Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Octobre lok. 32
  • Azwaki biyano na mituna na ye nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azwaki biyano na mituna na ye nyonso
  • Lamuká!—1997
Lamuká!—1997
g97 Octobre lok. 32

Azwaki biyano na mituna na ye nyonso

Mobali moko oyo asololaki na Batatoli ya Yehova na ekólo Inde amonaki ete makambo oyo bango bazalaki koteya ekeseneki mpenza na oyo bateyaki ye na lingomba oyo azalaki. Ayebisaki Batatoli ya Yehova likambo yango mpe atindaki nkomá na filiale ya Inde mpo na kotuna mituna.

Na nsima, mokolo moko mobali yango atindaki nkomá oyo ebandaki na maloba oyo: “Bandeko na ngai ya bolingo na Lonavla”​—esika oyo filiale ya Batatoli ezali na ekólo Inde. Alobaki ete: “Ntembe mpe mituna nyonso oyo nazalaki na yango ezwaki mpenza biyano na yango na Lamuká! ya 8 Máí 1995, (ebimeli ya Lifalansé) na lisoló oyo ezalaki na motó na likambo ete ‘Osilá komituna?’ Nandimisami mpenza ete Batatoli ya Yehova bazali na solo.”

Lisoló yango kati na Lamuká! epesaki biyano na mituna lokola oyo: “Losambo ya solo esengeli nde kobomba to kokitanisa nkombo ya Nzambe?” “Baoyo bazali kolanda mateya ya lingomba ya solo basengeli kozala na etamboli ya lolenge nini?” “Losambo oyo endimami na Nzambe ekoki kopesa nzela na komikɔtisa na bitumba mpe koboma bato ya mposo mosusu to bikólo mosusu?”

Tomindimisi ete zulunalo Lamuká! ekoki mpe kosunga yo kati na bolukiluki na yo mpo na solo ya Biblia. Soki okosepela kozwa ekzamplɛrɛ moko to mpe olingi ete moto moko aya kotala yo na ndako mpo na kosolola masoló ya Biblia elongo na yo, tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, République Démocratique du Congo, to na adrɛsi ebongi na yo na lokasa 5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto