Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Octobre nk. 19-21
  • Mpo na nini osengeli kokitisa nkanda na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli kokitisa nkanda na yo?
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango bato bazangi kokoka bayoki nkanda
  • Baklisto basengeli mpe kozongisa monɔkɔ
  • Biblia elobi nini mpo na nkanda?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nkanda ebotaka mbuma mabe
    Lamuká!—2012
  • Kebá nkanda ebɛtisa yo libaku te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Octobre nk. 19-21

Engebene Biblia

Mpo na nini osengeli kokitisa nkanda na yo?

EBANDAKI mabe mpenza. Wana bautaki kobalana sika, Jean agangelaki mwasi na ye Sylvie ete: “Sikawa, lokola nazali mokonzi ya ndako oyo, osengeli koyokisa ngai nsɔ́ni te na kosaláká misala ya ndako malɛmbɛmalɛmbɛ.”a Na boumeli ya miniti koleka 45, agangelaki mwasi na ye mpe apekisaki ye ete ameka te kotɛlɛma wana afandaki na divá. Na libala na bango, bamesaná koswana mpe kofingana. Likambo ya mawa, Jean akómaki nkandankanda. Akómaki kokanga bikuke ya ndako na nkanda, kobɛtabɛta makɔfi likoló na mesa ya kúku, mpe kotambwisa motuka mbangumbangu wana azali kobundabunda na yenda, kotyáká bongo bomoi ya bato mosusu na likámá.

Na ntembe te, bizaleli motindo wana bizali komonana mingi. Kasi tómituna, mobali oyo azalaki nde na elónga ya koyoka nkanda, to azangaki bobele kokitisa nkanda na ye? Na bongo, nkanda nyonso ezalaka mabe? Ntango nini nkanda ekómaka mabe? Ntango nini nkanda elekaka ndelo?

Ekoki kozala na bantina malamu ya koyoka nkanda. Na ndakisa, na ntango ya kala, nkanda ya Nzambe epɛlaki makasi epai na bingumba mabe, Sodomo mpe Gomola. (Genese 19:24) Mpo na nini? Mpo ete bafandi ya bingumba yango bamipesaki na misala ya mbindo ya kosangisa nzoto na mobulu, oyo nsango na yango epalanganaki na etúká wana mobimba. Na ndakisa, ntango baanzelu batindamaki epai na Lota moto ya sembo, etuluku ya bilenge mpe mikóló bayaki mpo na kosangisa nzoto na makasi na bapaya ya Lota. Yehova Nzambe azalaki mpenza na elónga ya koyoka nkanda mpo na lolenge na bomoi na bango wana ya mbindo.​—Genese 18:20; 19:4, 5, 9.

Lokola Tata na ye, Yesu Klisto, moto ya kokoka, ayokaki nkanda na mabaku mosusu. Tempelo ya Yelusaleme etalelamaki lokola esika monene ya losambo mpo na libota liponami na Nzambe. Ezalaki “ndako na kobondela” epai kuna bato bakokaki kopesa Nzambe makabo mpe mabonza mpe koteyama na banzela na ye mpo na bolimbisi ya masumu na bango. Kati na tempelo, bakokaki komisɔkisa liboso na Yehova. Nzokande, na mikolo ya Yesu, bakonzi ya Lingomba ya Bayuda bakómisaki tempelo “esika na zando” mpe “libulu na bayibi.” (Matai 21:12, 13; Yoane 2:14-​17) Bazalaki kozwa matomba na bango moko na mombongo ya banyama oyo bato basengelaki kosomba mpo na kopesa mbeka. Solo mpenza, bazalaki koyiba libota ya Nzambe. Na bongo, Mwana ya Nzambe azalaki na elónga mpenza ntango abenganaki bayibi yango na ndako ya Tata na ye. Tomoni mpenza ntina oyo Yesu asengelaki koyoka nkanda!

Ntango bato bazangi kokoka bayoki nkanda

Na bantango mosusu, bato bazangi kokoka bakoki mpenza kozala na bantina malamu ya kosilika. Tótalela oyo ekómelaki Mose. Nzambe autaki kosala likamwisi na kosikoláká libota ya Yisalaele na boombo na Ezipito. Yehova amonisaki nguya na ye na lolenge ya nsɔ́mɔ liboso na banzambe ya lokuta ya Ezipito na kokweisáká malɔ́zi zomi likoló na Baezipito. Na bongo, akabolaki Mai Motane mpo na kobikisa Bayuda. Na nsima, akambaki bango kino Ngomba Sinai, epai kuna abongisaki bango lokola libota ya Teokrasi. Na etɛlɛmɛlo na ye ya moyokanisi, Mose amataki na ngomba mpo na kozwa mibeko ya Nzambe. Yehova apesaki ye mibeko, kati na yango Mibeko Zomi, oyo ekomamaki na “mosapi [ya] Nzambe” likoló na bitánda ya mabanga oyo Nzambe ye moko ayemaki kuna na ngomba. Nzokande, ntango Mose akitaki, akutaki nini? Bato bakómaki kosambela ekeko ya mwana ya ngɔ́mbɛ́ oyo esalemaki na wolo! Oyo nde bato ya makanisi mokuse! Babosanaki makambo ya kokamwisa oyo Nzambe asalaki bobele nsima ya mwa bapɔ́sɔ. Na bosembo mpenza, “nkanda na Mose epelaki.” Abwakaki bitánda ya mabanga mpe ebukanaki mpe na nsima atutaki ekeko yango ya mwana ya ngɔ́mbɛ́ kino ekómaki mputulu.​—Exode 31:18; 32:16, 19, 20.

Na libaku mosusu, Mose asilikaki ntango bana ya Yisalaele bakómaki komilelalela mpo ete bazangaki mai. Lokola ayokisamaki nkanda, Mose abungisaki lokumu na ye ya moto ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ mpo na mwa ntango moke. Yango epusaki ye na kosala libunga moko monene. Na esika ya kopesa lokumu na Yehova lokola Mokokisi na bamposa ya Yisalaele, Mose alobaki na bango na nkanda mpe amikumisaki ye moko mpe akumisaki ndeko na ye Alona. Mpo na yango, Nzambe amonaki malamu ete apesa Mose disipilini. Asengelaki kokɔta te na mokili ya ndaka. Nsima ya likambo yango oyo lisalemaki na Meliba, elobelami esika mosusu te ete Mose asilikaki lolenge wana. Na ntembe te azwaki liteya.​—Mituya 20:1-​12; Deteronome 34:4; Nzembo 106:32, 33.

Na bongo, bokeseni ezali kati na Nzambe mpe moto. Yehova akoki ‘kokanga nkanda na ye,’ yango wana alobelami na bosembo nyonso ete “[ye] akoyoka nkanda noki te” mpamba te bolingo nde ezali ezaleli na ye oyo eleki bizaleli nyonso, kasi nkanda te. Nkanda na ye ezalaka ntango nyonso ya ntina, ezalaka ntango nyonso na elónga, mpe elekisaka ndelo te. (Exode 34:6; Yisaya 48:9; 1 Yoane 4:8) Yesu Klisto, moto ya kokoka, azalaki ntango nyonso na makoki ya kokitisa nkanda na ye; alobelami lokola moto na “motema mosɔkɛmi.” (Matai 11:29) Nzokande, bato bazangi kokoka, ezala bato ya kondima lokola Mose, bazalaka na mokakatano mpo na kokitisa nkanda na bango.

Lisusu, bato batyaka likebi mingimingi te na mbeba oyo nkanda ekoki kobimisa. Kozanga kokitisa nkanda ekoki solo kobimisa makambo ya mpasi. Na ndakisa, nini ekoki kosalema soki mobali asilikeli mwasi na ye kino kotɔbɔla na makɔfi efelo ya triplex oyo ekabolaka biteni ya ndako? Mobali yango akoki kozoka na lobɔkɔ to kobukana. Kasi mingi koleka, lolenge nini mwasi na ye akobanda kotalela bolingo mpe limemya oyo azalaki na yango liboso epai na ye? Efelo ekoki kobongisama na boumeli ya mwa mikolo mpe lobɔkɔ ekoki kosalisama na mwa bapɔ́sɔ; kasi ekosɛnga ntango boni na mwasi yango mpo ete atyela mobali na ye motema mpe apesa ye limemya lokola na ebandeli?

Ɛɛ, Biblia ezali na bandakisa mingi ya bato oyo bazwaki makámá mpo ete balekisaki nkanda na bango. Tótalela bobele mwa ndambo. Nzambe abenganaki Kaina mpe apesaki ye etumbu ya kotambolatambola na mokili nsima wana abomaki ndeko na ye Abele. Simeona mpe Levi balakelamaki mabe na tata na bango mpo ete babomaki bato na Sɛkɛmɛ. Yehova apesaki Uziya maladi ya maba mpo ete mokonzi yango asilikelaki banganga ntango balingaki kosembola ye. Ntango Yona ‘apelaki na nkanda,’ Yehova apamelaki ye. Bato nyonso wana basengelaki kozongisa monɔkɔ mpo na nkanda na bango.​—Genese 4:5, 8-​16; 34:25-​30; 49:5-7; 2 Ntango 26:19; Yona 4:1-​11.

Baklisto basengeli mpe kozongisa monɔkɔ

Lolenge moko lelo, baklisto bakozongisa monɔkɔ mpo na misala na bango ezala liboso na Nzambe to na makambo mosusu, liboso na bandeko na bango bandimi. Yango ekoki mpenza komonana na lolenge oyo Biblia esalelaka maloba ya Greke oyo malobelaka nkanda. Moko na maloba mibale oyo masalelamaka mingi ezali bongo or·geʹ Mingimingi ebongolamaka na “nkɛlɛ” mpe yango epesi likanisi ya kokeba, kútu kolukaluka ntina ya kozala na nkanda, mbala mingi na mokano ya kozongisa mabe na mabe. Na yango, ntoma Paulo akebisaki baklisto ya Loma ete: “Balingami, bóbukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tiká esika mpo na nkanda na Nzambe [or·geʹ]. Pelamoko ekomami ete, Nkolo alobi ete, Kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta.” Na esika ya kokanela bandeko na bango, baklisto balendisamaki ete ‘bálónga mabe na kosaláká malamu.’​—Baloma 12:19, 21.

