Mokapo 27
Nakosala nini soki nalingaka kozala moto ya kokoka?
Osilikaka soki ozwi bapwɛ nyonso te na ekzamɛ?
□ Ɛɛ
□ Te
Omimonaka lokola nsuka ya zoba soki bayebisi yo likambo moko oyo osalaki malamu te?
□ Ɛɛ
□ Te
Omonaka ete ezali mpasi kozwa baninga mpe kobatela boninga yango mpo omonaka ete moko te azali kosala makambo oyo olingaka mpenza?
□ Ɛɛ
□ Te
SOKI oyanoli “ɛɛ” na motuna moko to mibale, ekoki kozala ete olingaka kozala moto ya kokoka. Mbala mosusu, okomituna boye: ‘Bongo koluka kosala makambo na ndenge ya malamu, eza mabe na nini?’ Mpo na koloba solo, mabe ezali te. Kutu, Biblia ekumisi mobali oyo azali “mayele na mosala na ye.” (Masese 22:29) Kasi, moto oyo alingaka kozala moto ya kokoka, alekisaka ndelo.
Na ndakisa, Jason, oyo azali na mbula 19 alobi boye: “Na mbula na ngai ya nsuka ya kelasi, nalobaki ete soki nazwi bapwɛ nyonso te na baekzamɛ, nakomimona mwana-kelasi ya mayele te. Nazalaki mpe kobɛta piano, mpe nazalaki komona ete nasengeli kosala makasi mpo nakóma lokola bato oyo babɛtaka piano kitoko na ba-concert.”
Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki ata kopekisa moto asambela Nzambe. Tótala likambo oyo ekoki kokómela elenge mobali oyo bato bazwaka ntango nyonso lokola ndakisa mpo na basusu. Lokola batyelaka ye likebi mingi, akoki komiyoka lokola azali kotambola likoló ya nsinga, mpe bato nyonso bazali kotala makambo nyonso oyo azali kosala. Ya solo, na lisangá, bandeko balandaka bakristo nyonso, bilenge mpe mikóló oyo bazali ndakisa malamu. Kasi, elenge oyo azali koluka komonana moto ya kokoka na makambo nyonso, akoki kosilisa esengo na ye na mosala ya Nzambe. Soki ekómi bongo, elenge yango asengeli kozwa lisalisi. Kasi, mbala mosusu akoki kosɛnga lisalisi te, mpo azali kobanga ete akolɛmbisa bato oyo bamonaka ye ete asalaka malamu. Akoki kutu kolinga kotika kosala makambo nyonso oyo azalaki kosala mpo azali kokanisa ete: ‘soki nazali kokoka te kokokisa makambo nyonso, mpo na nini namonaka mpasi ya mpamba?’
Koluka te kosalaka makambo na ndenge ya kokoka
Moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka amonaka ete esengeli soki moke te kosala libunga. Nzokande, kokanisa ndenge wana ezali lokuta mpenza. Biblia elobi polele ete: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Baroma 3:23) Na yango, ekoki kosalema te ete moto asalaka makambo nyonso kaka na ndenge ya kokoka. Kutu, kokanisa ete okoki kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali bozoba; ezali lokola kokanisa ete mokolo mosusu okoki kozwa mapapu mpe epumbwa. Ata soki ondimi mpenza ete okoki kosala yango, yebá ete ekoki kosalema te!
Okoki kosala nini mpo ezaleli ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekóma mokonzi na yo te? Meká kosala boye:
Bongolá lolenge ya kotalela liloba “kolonga.” Ozali koboma nzoto mpo oleka bato nyonso? Biblia elobi ete milende ya ndenge wana ezali lokola “kolanda mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:4) Likambo ya solo ezali ete kaka bato moke nde ‘baleká bato mosusu.’ Mpe ata soki moto alongi ndenge wana, ezalaka kaka mpo na mwa ntango, mpo moto mosusu akozwa esika na ye. Kolonga elimboli kosala nyonso oyo okoki—kasi te koleka basusu.—Bagalatia 6:4.
Moná makambo ndenge ezali. Osengeli koluka kosala makambo oyo ekokani na makasi mpe makoki na yo. Koluka kosala makambo oyo eleki yo motó ekoki komonisa ete oyebi te esika makoki na yo esuki—to kutu ozali koluka bolamu na yo moko. Ntoma Paulo apesaki toli ya malamu ete: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza.” (Baroma 12:3) Na yango, monáká makambo ndenge ezali. Talelá lisusu mikano oyo omityeli. Luká kosala oyo okoki, kasi te na ndenge ya kokoka.
Kozala makambo makasimakasi te! Luká kosala makambo oyo oyebaka malamu te, na ndakisa koyekola ebɛteli moko ya miziki. Na ntembe te, okosala bafoti ebele na ebandeli. Kasi mbala oyo, luká kotalela bafoti yango na ndenge mosusu. Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kosɛka.” (Mosakoli 3:4) Na yango, mpo na nini te kozala na makanisi ya malamu mpo na mabunga na yo? Soki osali bongo, ekosalisa yo omona ete moto nyonso oyo alingi koyekola likambo moko boye, azangaka te kosala bafoti. Kasi, ntango mosusu, ekoki kozala mpasi ondima ete osali malamu te. Soki ezali bongo, salá makasi obengana makanisi wana ya mabe oyo ozali na yango.
Kobosana te ete Yehova asɛngaka biso te tósalaka makambo na ndenge ya kokoka; alukaka nde ete tózala sembo epai na ye. (1 Bakorinti 4:2) Soki ozali kosala makasi mpo na kozala sembo, okoki mpenza kosepela na ndenge ozali—ata soki ozali moto ya kokoka te.
Na mikili mingi, bazali kondima ete mibali na mibali bábalana mpe basi na basi bábalana. Ndenge nini okoki koboya makanisi yango? Bongo soki okómi mpe na bamposa ya ndenge wana?
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.”—Mosakoli 7:20.
TOLI
Kanisá na likambo moko oyo oboyaki kosala na ntango wana, mpo kaka obangaki ete okosala yango te na ndenge ya kokoka. Na nsima tyá dati oyo okosilisa yango.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Yehova azali moto ya kokoka, kasi asɛngaka te biso bato ya kozanga kokoka tósala makambo na ndenge ya kokoka. Asɛngaka biso makambo oyo tokokoka mpe ayebaka ete tokokokisa yango.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki nakómi komipesa foti koleka ndelo, nako ․․․․․
Soki nakómi kopesa basusu foti koleka ndelo, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Na makambo nini olukaka komityela mibeko ya makasi koleka ndelo?
● Mikapo nini ya Biblia emonisi polele ete Yehova alukaka te ete basaleli na ye básala makambo nyonso na ndenge ya kokoka?
● Mpo na nini basusu bakokima yo soki olukaka ete makambo nyonso esalema na ndenge ya kokoka?
● Na mikolo ekoya, ndenge nini okotalela mabunga na yo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 226]
‘‘Kosala nyonso oyo okoki kosala ná kozala moto oyo alingaka makambo esalemaka na ndenge ya kokoka eza makambo mibale oyo ekeseni; oyo ya liboso elekisaka ndelo te mpe ya mibale elekisaka ndelo.’’—Megan
[Etanda na lokasa 228]
Koluka makambo nyonso esalema na ndenge ya kokoka mpe boninga
Okatá boninga ná bato mosusu kaka mpo bakokisi te makambo oyo yo olingaka? To ezali na bato oyo baboyá kozala baninga na yo mpo bamoni ete makambo oyo olingaka básala eleki makasi? Biblia epesi biso toli oyo: “Kokóma moyengebene koleka ndelo te, to komimonisa na bwanya koleka ndelo te. Mpo na nini okomibebisa?” (Mosakoli 7:16) Moto oyo alukaka makambo esalema na ndenge ya kokoka amibebisaka na ndenge asalaka makambo oyo ekosala ete ata soki bato balingaki kokóma baninga na ye, bakokóma nde mosika na ye. Elenge mwasi moko na nkombo Amber alobi boye: “Moto moko te alingaka kozala ná bato oyo bamonaka ye lokola azali na nse na bango, mpe namoná ete bato oyo balingaka makambo nyonso esalema na ndenge ya kokoka babungisá baninga mpo na makambo mike mpenza.”
[Elilingi na lokasa 229]
Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali lokola koluka kozwa mapapu mpo na kopumbwa, likambo oyo ekoki kosalema te