Biblia elobi nini?
Ebongi kosambela Nzambe na nzela ya bikeko?
“Bateyá ngai ete bikeko ekosalisa ngai namiyoka penepene na Nzambe.”—Mack.
“Ndako na biso etondaki na bikeko ya losambo. Tozalaki kokanisa ete yango ezalaki kosala ete Nzambe asepela na ndako na biso.”—Herta.
“Tozalaki kofukamela bikeko. Tozalaki komituna te soki Nzambe akanisaka nini na likambo yango.”—Sandra.
OKANISI nini na maloba yango? Bato mingi bakanisaka ete bikeko esalisaka bango mpo na kosambela Nzambe. Likanisi yango ezali solo? Ndenge nini Nzambe atalelaka likambo yango? Tótalela oyo Liloba na ye, Biblia elobi na likambo yango.
Ndenge oyo Nzambe atalelaka bikeko
Bikeko ya losambo ezali biloko nyonso oyo moto akoki kosalela mpo na kosambela. Yango ekoki kozala bikulusu, bililingi, bafɔtɔ, to eloko mosusu nyonso oyo ezali elilingi ya eloko moko oyo ezali na likoló to awa na mabelé.a Drapo mpe ekoki kosalelama lokola eloko ya losambo.
Bato basalelaka biloko yango banda kala mpenza. Yango wana, na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango ekólo Yisalaele eutaki kosalema, Nzambe apesaki Mibeko Zomi oyo emonisaki polele ndenge oyo atalelaka likambo ya kosambela bikeko. Alobaki boye: “Okosala ekeko mpo na yo te, soki elilingi ya eloko na lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse ya mokili te. Okogumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe ya zuwa.”—Exode 20:4, 5.
Tomoni ete Nzambe apekisaki makambo mibale: Ya liboso, bato na ye basengelaki te kosala bikeko mpo na losambo, mpe ya mibale, basengelaki te ‘kogumbamela yango’ to kosalela yango. Mpo na nini Mozalisi apekisi bato básala bikeko? Ntina moko oyo esengeli te kosala bililingi ya Nzambe ezali ete “moto amoná Nzambe ata mokolo moko te.” Yehova azali na nzoto ya mosuni te; azali elimo mpe afandaka na likoló. (Yoane 1:18; 4:24) Ntina mosusu oyo esengeli te kosala bililingi ya eloko mosusu ezali ete Nzambe azali kosɛnga ete tósambela kaka ye. Alobi boye: “Nakopesa nkembo na ngai epai ya mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.” (Yisaya 42:8) Mpo na ntina yango, ezali mpe mabe kosalela ekeko mpo esalisa biso na kosambela Nzambe. Ntango Alona, mokambi moko ya Bayisalaele asalaki ekeko, Yehova asilikaki makasi.—Exode 32:4-10.
Mpo na nini esengeli te kogumbamela yango?
Na ntina na bikeko, Biblia elobi boye: “Bizali na monɔkɔ kasi bikolobaka te; bizali na miso kasi bikomonaka te; bizali na matoi kasi bikoyokaka te.” Na nsima epesi likebisi oyo: “Baoyo bakotya elikya na bango wana bazali mpe bongo,” elingi koloba lokola bato bakufá!—Nzembo 115:4-8.
Kosambela bikeko ezali mpe likambo ya kozanga bosembo. Omituna boye, ‘Nakoyoka ndenge nini soki napesi mwana na ngai likabo moko ya ntalo mingi, bongo akei kopesa matɔndi epai ya moto moko oyo ayebi te, to epai ya eloko moko?’ Ndakisa yango ekoki kosalisa yo omona ndenge oyo Mozalisi na biso, Mopesi ya bomoi, ayokaka ntango bato bazali kopesa biloko mosusu—ata mpe bikeko—lokumu mpe losambo oyo ebongi na ye.—Emoniseli 4:11.
Lisusu, lokola bato basalami na elilingi ya Nzambe, bamisambwisaka mpenza ntango bazali kosambela bikeko, biloko oyo ezali na bomoi te! (Genese 1:27) Mpo na bato oyo basalaki makambo ya ndenge wana, mosakoli Yisaya akomaki boye: “Bazali kokumbama liboso ya mosala ya mabɔkɔ na bango, liboso na yango esali misapi na bango mpenza. Boye moto asɔkisami mpe bato bakweisami na nse. [Yehova Nzambe] limbisá bango te!”—Yisaya 2:8, 9.
Likambo oyo epesaka Nzambe nkanda koleka na losambo ya bikeko ezali ete, bato oyo basalaka yango basambelaka nde bademo—banguna ya Nzambe. Ntango Bayisalaele batikaki Yehova mpe bakómaki kosambela bikeko, Deteronome 32:17 elobi ete “bakabaki mbeka epai ya [bilimo] mabe,” kasi epai ya Nzambe te.
Bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto bazalaki kosalela bikeko na losambo na bango? Te! Yoane, ntoma moko ya Yesu akomaki boye: “Bana mike, bókeba na bikeko.” (1 Yoane 5:21) Buku moko (Early Church History to the Death of Constantine) elobi boye: “Likambo moko te ekokaki kozala mabe mingi mpo na bayekoli ya liboso koleka losambo ya bikeko.”
Losambo oyo ebongi
Yesu alobaki boye: “Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Ya solo, Nzambe alingi ete tóyeba ye mpe bomoto na ye—makambo oyo alingaka, oyo aboyaka, mitinda na ye, mpe mokano na ye mpo na biso. (Yoane 17:3) Kutu, ezali mpo na yango nde akomisaki Biblia. (2 Timote 3:16) Lisusu, lokola Nzambe “azali mosika te na mokomoko na biso,” tokoki kobondela ye ata na ntango nini, na esika nini, kozanga kosalela bikeko.—Misala 17:27.
Sandra, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ntango nakɔtaki na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, namonaki ata ekeko moko te. Batatoli basalelaki Biblia mpo na komonisa ngai bizaleli ya Nzambe mpe masɛngami na ye. Na ndenge yango, nayekolaki ndenge oyo nakoki kosambela mpo Nzambe ayoka ngai. Sikoyo, namoni ete nayebi mpenza Mozalisi mpe nazali na boyokani malamu na ye.” Sandra amonaki ete mateya ya solo ya Biblia ebɔndisaka mpe epesaka mpenza bonsomi. (Yoane 8:32) Yo mpe okoki komona yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Mpo na nini tosengeli koboya bikeko ya lolenge nyonso na losambo na biso?—Nzembo 115:4-8; 1 Yoane 5:21.
◼ Ndenge nini tosengeli kosambela Nzambe ya solo?—Yoane 4:24.
◼ Ndenge nini okoki koyekola solo na ntina ya Nzambe, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa yo?—Yoane 8:32; 17:3.