Makambo mazali koleka na mokili
Kobebisa bonsomi ya lingomba na Mpoto
Na likita moko ya bapanzi-nsango oyo eutaki kosalema na Washington, D.C., na États-Unis, Massimo Introvigne, nganga-mayele na makambo ya Lingomba ya Katolike na Turin, na Italie, alobaki ete na bikólo mingi, basali baliste to balapolo ya mangomba ya mikemike. Mangomba oyo bataleli yango lokola “mangomba ya mikemike oyo ezali likama mpo na bato,” ezali Lingomba ya Batiste, ya Bouddha, groupes charismatiques ya Katolike, Lingomba ya Bayuda ya Hassidim, ya Batatoli ya Yehova, ya Quakers mpe ya Young Women’s Christian Association. Lapolo moko ya Allemagne etángi bituluku 800, lapolo ya Belgique etángi bituluku 187 mpe lapolo moko ya France etángi bituluku 172. Introvigne akomi ete na France “balongolaki balakisi oyo, na boumeli ya bambula, basalaki mosala malamu mpe na bosembo na biteyelo ya Leta bobele mpo bazali Batatoli ya Yehova.” Compass Direct, kompanyi ya kopanza nsango emonisi ete Introvigne azali komitungisa lolenge bato bazali kotya motema na bibongiseli oyo ezali kotɛmɛla mangomba yango ya mikemike. Alobaki ete: “Emonani polele ete bakambi ya bibongiseli yango bazali kopanza nsango mpo na kozimbisa bato, mpe mbala mingi bazali kopesa nsango ya lokuta, likoló na mangomba oyo ezali na bato mingi te, mpe na yango bazali kobebisa bonsomi ya lingomba na mokili.”
Maninisa oyo efungwamaka mpe ekangamaka yango moko
Balukuluki na Iniversite ya Sydney, na Australie, babimisi lolenge ya lilinisa moko oyo ekangamaka yango moko soki mpɛpɔ oyo ezali kopumbwa na likoló mpenza te ezali kobelema. Soki mpɛpɔ eleki mpe makɛlɛlɛ esili, lininisa yango ekofungwama yango moko. Na lisalisi ya ebongiseli moko ya ordinatere oyo etyami na lininisa, mikro moko oyo etali na libándá, eyebaka mpe makɛlɛlɛ ya biloko mosusu, lokola mituka ya minene. Bameki ya maninisa yango bamoni ete maninisa yango makoki kokitisa makɛlɛlɛ na desibil 20, degre ya makɛlɛlɛ oyo ekoki kobebisa mpɔngi ya bato te. Zulunalo New Scientist elobi ete: “Moko na matomba minene ya ebongiseli yango ezali ete bandako yango ezali na makɛlɛlɛ te, mpe ezali kopesa mopɛpɛ malamu kozanga ete bátya bamasini ya kopesa mopɛpɛ oyo esɛngaka mbongo mingi.”
Bopusi ya televizyo likoló na bana
Zulunalo El Universal ya Mexique elobi ete: “Bana ya mibu 6 kino mibu 12 balekisaka ngonga 38 liboso ya televizyo, nzokande na kelasi balekisaka bobele ngonga 23. Na yango dessins animés mpe masano ya video ezali na bopusi mingi likoló na bango koleka makambo oyo bazali koyekola na eteyelo. Omar Torreblanca, molukiluki, alobi ete televizyo ezali koteya bana ndenge basengeli kosala soki bakutani na likambo moko—kasi bana bazali koyeba te soki etamboli yango ezali malamu to mabe. Alimboli ete: “Soki na filme moko to na dessins animés, moto moko alongaka ntango nyonso, mwana akobanda komekola ye.” Bolukiluki ya Torreblanca emonisi ete “makambo oyo bana bamonaka na televizyo, basalelaka yango na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Kasi makambo oyo bayekolaka na kelasi basalelaka yango te, mpamba te batalelaka eteyelo lokola motungisi.”
Kotambola na makolo ekoki koyeisa bomoi molai
Zulunalo Asiaweek elobi ete kotambola na makolo mokolo na mokolo ekoki koyeisa bomoi molai. Na boumeli ya mbula 12, balukiluki batalelaki mibali 707 ya mibu kobanda 61 kino 81. Mibali yango bazalaki komɛla likaya te mpe bazalaki kotambola na makolo. Baoyo “bazalaki kotambola kilomɛtɛlɛ 3,2 na mokolo—ata malɛmbɛmalɛmbɛ—bamibatelaki na katikati ya makama oyo makokaki komema bango na liwa.” Bato oyo bazalaki kotambola te bazalaki na likama mbala 2,5 ya kokufa na lolenge nyonso ya kanser koleka baoyo bazalaki kotambola kilomɛtɛlɛ soko misato na mokolo. Bolukiluki yango ebimisamaki na zulunalo The New England Journal of Medicine, emonisaki ete soki moto azali kotambola na makolo ata mɛtɛlɛ 800 na mokolo, yango ekoki kopesa ye bomoi molai. Kala, minganga mosusu bazalaki na ntembe mpo na matomba ya konyolisa nzoto ata mokemoke. Sikawa, balukiluki bamoni ete, “Kolendisa mibange ete bátambolaka na makolo ekoki kopesa bango matomba malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango.”
Miziki esalisaka bana
Gordon Shaw, profesere ya physique na Iniversite ya Californie, na engumba Irvine alobi ete, koteya bana ya mibu misato to minei miziki ekoki kosalisa bango ete bákolisa makoki na bango ya kokanisa. Na mibu wana ya bomoi, boyokani ya misisa ya bɔɔngɔ esalemaka malamu mpenza. Mpe balukiluki bamonisi ete kosala yango mbala na mbala ata na boumeli ya miniti zomi na mokolo “ebongisaka lolenge ya kokanisa ya mwana.” Na boumeli ya sanza libwa, bakokanisaki matomba ya bana oyo bazalaki koyekola kobɛta piano na etuluku moko ya bana oyo bazalaki kopesa bango mateya ya kosalela ordinatere to baoyo basalaki eloko moko te. Emonanaki ete bana oyo bayekolaki kobɛta piano mayele na bango ekolaki na 35 %, nzokande bana mosusu mayele na bango ekolaki bobele mwa moke to ekolaki te, ekomi yango zulunalo Sunday Times.
Kitoko ya zɛlo na mabongo
Kitoko ya zɛlo na mabongo ekoki kobebisama soki bazali kotya yango bopɛto mingi koleka? Ɛɛ, bolukiluki moko oyo esalemaki na Swansea Bay, na Pays de Galles, emonisi yango. Kitoko ya zɛlo etaleli mingimingi bokula na yango, epai bosɔtɔ etondaka mingi na ntango ya mbonge oyo esalaka mbala mibale na mokolo. Bosɔtɔ yango ekoki kozala banzete, banzete oyo ezali kotepa, matiti mpe banyama oyo ekufá, bosɔtɔ nyonso oyo esangisami na matiti babéngi algues. Bosɔtɔ yango ebombaka nyamankɛkɛ oyo epolisaka matiti yango, mpe na nsima, lokola epanzanaka na mopɛpɛ mpe na mbonge, ekangamaka na zɛlo. Bosɔtɔ na bokula ya zɛlo ezalaka mpe bilei mpo na bandɛkɛ mpe banyama mosusu lokola campagnol, mpoko, nsimbiliki ya zamba, ata mpe monsole. Ezalaki ntango bamonaki ete bandɛkɛ oyo bayaka kolya na bokula ya zɛlo ezalaki lisusu mingi te nde bato oyo batalelaka ezingelo basosolaki ete kopɛtola zɛlo ya ebale mbala na mbala ezalaki kobebisa kitoko na yango. Mbala mingi, bato mingi oyo balingaka mabongo oyo mazali na bitando ya zɛlo mbala mingi bapɛtolaka yango na koleka ndelo. Zulunalo The Times ya Londres elobelaki mobali moko oyo alobaki ete bálongola ata mabanga mikemike oyo ezalaka na zɛlo.
Bilei oyo bilyamaka na mokili mobimba
Osilá komituna mpo na koyeba boike ya bilei oyo bato balyaka na mokili mobimba na mokolo moko? Zulunalo To Vima ya ekólo Grèce epesaki mitángo ya nsɔmɔ. Na mokili mobimba, babimisaka maki miliare mibale mpe balyaka yango—motángo ya maki ekoki mpo na kosala liboke ya maki oyo ekokani na bonene ya ekólo Chypre! Na mokili mobimba, bato balyaka masangu tɔne miliare 1,6 mpe batyaka mungwa tɔne 500 000 na bilei. Bato mingi mpe balingaka mbala (pomme de terre), balyaka mbala tɔne 727 000. Bato mingi na mokili mobimba balyaka loso, mokolo na mokolo babimisaka tɔne milio 1,5. Kati na yango ba Chinois balyaka tɔne 365 000. Tɔne 7 000 ya tii ya matiti ekoki kotondisa kɔpɔ soko miliare misato. Bato ya makoki balyaka tɔne mibale ya caviar. Na mikili ya Mpoto, moto oyo azali mokóló alyaka biloko oyo ekopesa ye calories 4 000 na mokolo—soki tokokanisi na calories 2 500 oyo esɛngami mpo na moto nyonso—nzokande na Afrika moto oyo azali mokóló alyaka biloko oyo ekopesa bobele calories 1 800.
Mbisi babéngi anguilles izali kosala mosala
Zulunalo The Daily Yomiuri elobi ete na Japon, bazali kosalela anguille mpo na komeka lolenge ya mai. Esili koleka mbula mitano, profesere Kenji Namba ya Iniversite ya Hiroshima amonaki ete mbisi yango ezali koyeba ata mbongwana moke ya mai. Biloko oyo ezali na ngɛngɛ lokola cadmium to cyanure elɛmbisaka lombangu ya kobɛta ya motema ya anguille. Nzokande eloko babéngi trichloréthylène, oyo epesaka kanser, ekolisaka lombangu ya kobɛta ya motema na yango. Masini moko oyo ezali kotɛkisama sikawa ezali kosalelama mpo na koyeba ndenge motema ya anguille ezali kobɛta. Masini yango ezali na tiyo moko oyo anguille ekɔtaka. Lokola mai elekaka na tiyo yango, bimekeli ya kura oyo bikangisami likoló na yango bikɔtisaka lombangu ya kobɛta ya motema ya anguille, mpe masini mosusu babéngi téléalarme eyebisaka moto oyo azali kosalela masini yango mbongwana nyonso oyo ekosalema. Anguilles oyo basalelaka iutaka na mai oyo ezali mpenza pɛto mpe mpo na kobatela bosikisiki, batyaka mosusu sanza na sanza.
Mokaba ya komibatela mpe makama ya motuka
Zulunalo The Tico Times ya San José, na ekólo Costa Rica elobi ete Esambiselo monene ya ekólo yango elongolaki mobeko oyo ezalaki kolobela kolata mokaba ya komibatela, mpo ete mobeko yango ezalaki kobebisa bonsomi ya bato. Banda ekateli yango ezwamaki, basɔfɛlɛ oyo balingaka kolata mokaba ya komibatela na motuka bazali lisusu mingi te. Liboso bato 87 likoló na monkama bazalaki kolata mokaba, sikoyo bato 44 likoló na monkama nde bazali kolata. Nzokande, bato oyo bazali kokufa mpe kozwa makama na motuka bakómi mingi. Zulunalo yango elobi ete ebongiseli ya Sécurité routière ya ekólo Costa Rica ezali kosala molende mpo ete bato bázokaka lisusu mingi te, kasi molende yango ezali kolonga te ntango sɔfɛlɛ mpe bato oyo bazali na kati ya motuka bakangi mikaba na bango ya libateli te. Manfred Cervantes, momonisi ya ebongiseli yango alobi ete: “Tolingi mpenza bato báyeba ete bakoki kobatela bomoi na bango soki bamimonisi lokola basɔfɛlɛ oyo bazali kotalela bomoi na motuya.”
Likaya ebomaka
Profesere Judith Mackay ya Asian Consultancy on Tobacco Control alobi ete, na mokili mobimba bato miliare 1,1 bamɛlaka likaya. British Medical Journal elobi ete ntango likita ya mbala ya zomi ya mokili mobimba mpo na likaya mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto esalemaki, bakanisaki ete likaya ebomaki bato milio misato na 1990. Na mobu 2025 kino mobu 2030, bato koleka milio zomi bakokufa na likaya. Zulunalo yango elobi ete na boumeli ya mbula 30 oyo ezali koya, bato mingi bakokufa na likaya na mikili ya bobola koleka mikili ya bozwi. Richard Peto, profesere ya makambo ya mitángo (statistique) na makambo ya minganga na Iniversite ya Oxford alobi ete, “Likaya ezali koboma bato mingi na ekólo Chine koleka bikólo mosusu nyonso.”