Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Octobre lok. 31
  • “Fungolá miso na yo mpe talá”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Fungolá miso na yo mpe talá”
  • Lamuká!—1997
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 29—Yoele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Koyika mpiko na mikakatano elendisaki elikya na biso epai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tómekola ndakisa ya basakoli—Yoele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Etumba moko oyo euti na nɔrdi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Octobre lok. 31

“Fungolá miso na yo mpe talá”

MAKAMBO nini bana na yo bamonaka? Bitumba? Mobulu? Kobeba ya ezingelo? Bobóla? Maladi? Ya solo, yango ezali makambo oyo mazali komonana na mikolo na biso. Kasi osilá koteya bango ete bátala mosika na makanisi na bango mpe bámona bomoi kitoko na mikolo mizali koya oyo elakami na Biblia? Baboti ya Joel Pierson, elenge mobali ya mibu libwa, basili koteya ye bongo. Matomba nini mamonani?

Tótalela oyo Joel akomaki na lisoló oyo lizalaki na motó na likambo ete “Fungolá miso na yo mpe talá.” Motó na likambo yango epesamaki lokola devware epai na bilenge na eteyelo moko ya etúká Virginie, na États-Unis. Lisólo ya Joel ebimisamaki na zulunalo The Central Virginian, ya 22 Augústo 1996, ezali komonisa ete elikya na ye etyami likoló na makambo oyo ayekolaki na Liloba ya Nzambe. Akomaki ete:

“Fungolá miso na yo mpe talá, okomona ete biloko nyonso ezali mpenza kitoko.

“Oyo nde esengo ya kolamuka na ntɔ́ngɔ́ mpe koyoka ete ezingelo ebebisamaki te. Na esika ya koyoka nsango ya koboma mpe mobulu, bato bazali koyoka nde nsango ya kimya mpe ya esengo.

“Bato ya kartyé bazali kosala mosala esika moko kosalisáká moninga moko mpo na kotonga ndako na ye. Na pembeni wana, tozali komona basusu bazali kolóna fololo. Baninga ya kartyé wana bazali bobele kosala mosala te, kasi makanisi na bango mpe mazali malamu. Bato nyonso bazali kosangana mpo na kosalisana. Babóla bakozala lisusu te, mpe bilei bikotonda bipai binso. Bomoko mpe kimya ekozala na mokili mobimba. Moto moko te akokufa nzala mpe moto moko te akobɛlɛ. Bisika kitoko ya kotalatala ezali mpe talá kuna mwana moke likoló ya mokɔngɔ ya tigrɛ! Ezali bobele tigrɛ te kasi nyama nyonso izali na kimya elongo na bato.

“Nalingi kofanda na esika motindo yango. Okosepela kofanda kuna elongo na ngai?”

Nzambe alaki mpenza mapamboli motindo oyo elenge Joel alobeli awa? Ezali mpenza bongo! Fungolá Biblia na yo mpe tángá bilaka oyo bizwami na Nzembo 46:8, 9; 67:6; 72:16; Yisaya 2:3, 4; 11:6-9; 33:24; 65:17-25; Matai 6:9, 10; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto