Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 74
  • Moto oyo azali kobanga te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto oyo azali kobanga te
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Yehova
    Teyá bana na yo
  • Mosakoli na “eleko ya nsuka ya mikolo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Yehova atindi Yirimia asakola
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 74

Lisolo 74

Moto oyo azali kobanga te

BÓTALA ndenge bazali kosɛka elenge mobali oyo. Nkombo na ye nani? Nkombo na ye Yirimia. Azali mosakoli monene ya Yehova.

Mwa moke nsima ya ntango oyo Mokonzi Yosiya abandi kobukabuka bikeko, Yehova aponi Yirimia azala mosakoli na Ye. Kasi, Yirimia akanisi ete azali elenge mpenza mpe akokoka kozala mosakoli te. Yango wana, Yehova alaki ete akosunga ye.

Yirimia ayebisi Bayisraele bátika kosala mabe. Alobi boye: ‘Banzambe oyo bato ya bikólo basambelaka bazali banzambe ya lokuta.’ Kasi Bayisraele mingi bazali kolinga nde kosambela banzambe ya lokuta na esika ya kosambela Yehova Nzambe ya solo. Ntango Yirimia azali koyebisa bato ete Nzambe akopesa bango etumbu mpo na mabe oyo bazali kosala, bazali kosɛka ye.

Bambula mingi eleki. Yosiya akufi, sanza misato na nsima, mwana na ye Yehoyakime akómi mokonzi. Na ntango yango, Yirimia azali se koyebisa Bayisraele ete: ‘Soki botiki bizaleli mabe na bino te, Yerusaleme ekobomama.’ Banganga-nzambe basilikeli ye makasi mpe balobi na ye ete: ‘Osengeli kokufa mpo na makambo oyo ozali koloba!’ Na nsima, bayebisi bankumu ya Yisraele ete: ‘Yirimia asengeli kokufa, mpo alobeli engumba na biso mabe.’

Sikoyo Yirimia akosala nini? Mosakoli yango abangi te. Ayebisi bato nyonso ete: ‘Yehova atindi ngai nayebisa bino makambo oyo. Soki botiki bizaleli mabe na bino te, Nzambe akoboma Yerusaleme. Kasi bóyeba ete soki bobomi ngai, bokoboma ngai kaka mpamba, mpo nasali eloko te.’

Bankumu babomi Yirimia te, kasi Bayisraele batiki mpe bizaleli mabe na bango te. Na nsima, Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, ayei kobundisa Yerusaleme. Nsukansuka, alongi Bayisraele mpe akómisi bango baombo na ye. Akei na bato mingi na Babilone. Kanisá naino mpasi okoyoka soki bato ya mboka mosusu bakangi yo na makasi mpe bakei na yo na mboka na bango.

Yirimia 1:1-8; 10:1-5; 26:1-16; 2 Bakonzi 24:1-17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto