Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Avril nk. 10-12
  • Ndenge nini nakoki kozala na bomoi kozanga baboti na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki kozala na bomoi kozanga baboti na ngai?
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Nani akobɔkɔla ngai?’
  • Mokumba ya libota
  • Komisalisa yo moko
  • Kolonga mokakatano yango
  • Ndenge nini nakoki koyokana ná bandeko na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Ndenge ya kosunga mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Biblia elobi nini na likambo etali kosunga baboti oyo bakómi mibange?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • ‘Tókokisa mposa ya mabota na biso’—Lolenge nini kolónga ntembe yango kati na mikili ya bobólá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Avril nk. 10-12

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Ndenge nini nakoki kozala na bomoi kozanga baboti na ngai?

“Ntango nazalaki na mibu misato mpe ndeko na ngai ya mwasi na mibu minei, baboti na ngai babomaki libala na bango. Basambaki mpo na kowela nani akozwa mokumba ya kobɔkɔla biso, mpe bakonzi bapesaki biso na mabɔkɔ ya mama na biso. Nzokande, ntango nakómaki na mibu nsambo, ngai na ndeko na ngai ya mwasi tozwaki ekateli ya kokende kofanda epai ya tata na biso.”​—Horacio.

NSIMA ya mwa bambula, tata ya Horacio mpe makango na ye bakendaki kofanda epai mosusu​—basundolaki Horacio mpe ndeko na ye ya mwasi. Horacio alobi ete: “Ezali mpo na bongo nde ntango nakómaki na mibu 18, nazwaki mokumba ya kotambwisa libota na biso oyo esangisaki yaya na ngai ya mwasi oyo azalaki na mibu 19, lɛki na biso ya mwasi oyo azalaki na mibu 12, ye abotamaki na mama mosusu​—kasi alingaki kofanda na biso​—mpe ngai moko.”

Lokola lisolo moko ya Lamuká! elobelaki yango, bamilio ya bilenge na mokili mobimba bazali kokola kozanga baboti na bango.a Lokola Horacio, bilenge mosusu baboti na bango basundolá bango. Kasi, basusu baboti na bango bakufaki to bakabwanaki na bango na ntango ya bitumba to na ntango ya makama mauti na biloko bizalisami. Ezala ata likambo nini oyo esali ete baboti bázala te, kozala na bomoi kozanga baboti ekoki kozala mokakatano monene mpe likambo ya mpasi. Mpe yango ekoki mpenza kopesa yo mikumba minene.

‘Nani akobɔkɔla ngai?’

Lolenge okoki kolonga na likambo yango etaleli mingi mpenza mibu na yo ya kobotama mpe makambo oyo okokutana na yango. Ya solo, likambo yango ekoki kozala mpasi mingi soki ozali naino mwana to elenge mpenza. Atako bongo, ekoki kozala ete obwakami mpenza te. Mbala mosusu nɔkɔ, tata-lɛki, tata-kulutu, mama-lɛki, mama-kulutu, tata-mwasi to yaya na yo ya mobali to ya mwasi akolinga kokamata yo epai na ye.

Epai ya Batatoli ya Yehova, kotalela bitike mpe basi-bakufeli-mibali ezali eteni moko ya losambo na bango. (Yakobo 1:27; 2:15-​17) Mpe mbala mingi, bandeko kati na lisangá basalisaka. Na ndakisa, Horacio na bandeko na ye ya basi bayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova mpe bazalaki koyangana na makita na bango. Kuna bakutanaki na libota moko ya baklisto oyo babandaki kosalisa bango. Horacio alobi ete: “Nazali na botɔndi mingi epai na Yehova na ndenge azali kotambwisa bomoi na biso mpe kosalisa biso na bolingo nyonso mokolo na mokolo. Libota moko oyo ezali mpenza bato ya elimo kati na lisangá oyo ezali mpe na bana ya mbula na biso esalisaki biso. Libota yango ezwaki biso, mpe na bongo, lokola esalemaki naino liboso te, tomiyokaki mpenza ete tozalaki kati na libota, libota oyo tokokaki kotyela motema.”

Nzokande, bilenge nyonso bazwaka libaku ya ndenge wana te. Lapolo moko ya UNICEF elobi ete: “Mbala mosusu bana oyo bazali bango moko bakamataka bango na mabota oyo na nsima enyokalaka bango, esalisaka bango misala makasi kozanga kofuta bango to kopesa bango likoki ya kokola malamu, ekómisaka bango bandumba to ata mpe baombo.” Na bongo, soki ozali na moto moko oyo azali kobɔkɔla yo malamu, zalá mpenza na botɔndi mpo na ye.

Ya solo, kozala na bomoi kozanga baboti ezali mpenza likambo ya mpasi mingi. Mpe okoki mpenza koyoka nkanda mpo ete bazali wana te mpo na komibanzabanza mpo na yo. Soki eboto na yo moko to ndeko na yo moko ya mokóló azali koyebisa yo nini osengeli kosala mpo ete ye moto azali kobɔkɔla yo, yango ekoki mpenza kobakisa nkanda na yo. Kasi kokangela bato oyo bazali kobɔkɔla yo nkanda te. Biblia elobi ete: “Kebá ete nkanda emema yo na kobɛta mabɔkɔ na litiyo . . . Kebá ete omibalola te na makambo ya mabe, mpamba te oponi yango kasi mpasi te.” (Yobo 36:18, 21) Omikundola elenge mwasi na nkombo Ɛsɛtɛlɛ oyo alobelami na Biblia. Lokola azalaki etike, abɔkwamaki na Moledekai, oyo azalaki ndeko (cousin) na ye. Atako azalaki tata oyo abotaki ye te, Moledekai ‘azalaki kopesa ye mitinda,’ oyo azalaki kotosa, ata ntango akómaki mokóló. (Ɛsɛtɛlɛ 2:7, 15, 20) Zalá na botosi mpe ndimá makambo moto oyo azali kobɔkɔla yo azali kosɛnga. Yango ekolɛmbisa matata mpe ekokómisa makambo pɛtɛɛ mpo na yo mpe mpo na moto oyo azali kobɔkɔla yo.

Mokumba ya libota

Soki ozali na ndeko ya mokóló​—to soki yo moko ozali mokóló​—mbala mosusu likoki ezali mpo na yo mpe bandeko na yo ete bómibɔkɔla bino moko. Ekoki mbala mosusu kokóma ete ozwa mokumba ya kotambwisa libota​—yango ezali mpenza mokumba monene! Nzokande, na makambo motindo wana, bilenge mingi basali mosala monene ya kobɔkɔla bandeko na bango.

Ya solo mpenza, okoki na bantango mosusu koyoka nkanda. Kasi soki okanisi ete olingaka bandeko na yo mpe ozali komibanzabanza mpo na bango, yango ekoki kosalisa yo ete ozala mingimingi na makanisi malamu. Ekoki mpe kosalisa yo soki otaleli likambo yango lokola mokumba oyo Nzambe apesi yo. Ya solo, esɛngami na baklisto ete basengeli komibanzabanza mpo na mabota na bango. (1 Timote 5:8) Kasi ata soki ozali kosala milende ya kozala tata to mama ya bandeko na yo, okoki kozala soko moke te moboti na bango.

Ezali malamu te kolinga ete bandeko na yo básalela yo makambo lolenge bazalaki kosalela baboti na yo. Ya solo, ekoki kozwa mwa ntango liboso ete bándima ezaleli yango mpe bátalela yo lokola motambwisi na bango. Na bongo, na kozeláká, salá makasi ete osilikaka mpambampamba te. Pɛngolá “makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala.” Na ndakisa na yo, teyá bandeko na yo ete “bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisanaka.”​—Baefese 4:31, 32.

Horacio andimi ete azalaki kosala mabunga: “Na bantango mosusu nazalaki na makambo makasimakasi na bandeko na ngai. Kasi na mabaku mosusu, yango ezalaki libateli, mpe tobatelaki bizaleli malamu na miso ya Yehova.”

Komisalisa yo moko

Soki baboti na yo bazali te mpo na kobɔkɔla yo, kokokisa bamposa na yo moko na mosuni ezali mpenza lobanzo monene. Soki olingi koyeba mosala moko, na ndakisa, kolamba, kotya bopɛto na ndako, mpe kosala misala misusu ya ndako oyo osengeli sikawa kosala yango, mbala mosusu bakóló mosusu na lisangá ya boklisto bakoki kosalisa yo na bandeko na yo. Kasi okosala nini mpo na kozwa mbongo? Mbala mosusu ozali mpenza na likambo mosusu ya kosala te bobele koluka mosala.

Nzokande, misala emonanaka mpenza mingi te mpo na bilenge oyo batángá mingi te, bayebi makambo mingi te, to bayebi kosala mosala malamu te. Na yango, soki likoki ezali mpo na yo ete osilisa kelasi na yo​—to oyekola mosala moko ya mabɔkɔ​—ezali malamu ete osala bongo. Horacio amikundoli ete: “Ngai na yaya na ngai ya mwasi tozalaki kosala mosala mpe tozalaki kofuta mbongo mpo na kelasi na ngai mpe mpo na lɛki na biso ya mwasi.” Soki ofandi na mokili moko ya bobola, osengeli kosalela mayele na yo mpo na kobikela.​—Talá lisolo “Kozala na mayele ya kozwa mosala ya kosala na mikili ya bobola,” na Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 1994 (ebimeli ya Lifalanse).

Na mikili ya bozwi, likoki ekoki kozala mpo na kozwa lisungi ya mosolo na Leta. Mbala mingi, Leta to bibongiseli mosusu esalisaka bana oyo bazali na baboti te to oyo basundolamá. Na ndakisa, bibongiseli mosusu ekoki kosalisa yo mpo na kozwa bilei to kolukela yo esika ya kofanda. Ya solo, lisungi ya mosolo oyo okozwa osengeli kosalela yango na mayele mpenza. Biblia elobi ete: “Mosolo ezali mpo na libateli.” (Mosakoli 7:12, NW) Soki ozali kokeba te na lolenge ozali kosalela yango, mbongo ekoki noki ‘kozwa mapapu mpe kopumbwa.’​—Masese 23:4, 5.

Kokokisa bamposa na yo moko na mosuni ekoki kozala mpasi te soki mokóló moko azali kopesa yo mabɔkɔ. Nzokande, na nsima, ekozala na ntango oyo okosengela komileisa yo moko. Lokola ozali na baboti te mpo na kolendisa yo na makambo ya kelasi, ekoki kosɛnga milende mpenza mpo na komipesa mpenza na kelasi. Toli ya moklisto ntoma Paulo oyo apesaki Timote na ntina na bokoli na ye na makambo ya elimo esengeli mpe kosalelama mpo na kelasi na yo: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bámona polele ete ozali kotambola liboso.” (1 Timote 4:15) Na kosaláká bongo, okopesa ndakisa malamu epai na baoyo bazali zingazinga na yo, yo moko mpe okozwa na yango matomba.

Likambo oyo eleki ntina mpo na yo ezali bongo komileisa yo moko na elimo. Salá manaka ya mokolo na mokolo oyo ebongi mpo na makambo ya elimo. (Bafilipi 3:16) Na ndakisa, epai ya Batatoli ya Yehova, mabota bazalaka na momeseno ya kotalela mokapo ya Biblia mokolo na mokolo. Mpo na nini te kokómisa yango mpe momeseno na yo? Botángi ya Biblia mpe koyangana na makita mbala na mbala ekosalisa yo ete ozala mpe makasi na elimo.​—Baebele 10:24, 25.

Kolonga mokakatano yango

Kozala na bomoi kozanga baboti ezali mokakatano monene, kasi yango elingi koloba te ete makambo nyonso mabebi. Paola, elenge ya mibu ntuku mibale, mama na ye akufaki ntango azalaki bobele na mibu motoba. Ntango akómaki na mibu zomi, tata na ye mpe akufaki. Mwasi moko ya motema boboto akamataki ye na bandeko na ye minei ya basi. Bomoi na bango ezali ya mpasi? Te. Paola alobi ete: “Mbala mosusu tozali mpenza ndenge libota ezalaka te, kasi tozali na bomoi malamu. Ya solo, bolingo oyo tozali na yango kati na biso ezali makasi koleka bolingo oyo emonanaka na mabota mingi.”

Irene, ndeko ya Paola ya mwasi abakisi ete: “Atako tozali na baboti na biso te, tozali bobele lokola bilenge mosusu.” Toli nini apesi na bilenge mosusu oyo bazali na ezalela lokola ya ye? “Kokanisa te ete bomoi na yo ebebi.” Bobele bongo, Horacio alobi ete: “Ezalela yango epesá ngai nzela ete nakóma na makanisi ya bokóló.”

Kozala na baboti te ezali moko ya makambo oyo maleki mpasi mpenza. Nzokande, omindimisa ete na lisalisi ya Yehova, okoki kolonga mpe kozwa mapamboli na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Mpo na nini nasengeli kozala na bomoi kozanga baboti na ngai?,” na Lamuká! ya 22 Novɛmbɛ 1998 (ebimeli ya Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 11]

Okoki kozwa lisungi epai ya bankulutu baklisto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto