Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Juillet nk. 17-20
  • Kobɔkɔla Nzoi: mosala “Kitoko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobɔkɔla Nzoi: mosala “Kitoko”
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobateli ya “makamwisi ya mikolo nyonso”
  • Makambo ya ntina mpo na kolónga kobɔkɔla nzoi
  • Biloko ndenge na ndenge
  • “Bikelamu ya mayele mpenza”
  • “Mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mafuta ya nzoi Nkisi moko elɛngi
    Lamuká!—2002
  • Mpo na nini Nzambe azali na motema molai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Lamuká!—1997
g97 Juillet nk. 17-20

Kobɔkɔla Nzoi: mosala “Kitoko”

Euti Na Mokomani Na Biso Na Grèce

KOLALA ya moi malɛmbɛmalɛmbɛ ezali kopalanganisa kongɛnga na yango na mapata. Kati na malili mpe londende ya ntɔ́ngɔ́, motuka ya monene oyo ememaka mafuta ya nzoi etɛlɛmaki malɛmbɛ na ngámbo ya nzela na ekitelo ya ngomba. Bilongi mibale ya bato bizali kobima​—balati bagá, sapato ya mbula, bamizingi na bilamba ya ntokya (coton), mpe bazipi bilongi na bango na binkɔti mpo na komibatela. Na likebi mpe na nguya mpenza, bazali kokɔtisa bakɛsi ya mabaya na motuka. Bazali nde bayibi mibale oyo bazali koyiba eloko moko? Te, ezali nde babɔkɔli mibale ya nzoi bazali kobatela limpinga ya nzoi​—bazali sikawa pene ya komema nzoi na bango esika oyo ikozwa biloko na yango ya kosala mafuta ya nzoi.

Babɔkɔli ya nzoi bazali mpenza bato oyo bamikesenisi na basusu na boyokani malamu oyo bazali na yango na motindo ya nyamankɛkɛ (insects) yango. Nzoi ezali mbala mosusu nyamankɛkɛ eleki ntina na kotalela nkita, ibimisaka mafuta ya nzoi, cire mpe isalaka ete fololo ya bilanga ibota mbuma. Epai mosusu, babɔkɔli ya nzoi, oyo ezali bongo babóla, bazali kolinga bikelamu yango ya mike mpe lokola mobɔkɔli moko alobaki yango “bayebi nzoi malamu.”

Mobateli ya “makamwisi ya mikolo nyonso”

Kokóma mobɔkɔli ya nzoi ekoki komonana lokola likambo ya pɛtɛɛ: Kozwa ndako ya nzoi mingi oyo etondi na mampinga na yango, kotya yango na esika oyo fololo ezali mingi, mpe kozonga nsima ya mwa basanza mpo na kozwa mafuta ya nzoi. Nzokande, ezali mpenza bongo te. Mpo na koyeba mpenza mosala oyo yango esɛngaka, tosololaki na John mpe Maria, bango mibale bazali babɔkɔli ya nzoi oyo bayebi mpenza mosala malamu, bayebisaki biso na esengo nyonso mosala na bango oyo balingaka.

Wana John akekamaki na nzeté ya ndako ya nzoi oyo ezalaki polele, alobaki ete “kobɔkɔla nzoi ezali mpenza ngalasisi ya komona makamwisi mokolo na mokolo. Kasi, moto moko te naino asosoli malamumalamu bomoi ya bomoko oyo ezali kati na banzoi, ndenge bayebi kosolola malamu mpenza, mpe mimeseno na yango ya mosala.”

Kolobeláká lisoló litali kobɔkɔla nzoi, John amonisi ete kala bato bazalaki kobimisa mafuta ya nzoi na kopanzáká mampinga na yango, oyo ezalaka kati na madusu ya nzeté to kati na madusu mosusu. Nzokande, na 1851, Lorenzo Lorraine Langstroth, mobɔkɔli ya nzoi Moamerikɛ́ amonaki ete nzoi etikaka ntáká ya bamilimɛtɛlɛ soko motoba kati na nzela na yango izipami na cire. Na yango, moto akoki kosala kɛsi mpe kotika ntáká lolenge moko kati na yango. Kobanda ntango wana, bato bakómaki kosala bakɛsi oyo bakoki komema yango na esika moko kino na esika mosusu, kolongola mafuta ya nzoi mpe cire, kozanga kobebisa limpinga ya nzoi.

John akóbaki koloba ete “mpo na kolónga kobɔkɔla nzoi, esengeli kolinga yango mingi. Yebá ete ozali lokola tata na bango, mpe nakanisi ete bayebaka yango mpe batosaka. Ozali mpe monganga na bango, mosalisi na bango, mpe moleisi na bango na boumeli ya bantango ya mpasi oyo eyaka na eleko ya mpiɔ.”