Liloba oyo mosusu esalelamaka mingi mpo na kolobela nkanda ezali bongo thy·mosʹ. Liloba yango ya moboko “ezali liboso mpenza kolobela mopɛpɛ makasi, mbonge makasi, koningana makasi ya mabelé, banyama oyo bazali kokimakima, to yikiyiki ya bato.” Na bongo, liloba yango ekoki kosalelama na mabaku mingi mpe yango elobelami lokola “kobimisama pwasa ya mayoki ya koyina,” “kopasuka na nkanda,” to “kobulunganisama na mayoki, kobebisáká bongo boyokani kati na makanisi, mpe kobimisáká mobulu makasi kati na ndako to yikiyiki na mboka.” Lokola ngomba ya mɔ́tɔ oyo ekoki kobimisa mɔ́tɔ kozanga ete bato báyeba, mpe kozipa mboka na milinga ya mɔ́tɔ makasi, kobimisa mabanga ya mɔ́tɔ, mpe pɔtɔpɔ́tɔ ya mɔ́tɔ oyo ekoki kozikisa, kokómisa bato bibɔsɔnɔ, mpe koboma, ezali mpe bongo mpo na mwasi to mobali oyo akoki te kokitisa nkanda na ye. Boike ya liloba thy·mosʹ esalelami na Bagalatia 5:20, epai kuna ntoma Paulo atángi “nkanda” esika moko na “misala [mosusu ya] nzoto” (vɛrsɛ́ 19) lokola pite, etamboli ya mbindo mpe milangwa. Ya solo, etamboli ya Jean​—oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló oyo​—emonisi mpenza lolenge ‘nkanda epelaka.’

Na bongo, lolenge nini lisangá ya boklisto ekotalela basangani na yango mosusu oyo bazali mbala na mbala kosalela bazalani na bango makambo na nkanda mpe kobebisa ata biloko na bango? Ezaleli ya nkandankanda ebebisaka makambo mpe eumelaka te na komema na mobulu. Yesu azalaki mpenza na elónga ntango alobaki ete: “Ngai nde nakoloba na bino ete ye oyo [“akoyokela ndeko na ye nkanda ntango nyonso,” NW] akozala na likambo na esambiselo.” (Matai 5:21, 22) Mibali bapesameli toli oyo: “Bólingaka basi na bino, bósalelaka bango makambo na [“nkanda,” NW] te.” Mobali oyo azalaka ‘nkandankanda’ akokisi masɛngami te mpo na kozala mokɛngɛli kati na lisangá. Na bongo, bato oyo bakokaka te kokitisa nkanda na bango bakotalelama lokola ndakisa malamu te mpo na lisangá. (Bakolose 3:19; Tito 1:7; 1 Timoté 2:8) Ɛɛ, nsima ya kotalela ezaleli ya moto motindo yango, lolenge ya etamboli na ye, mpe bonene ya mbeba oyo ezaleli na ye esali kati na bomoi ya bato mosusu, moto yango ya nkandankanda akoki kobimisama na lisangá​—oyo ezali mpenza mawa.

Bongo Jean, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló na biso, alóngaki mayoki na ye? Ayebaki te ete ezaleli na ye ya nkandankanda ekomema ye na likámá? Likambo ya mawa, koswana na bango ekómaki na kotindikana mpe kobwakelana biloko. Kolakisana misapi na nkanda epusaki bango na koyokisana mpasi na kobendanaka na misapi. Jean azalaki kobɛta mwasi na ye na bisika oyo bikotika bilembo te mpo na kobomba etamboli na ye. Nsukansuka, akómaki kobɛtabɛta mwasi na ye, kotutatuta ye na makolo, kobendabenda ye na nsuki, mpe konyokola ye na lolenge ya mabe lisusu koleka. Lelo oyo Sylvie na Jean bakabwaná.

Yango elingaki kosalema te. Na makambo lokola oyo, bato mingi basili kolónga kokitisa nkanda na bango. Ezali mpenza likambo ya ntina kolanda ndakisa ya kokoka oyo Yesu Klisto apesaki. Afundamaki ata mbala moko te ete alekisaki ndelo na nkanda na ye. Nkanda na ye ezalaki ntango nyonso ya ntina; abungisaki ata moke te bokatikati na ye. Ntoma Paulo apesi toli oyo ya mayele na mokomoko na biso ete: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.” (Baefese 4:26) Koyebáká na komikitisa nyonso ete tozali bato bazangi kokoka mpe tokobuka oyo biso tozali kolóna, tozali bongo na bantina mingi ya kokitisa nkanda na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Wana ezali mpenza bankombo na bango te.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]

Saulo alingaki koboma Davidi mpo na nkanda/The Doré Bible Illustrations/Dover Publications, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto