyo etalelaka bana) na engumba Genève alobaki makambo oyo malandi na ntina na elenge mwasi yango ya mibu 12 oyo akufaki: “Mbala mingi ezalaka bato mikóló oyo bazali na mokumba ya kobatela bana nde bapesaka nzela to basalaka makambo motindo wana oyo ekoki kondimama soko moke te. Balakisi, minganga, bapolisi, bato ya politiki, mpe bakonzi ya mangomba bazali kosalela lokumu mpe bokonzi na bango mpo na kosangisa nzoto na bana.”
Mangomba mpe mafundami
Motindami moko ya Lingomba ya Katolike na likita ya Stockholm alobaki ete kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto ezali “mabe oyo eleki koyinama” mpe “mbuma ya kobeba ya bizaleli malamu.” Nzokande, Lingomba ya Katolike ebebisami makasi na bakonzi na yango mpo na misala motindo wana.
Kati na zulunalo Newsweek ya mwa 16 Augústo 1993, lisoló moko ezalaki na motó na likambo ete “Basángó mpe kobebisa,” elobelaki “likambo ya nsɔni monene kati na lisoló ya Lingomba ya Katolike na États-Unis na mikolo na biso.” Elobaki ete: “Wana basángó soko 400 bafundamaki banda 1982, bandimi mosusu balobi ete basángó soko 2 500 babebisaki bana to mpe bilenge. . . . Longola mosolo, likambo yango ya nsɔni litungisaki lingomba—mpe mokumba na yango mpo na bizaleli malamu.” Mangomba mosusu na mokili mobimba mazwami mpe kati na likambo yango.
Ray Wyre, nganga-mayele na makambo matali kobebisama ya bana oyo autaki na Royaume-Uni, alobaki na likita ya Stockholm na ntina na bana mibali mibale oyo babebisamaki na ndenge ya bosɔtɔ mpenza na sángó moko. Moko ya bana mibali yango azali sikawa kotambwisa ebongiseli moko mpo na kosalisa bana oyo babebisamaka na basángó, mpe mosusu azali mobebisi ya bana.
Mettanando Bhikkhu, nganga-mayele na Lingomba ya Buddha na ekólo Thaïlande, alobaki ete “misala mosusu ya Lingomba ya Buddha ezali na ngambo kati na likambo litali kosalela bana na mombongo ya kosangisa nzoto na Thaïlande. Na bamboka ya zámba na Thaïlande, basángó mbala mosusu bazwaka mosolo oyo mouti na bana oyo basɛngisaki bango kosala bondumba.”
Esengeli kosala nini?
Dr. Julia O’Connell Davidson ya Inivɛrsité ya Leicester na Royaume-Uni, asɛngaki na bayangani na likita ete bándima te maloba ya komilóngisa oyo babebisi bazali koloba na ntina na etamboli na bango. Babebisi mbala mingi balobaka ete bana oyo bazali kobebisa basilá na bango kobeba kala, komonisáká ete bazali lisusu na bizaleli malamu te mpe basilá kokóma mbindo. Babebisi mosusu balobaka ete lolenge bango bazali kosala bana ekobimisa mabe moko te kútu bana bazali kozwela yango matomba.
Etuluku moko ya balukiluki na makambo matali mibembo ya kosangisa nzoto bapesaki etindá ya kobundisa mokakatano yango na lisalisi ya mateya na biteyelo. Lisusu, basɛngaki ete esengeli kokebisa basali mobembo likoló na likambo litali kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto na boumeli ya mobembo mobimba—liboso ya kokenda, na ntango ya mobembo, mpe na esika bazali kokenda.
Na oyo etali teknoloji ya sika ya myango ya bopanzi nsango, etuluku moko ya balukiluki na makambo yango bapesaki makanisi ete bikólo bisengeli kozala na mitindá mpo na kolongola biloko oyo bizali kolɛngola bana. Batalelaki mpe likambo litali kotyama ya ebongiseli moko ya mokili mobimba mpo na kotambwisa mosala ya likambo yango. Etuluku mosusu ya balukiluki esɛngaki ete myango ya ordinatere mpe kasɛti video oyo ezali kolakisa bolumbu ya bana mpe mikanda oyo milakisaka bililingi ya bolumbu ya bana misengeli kotyelama mibeko oyo kobuka yango ekopesamela etumbu makasi.
Baboti bakoki kosala nini? Etuluku moko ya balukiluki oyo ezali kotalela bipanzeli-nsango epesaki makanisi ete baboti basengeli kokamata mokumba ya kobatela bana na bango. Elobaki ete “Baboti bakoki te bobele kotambwisa bana na bango wana bazali kokóla mpe babandi kosalela bipanzeli-nsango, kasi basengeli mpe koyebisa bango makambo mosusu, bandimbola mpe biutelo ndenge na ndenge ya makambo mpo ete bákeba na bopusi oyo bipanzeli-nsango ekoki kozala na yango likoló na bango mpe kosalisa bango ete bákóla na lisosoli malamu.”
Emisyó moko ya televizyó na ekólo Suède oyo elobelaki likita yango ebɛtaki nsɛtɛ́ likoló na mokumba ya baboti ya kobatela bana na bango malamu mpe kokebisa bango na makámá oyo makoki kokómela bango. Nzokande, epesaki lisusu toli oyo ete: “Kokebisa bana te bobele na ntina na ‘mibangé ya salite,’ mpamba te bana . . . bakokanisa ete basengeli kokeba bobele na mibangé, bato ya salite, nzokande moto oyo akosala mabe motindo wana ekoki kozala moto oyo alati malamu, sodá to polisi. Na yango, esengeli kokebisa bango na ntina na moto nyonso oyo akobɛtɛla bango masoló ya kolɛngola.” Ya solo, esengeli mpe kokebisa bana na ntina na moto nyonso oyo akoloba na bango makambo ya basi na mibali, ezala mpe moto oyo bango bayebi, mpe báfunda moto yango.
Mwango bobele moko mpo na kosilisa mokakatano yango
Likambo oyo likita ya Stockholm ekokisi te ezali bongo ya kopesa makanisi likoló na lolenge ya kolónga bantina ya kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto. Mikakatano yango ezali bongo kobebisama ya nokinoki ya bizaleli malamu bipai binso; kokólisama ya moimi mpe ya mposa makasi ya biloko ya mosuni; bokóli ya ezaleli ya kobuka mibeko oyo mipesami mpo na kobatela bato na ezaleli ya kozanga boyengebene; kobatela bolamu ya bato, lokumu, mpe bomoi ya basusu; kobeba ya libota; kopalangana ya bobóla oyo euti na kobotama ya bato mingi, kozanga mosala, nkaká kati na bingumba, mpe kokenda kofanda na mboka mopaya; kokóla ya ezaleli ya kokabola mposo na ntina na bapaya mpe bato bakimá mboka; kobimisama mingi ya bilangwiseli mpe mombongo na yango; mpe kobeba ya mateya mpe misala ya mangomba.
Soki kosalelama ya bana na makambo ya kosangisa nzoto ezali kosala mpasi na mitema ya bato, yango ezali te kokamwisa bato oyo batángaka Biblia na likebi nyonso. Mpo na nini bongo? Mpamba te tozali kobika kati na oyo Biblia ezali kobénga ete “mikolo ya nsuka” mpe, engebene Liloba ya Nzambe, yango ezali mpenza “ntango ya mpasi.” (2 Timoté 3:1-5, 13) Na yango, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete bizaleli malamu ezali sé kobeba, boye te?
Nzokande, makanisi ya Biblia ezali kolobela mwango bobele moko mpo na kolónga mikakatano minene ya mokili—kopɛtolama ya mokili mobimba oyo ekosalema na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Mosika te, akomonisa nguya na ye mpe akolongola baoyo nyonso na mabelé bazali kolinga te kotosa mitindá mpe mibeko na ye ya boyengebene: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili.”—Masese 2:21, 22; 2 Batesaloniki 1:6-9.
Kati na baoyo ‘bakolongolama,’ ekozala mpe na baoyo bazali kobebisa bana mpe baoyo bazali kopusa bana na makasi ete básala bondumba. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Moto na pite . . . bato na ekobo . . . mibali bamibebisi na mibali [to na bana mibali] . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Ebakisi ete “bato babebi na bosɔtɔ . . . mpe bato na pite” bakozwa “kufa ya mibale”—oyo ezali bongo kobomama ya libela.—Emoniseli 21:8.
Nzambe akosukola mabelé mpe akotya ebongiseli ya sika mpe ya sembo, “makoló ya sika mpe mabelé ya sika.” (2 Petelo 3:13) Na yango, kati na mokili wana ya sika, bazimbisi, bato na mabe bakozala lisusu te oyo bakobebisa bana oyo bayebi likambo te. Mpe mwana oyo ayebi likambo te akobanga lisusu te ete akosalelama na makambo mabe motindo wana, mpamba te “moto moko akobangisa bango te.”—Mika 4:4.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
“Mbeba oyo eleki kopesa motema mpasi mpe eleki bonyama.”—Maloba ya ministre mokonzi ya ekólo Suède
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
“Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, bato milió 10 kino milió 12 bazali kosangisa nzoto na bandumba oyo bazali bana mike.”—Zulunalo The Economist, Londres
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Mibembo ya kosangisa nzoto ezali ntina monene ya kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto na mikili ya bobóla
[Etanda na lokasa 14]
Mibembo ya kosangisa nzoto—Mpo na nini ezali kosalema?
(Bamoko ya bantina oyo baturiste bazali kosangisa nzoto na bana)
(1) Lokola bayebani te na bisika batambolaka, baturiste bamonaka bongo malamu mpo ete bakolandela bango te lokola yango esalemaka na bisika bafandi
(2) Lokola bayebi koloba lokótá ya mboka te oyo bakómi to bayebi bobele moke, baturiste bakoki kokosama mpenza na likanisi oyo ete kofuta mwana moke mosolo mpo na kosangisa na ye nzoto endimami to ezali kosalisa bana oyo bazali kati na bobóla
(3) Wana bazali na makanisi ya koponapona mposo, baturiste bamonaka lokola ezali litomba kosala bongo epai na bato oyo bazali kotalela lokola bato mpamba
(4) Baturiste bamiyokaka malamu mpo ete babimisaka mosolo mingi te mpo na misala ya kosangisa nzoto na mikili ya bobóla
[Etanda na lokasa 16]
Mokakatano ya mokili mobimba
(Mitángo oyo milandi mipesami na bakonzi ndenge na ndenge ya biyangeli mpe bibongiseli mosusu)
Brésil: Bana soko 250 000 bazali kosala bondumba
Canada: Bankóto ya bilenge basi bazali kosalelama na bondumba na bibongiseli ya misala ya mbindo
Chine: Bana soki 200 000 kino 500 000 bazali kosala bondumba. Na bambula oyo euti koleka, bana basi soko 5 000 babendamaki mpe batɛkisamaki mpo na kosala bondumba na ekólo Myanmar
Colombie: Motángo ya bana oyo basalelami na balabála na makambo ya kosangisa nzoto na engumba Bogotá emati mbala minei na mibu nsambo oyo miuti koleka
États-Unis: Bibongiseli ya Letá bizali komonisa ete bana koleka 100000 bazali kosalelama lokola bandumba
Inde: Bana soko 400 000 basalelami na bakompanyi ya misala ya kosangisa nzoto
Mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti: Bana soki 100 000 bazali koyengayenga na babalabála. Mingi bazali kotindama na balotɛ́lɛ ya misala ya mbindo na mikili ya Mpótó ya Wɛ́sti
Mozambique: Bibongiseli mpo na kopesa lisungi bifundaki bituluku ya basodá ya O.N.U. ete bazali kosangisa nzoto na bana
Myanmar: Basi mpe bana basi soko 10 000 bamemamaka na balotɛ́lɛ ya mbindo na ekólo Thaïlande mbula na mbula
Philippines: Bana soko 40 000 bazali kosalelama na bondumba
Sri Lanka: Bana soko 10 000 kobanda mibu 6 kino 14 bazali kosalelama na makambo ya kosangisa nzoto na balotɛ́lɛ ya mbindo mpe bana mibali soko 5 000 kati na mibu 10 mpe 18 bazali komisalela bango moko na bandako ya baturiste
Taiwan: Bana soko 30 000 bazali kosalelama lokola bandumba
Thaïlande: Bana soko 300 000 bazali kosalelama lokola bandumba