Maria abakisi ete: “Mobɔkɔli malamu ya nzoi akoki koyeba makambo mingi koleka bobele soki abwaki liso kati na ndako moko ya nzoi, oyo mbala mingi ezalaka na nzoi kati na nkóto 8 mpe nkóto 80. Soki oyebi mosala yango malamu, ntango okofungola ndako ya nzoi, bobele makɛlɛlɛ na bango ekoyebisa yo soki limpinga yango bazali malamu, bazali kobimisa mafuta mpe bazali na ‘esengo’; soki bazali na nzala, soki bazali ‘bitike’ mpamba te mokonzi na bango akufi; soki batomboki mpo na likambo moko oyo esepelisi bango te; mpe makambo mosusu mingi koleka.”

Makambo ya ntina mpo na kolónga kobɔkɔla nzoi

John alobi ete: “Kopona na likebi mpenza esika ya kotya kɛsi ya ndako ya nzoi ezali mpenza likambo ya ntina. Tosalaka milende mpo na kozwa esika ya bafololo mingi epai kuna nzoi bakoki kokenda koluka bilei.

“Mobɔkɔli ya nzoi akoki koluka esika ndimo mpe banzeté ya fololo ezali mpo na kosala ete mampinga na ye ya nzoi mázala ntango nyonso na mosala. Na boumeli ya eleko ya molungé mpe ebandeli ya eleko ya malili, esika oyo etondi na nzeté ebéngami pin mpe sapin ekosalisa na kobimisa lolenge malamu ya mafuta ya nzoi oyo ezali na lángi motane ngwaa, oyo etɛkamaka na ntalo malamu. Bilanga ya nzeté ebéngami serpolet epesaka mafuta ya nzoi ya kitoko mpenza​—oyo ya mpimbo, lolenge babɔkɔli babéngaka yango. Nzoi ibendaka mpe mai ya fololo ya nzeté ebéngami trèfle mpe mélilot mpe luzerne.”

Makanisi mabongi mazali na ntina mingi. Maria alobi ete: “Soki totye ndako ya nzoi na bisika ya ngombangomba, ezalaka malamu kotya yango na nsé ya ngomba. Na bongo, nzoi ekopumbwa likoló ya ngomba, kokenda na esika bafololo ya nzeté ezali, mpo na kozwa mai na yango​—wana bakómi kiló na mokumba​—bakokita malamu kino esika ndako na bango ezali. Soki ndako na yango etyami mosika likoló ya nzeté, yango ekoki kolɛmbisa nzoi mpe mafuta ekozala mingi te.”

Wana asimbaki na bokɛngi nyonso ndako ya nzoi oyo ezalaki na mama ya nzoi oyo azalaki naino elenge kati na ndako na ye, John alobaki ete: “Mobɔkɔli nyonso ya nzoi ayebaka mosala ya ntina oyo mama ya nzoi azalaka na yango mpo na bolamu mpe kobotama ya limpinga. Kati na ndako ya nzoi oyo ezali kobota bana mingi te mpe kobimisa mafuta mingi te, mama ya nzoi oyo azali wana asengeli kobomama mpe kotya mosusu. Mampinga oyo ebimisaka mafuta ya nzoi mingi ezali oyo bamama na yango bazali naino bilenge. Lisusu, soki tolingi kosala mampinga ya sika, tokamataka ndako oyo ekangami mibale esika moko mpe na nsima tokokabola kɛsi na ndambo mibale. Na ndambo moko oyo ezangi mama ya nzoi, totyaka mama ya nzoi oyo azali naino elenge mpe azali na maki. Na eleko ya kofungwama ya bafololo, mama ya nzoi ya sika akobanda kobwaka maki, mpe kotondisa ndako na nzoi basali oyo bazali naino bilenge.”

Nzoi eumelaka na bomoi ntango boni? Bayebisi biso ete bomoi ya nzoi oyo azali mosali etalelaka molende ya mosala na ye. Na eleko ya molungé, soki monzoi azali koluka biloko na bafololo na boumeli ya bangonga soko 15 na mokolo mpe azali kopumbwa na lombangu ya kilomɛtɛlɛ 21 na ngonga moko, azalaka na bomoi bobele ya pɔ́sɔ motoba. Eleko ya mpiɔ esɛngaka misala makasi te mpo na nzoi, lokola basalaka bobele ngonga mibale to misato na mokolo, na yango bomoi na bango ekoki koumela basanza mingi.

Biloko ndenge na ndenge

Eloko ya liboso oyo eyaka na makanisi ntango tozali koloba na ntina na kobɔkɔla nzoi, ezalaka bongo mafuta ya nzoi. Mafuta yango ya elɛngi mpe ya bɔ́tɔ́ngɔ́nú euti na mosala oyo nzoi esali mpo na kobongola mai ya fofolo. Na mwayene, ndako moko ya nzoi ekoki kobimisa kilogrami 29 ya mafuta ya nzoi na mbula moko. Cire ya nzoi ezali mpe eloko mosusu ya motuya oyo euti na mosala limpinga ya nzoi esali. Ndako ya nzoi esalelamaka na boumeli ya mbula mitano to motoba. Na nsima, ekokóma moindo mpamba te mikrobe mpe biloko ndenge na ndenge ekɔti na kati na yango mpe na bongo esengeli kolongolama mpe kotya mosusu. Ndako yango oyo ebebi esalelamaka mpo na kobimisa cire ya nzoi. Mwayene ya cire oyo etɛkamaka ezali kilogrami 9 kino kilogrami 18 mpo na tɔ́ni moko ya mafuta ya nzoi.

Mputulu ya fololo oyo etyami na nzoi​—oyo ezali eutelo monene ya baproteine, bavitamini, minerale, mpe mafuta mpo na bokóli ya mama ya nzoi, mosali mpe nzoi ya mobali​—ekumisami mpe na bato mosusu lokola monɔ́ malamu mpo na kosalisa makɔnɔ mingi. Ndako ya nzoi moko ekoki kobimisa kilogrami 5 ya mputulu yango na mbula moko. Propolis ezali eloko oyo nzoi basalelaka mpo na kozipa ndako na bango mpe kokangisa motumoli nyonso oyo akokɔtela bango oyo aleki bango na nguya mpo na kobengana ye.

Na lolenge moko to mosusu, bilei na biso bitalelami ndambo moko likoló na minei na makoki ya nzoi ya kobotisa mbuma ya nzeté. Pɔ́mɛ, mbuma lokola mánga, pastèque, concombre, mpe mitindo ndenge na ndenge ya mbuma lokola bitabe etalelaka nzoi mpo na kobotisa yango. Ezali mpe bongo mpo na mbóto ya milóna ndenge na ndenge, kati na yango mpe carotte, matungulu, ata mpe fololo ebéngami tournesol. Nyama oyo tolyaka bakisá mpe miliki mpe biloko na yango mosusu lokola manteka to fromaje, eutaka mpe na mosala ya nzoi oyo ibotisaka nzeté ebéngami luzerne oyo baleisaka na yango bibwɛlɛ.

“Bikelamu ya mayele mpenza”

Maria alobi ete “Nakanisi ete babɔkɔli mingi ya nzoi bandimaka ete Nzambe azali,” wana azalaki kolobela kozanga likoki na biso mpo na kolimbola motindo ya kokamwa oyo nzoi ezali na yango, bomoi na bango ya bomoko kati na etuluku, mpe makoki ya kokamwa na lolenge ya komitambwisa mpe kosolola. Bato mingi oyo bayekolaka to babɔkɔlaka nzoi bakoki kondima na makambo nyonso ete nzoi “ezali na mayele mpenza,” likoki motindo wana epesamelaki bango na Mozalisi na biso Monene, Yehova Nzambe.​—Kokanisá na Masese 30:24.

[Etanda/Bililingi na lokasa 19]

Longwa na fololo kino na mesa na yo

1 Monzoi akokenda esika fololo ezali mpe akozwa mai ya fololo

Lokola akendaka kobakema likoló ya fololo, nzoi akɔtisaka mai ya fololo kati na ebombo na ye, oyo ezali kati na mongongo na ye. Mpo na kotondisa ebombo yango, monzoi asengeli kobenda mai na bafololo mikemike 1 000 kino 1 500

2 Wana azongi na ndako, akotya mai ya fololo kati na ebombelo na ye

Ntango akokɔta na ndako ya nzoi, monzoi akobimisa biloko oyo atyaki kati na ebombo na ye na monɔkɔ ya monzoi ya moke oyo azali mosali. Na nsima, mosali yango ya moke akotya mai ya fololo na mpokoloko moko moke mpe akobanda mosala ya kobongola mai ya fololo na mafuta ya nzoi

3 Mobɔkɔli ya nzoi akobimisa mafuta ya nzoi

Na lisalisi ya mbɛli oyo ekangi mɔ́tɔ, akolongola cire oyo ezipaka mpokoloko na ndako mokomoko. Na nsima akotya yango kati na masini moko oyo ekokɔngɔla mafuta

4 Mafuta ya nzoi etyami kati na milangi to na bityeli mosusu

Nkomá likoló ya molangi ya mafuta ya nzoi ekomonisa lolenge ya milóna oyo nzoi basalelaki mpo na kobimisa mafuta ya nzoi. Soki molangi ezali komonisa, okoki koyeba motindo ya mafuta bobele na lángi na yango

5 Mafuta ya nzoi ezali malamu mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na yo! Mafuta ya nzoi ekɔtaka mbala moko na nzoto mpe eumelaka te kopesa nzoto makasi. Balapólo emonisi ete ekoki kosalelama mpo na kosalisa mpota ya kozika mɔ́tɔ mpe mitindo mosusu ya mpota ya mikemike

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto