Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jr mok. 8 nk. 92-102
  • ‘Okotikala na bomoi’ lokola Yirimia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Okotikala na bomoi’ lokola Yirimia?
  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BAPESAKI YE ETINDA MOKO YA KOKAMWA
  • YIRIMIA ATIKALAKI MONZEMBA, YANGO ETEYI BISO NINI?
  • LENDISÁ BANGO MPE YO MOKO OLENDISAMA
  • Basaleli ya Nzambe oyo bazali minzemba bazangi eloko te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Minzemba oyo bazali kosepela na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Toli ya malamu mpo na baoyo balingi kotikala minzemba to kobala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
jr mok. 8 nk. 92-102

MOKAPO YA MWAMBE

‘Okotikala na bomoi’ lokola Yirimia?

1, 2. Mpo na nini na kati ya libota ebongi komibanzabanza mpo na bolamu ya moto mokomoko mpe oyo ya libota mobimba?

YOSUA alendisaki Bayisraele bápona Nzambe nini bakosalela, mpe na nsima alobaki ete: “Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.” (Yos. 24:15) Yosua azwaki ekateli ya kotikala sembo epai ya Nzambe, mpe andimisamaki ete libota na ye mpe ekotikala sembo. Bambula mingi na nsima, ntango kobebisama ya Yerusaleme ekómaki pene, Yirimia ayebisaki Mokonzi Zidikiya ete soki amitiki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone, ‘ye moko ná bato ya ndako na ye bakotikala na bomoi mpenza.’ (Yir. 38:17) Ekateli ya mabe oyo mokonzi azwaki ememelaki ye, basi na ye mpe bana na ye likama. Babomaki bana na ye ya mibali na miso na ye; mpe na nsima babomaki ye miso mpe bamemaki ye na boombo na Babilone.​—Yir. 38:18-23; 39:6, 7.

2 Na bandakisa nyonso mibale oyo tolobeli, moto moko nde azalaki nkolo-makambo, kasi balobeli mpe bato ya libota na ye. Ezali bongo mpamba te, ata soki moto nyonso oyo akómi mokóló asengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe mpo na ye moko, Bayisraele mingi bazalaki kobala mpe bazalaki na bana. Mpo na bakristo mpe, libota ezali na ntina. Likambo yango emonani polele na kotalela makambo oyo totángaka na Biblia mpe oyo toyekolaka na makita na oyo etali libala, kobɔkɔla bana, mpe limemya oyo tosengeli kopesa basangani mosusu ya libota.​—1 Ko. 7:36-39; 1 Tim. 5:8.

BAPESAKI YE ETINDA MOKO YA KOKAMWA

3, 4. Ndenge nini bomoi ya Yirimia ekesanaki na oyo ya bato mingi ya ntango na ye, mpe azwaki matomba nini mpo na yango?

3 Yirimia azalaki moko na bato oyo ‘batikalaki na bomoi’ na ntango na ye. Yirimia abikaki ntango Yerusaleme ebebisamaki, kasi lokola azalaki na libota te lokola bato mosusu, liponi oyo asalaki etalelaki kaka ye moko. (Yir. 21:9; 40:1-4) Nzambe ayebisaki ye ete abala te, azala na bana te mpe asala te makambo mosusu oyo Bayuda nyonso bazalaki kosala na bomoi na bango na ntango wana.​—Tángá Yirimia 16:1-4.

4 Na mikolo ya Yirimia, Bayuda mingi bazalaki kobala mpe bazalaki kobota bana. Mibali mingi bazalaki kosala bongo mpo mabele ya bankɔkɔ na bango etikala na kati ya libota.a (Mib. 7:14) Kasi mpo na nini Yirimia alandaki bango te? Lokola likama ezalaki liboso, Nzambe ayebisaki ye asangana te na milulu ya mawa to ya esengo oyo bato bamesenaki kosala. Asengelaki te kokende kobɔndisa bato oyo bazalaki kolela moto oyo akufi to kolya elongo na bango. Asengelaki mpe te kosangana na milulu mosusu ya Bayuda lokola bafɛti ya libala mpo mosika te, milulu mpe bafɛti yango esengelaki kosila libela. (Yir. 7:33; 16:5-9) Makambo wana oyo Yirimia azalaki kosala ekokaki kosalisa bato mosusu bándima maloba oyo azalaki koyebisa bango mpe bámona bonene ya likama oyo ezalaki liboso. Nsukansuka, likama yango ekwelaki bango. Kanisá naino ndenge bato oyo bakómaki kolya bato mpo na nzala bazalaki komiyoka mpe ndenge baoyo bamonaki bandeko na bango bakómi mosuni ya kolya bamiyokaki. (Tángá Yirimia 14:16; Bil. 2:20.) Lokola Yirimia abalaki te mpe azalaki na bana te ayokaki mpasi te oyo bato mosusu bamonaki ntango Yerusaleme ezingamaki na boumeli ya sanza 18; na ntango yango bato mingi bakufaki mpe mabota ebele ebebisamaki nyɛɛ.

5. Mpo na nini bakristo basengeli kokanisa malamu likoló ya mitinda oyo ezali na Yirimia 16:5-9?

5 Kasi tokoki nde koloba ete biso mpe tosengeli kolanda mitinda oyo ezwami na Yirimia 16:5-9? Te. Biblia esɛngi bakristo ‘bábɔndisa baoyo bazali na ndenge nyonso ya bolɔzi’ mpe ‘básepela elongo na bato oyo bazali kosepela.’ (2 Ko. 1:4; Rom. 12:15) Yesu akendaki na fɛti ya libala mpe asalaki likambo moko oyo ebakiselaki bato esengo. Nzokande, likama oyo ekokwela mokili oyo mabe ezali lisɛki te. Na ntango yango, mbala mosusu bakristo bakokutana na mikakatano mpe bakokelela. Yesu amonisaki ntina ya kokɛngɛla mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo tóyika mpiko mpe tókoba kozala sembo, ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki ntango bakimaki longwa na Yudea. Na yango, moto nyonso asengeli kokanisa malamu liboso ya kozwa ekateli ya kotikala monzemba, kobala to kozala na bana.​—Tángá Matai 24:17, 18.

Elilingi na lokasa 94

6. Komanyola likoló ya etinda oyo Nzambe apesaki Yirimia ekoki kosalisa banani?

6 Ndenge nini etinda oyo Nzambe apesaki Yirimia ete abala te mpe azala na bana te ekoki kosalisa biso? Lelo oyo, ezali na bakristo mosusu ya sembo oyo babalá te mpe bazali na bana te. Bomoi ya Yirimia ekoki koteya bango nini? Mpe mpo na nini ata bakristo oyo babalá mpe bazali na bana basengeli kotya likebi na bomoi oyo Yirimia azalaki na yango?

7. Mpo na nini lelo tosengeli kotalela na likebi mpenza etinda oyo Yirimia azwaki ya kozala na bana te?

7 Libosoliboso yebá ete Yirimia asengelaki kozala na bana te. Yesu apekisaki bayekoli na ye kobota te. Kasi simbá ete alobaki ekozala “mawa” mpo na basi ya zemi mpe baoyo bazali komɛlisa bana mabɛlɛ ntango bolɔzi ekokwela Yerusaleme na mobu 66-70 T.B. Ntango yango esengelaki kozala ntango moko ya mpasi mpenza mpo na bango. (Mat. 24:19) Tóbosana te ete bolɔzi monene koleka oyo wana ezali liboso na biso. Yango wana, bakristo oyo babalá mpe bazali koluka kozala na bana basengeli mpenza kokanisa likambo yango malamumalamu. Ondimisami te ete tozali na ntango moko ya mpasi mpenza mpe mikakatano ezali se kobakisama? Baboti mingi mpe bamonaka ete kobɔkɔla bana mpe kosalisa bango ‘bátikala na bomoi’ tii na nsuka ya mokili oyo mabe ezali nde likambo. Atako babalani bango moko nde basengeli kozwa ekateli ya kozala na bana to te, ezali na ntina bátalela mpe bomoi ya Yirimia. Bongo tokoloba nini mpo na etinda oyo Nzambe apesaki ye ete abala te?

Yirimia azwaki etinda nini ya kokamwa, mpe yango esengeli kotinda biso tótalela likambo nini?

YIRIMIA ATIKALAKI MONZEMBA, YANGO ETEYI BISO NINI?

8. Mpo na nini tokoki koloba te ete esengeli kaka moto abala mpo asepelisa Nzambe?

8 Nzambe alobaki na Yirimia ete abala te, kasi yango elingi koloba te ete ezali etinda oyo basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kolanda. Kobala ezali na yango mabe te. Yehova abandisaki libala mpo bato bábota mpe bátondisa mabele, mpo babalani básepela mpe bázwa bolamu ya solosolo. (Mas. 5:18) Ata bongo, na ntango ya Yirimia ezali na bato mosusu oyo babalaki te. Ekoki kozala ete mikube mosusu basanganaki na libota ya Nzambe ntango Yirimia azalaki kosakola.b Lisusu, ezalaki na mibali mpe basi oyo babalani na bango bakufá. Na yango, longola Yirimia ezali na basambeli mosusu ya solo oyo babalaki te. Ezali solo ete atikalaki monzemba na ntina; ezali mpe bongo mpo na bakristo mosusu lelo.

9. Toli nini ya Biblia na oyo etali libala tosengeli kozwa na lisɛki te?

9 Bakristo mingi babalaka, kasi basusu mpe babalaka te. Oyebi ete Yesu abalaki te, mpe alobaki ete bayekoli na ye mosusu bakozwa ekateli ya kotikala minzemba mpo bakozala na likabo ya ‘kokoka likambo’ yango. Asɛngaki baoyo bakokoka kosala yango básala yango. (Tángá Matai 19:11, 12.) Na yango, ekozala malamu kopesa longonya na bandeko oyo baponi kotikala minzemba mpo básala mingi na mosala ya Nzambe na esika ya kotumolatumola bango. Ya solo, makambo mosusu ya bomoi esalaka ete bakristo mosusu batikalaka minzemba, ata mpo na mwa ntango. Na ndakisa, ntango mosusu bazwi naino te mokristo oyo abongi kozala molongani na bango, mpe tosengeli kopesa bango longonya mpo na ekateli na bango ya kotosa etinda ya Nzambe ya kobala “kati ya Nkolo kaka.” (1 Ko. 7:39) Longola yango, ezali na basaleli mosusu ya Nzambe oyo babalani na bango bakufá, na yango bazali mpe minzemba.c Basengeli kobosana te ete Nzambe (ná Yesu mpe) amibanzabanzaka mpo na bakristo yango oyo bazali minzemba.​—Yir. 22:3; tángá 1 Bakorinti 7:8, 9.

10, 11. (a) Nini esalisaki Yirimia azala na esengo atako azalaki monzemba? (b) Ndenge nini bomoi ya bandeko mosusu oyo babalá te emonisi ete ata baoyo bazali minzemba bakoki mpe kozala na esengo na bomoi na bango?

10 Na yango, ntango nyonso oyo Yirimia atikalaki monzemba akokaki kotyela Nzambe motema ete akosalisa ye. Na ndenge nini? Kobosana te ete Yirimia azalaki kosepela na liloba ya Yehova. Ekoki kozala ete liloba yango nde epesaki Yirimia makasi mpe elikya na boumeli ya bambula nyonso oyo akokisaki mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Longola yango, aboyaki kozala moninga ya bato oyo bakokaki kotyola ye na ndenge azalaki monzemba. Andimaki kutu kofanda ‘kaka ye moko’ na esika afanda na bato ya ndenge wana.​—Tángá Yirimia 15:17.

11 Bakristo mingi oyo bazali minzemba, ezala basi to mibali, bilenge to mikóló, balandaka ndakisa malamu ya Yirimia. Makambo oyo bandeko bakutaná na yango emonisi ete kozala molende na mosala ya Nzambe mpe komipesa mingi na makambo ya elimo esalisaka mingi. Na ndakisa, Motatoli moko oyo asanganaka na lisangá ya monɔkɔ ya Chinois alobaki boye: “Mosala ya mobongisi-nzela esalisaka ngai náyeba kotambwisa bomoi na ngai. Lokola nazali monzemba, nazalaka na makambo mingi ya kosala, mpe yango esalisaka ngai namiyoka ngai moko te. Na nsuka ya mokolo nyonso, nayokaka esengo mpo namonaka ete mosala ya kosakola oyo nasali ezali mpenza kosalisa bato. Yango epesaka ngai esengo mingi.” Ndeko mosusu oyo azali na mbula 38 mpe azali mobongisi-nzela alobi boye: “Nakanisi ete sɛkɛlɛ ya kozala na esengo ezali nde koyeba kosepela na makambo malamu ya bomoi oyo ozali na yango.” Ndeko mwasi mosusu oyo afandaka na sudi ya Mpoto alobaki polele ete: “Mbala mosusu bomoi na ngai ezali mpenza te ndenge nakanaki yango, kasi nazali na esengo mpe nakokoba kozala na esengo.”

Elilingi na lokasa 97

12, 13. (a) Makanisi nini ya malamu tosengeli kozala na yango na oyo etali kozala mozemba to kobala? (b) Bomoi ya ntoma Paulo mpe toli na ye emonisi nini na oyo etali kotikala monzemba?

12 Mbala mosusu Yirimia amonaki ete bomoi na ye ezalaki te ndenge oyo akanaki yango na bomwana. Kasi ntango mosusu amonaki ete, ata bato mosusu oyo babalaki mpe bazalaki na bana, bomoi na bango mpe ezalaki ndenge oyo bakanaki te. Ndeko mwasi moko oyo afandaka na Espagne mpe oyo azali mobongisi-nzela alobaki boye: “Nayebi bato babalá oyo bazali na esengo mpe bamosusu oyo bazali na esengo te. Yango endimisaka ngai ete esengo na ngai ezali kouta te na likanisi ete nakobala to nakobala te.” Na ntembe te, ndakisa ya Yirimia, mpe bandakisa mosusu ebele, emonisi mpenza ete ata moto oyo azali monzemba akoki kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo mpenza. Ntoma Paulo mpe ayebaki yango mpo akomaki ete: “Nzokande nazali koloba na bato oyo babalá naino te mpe na basi oyo mibali bakufá ete: ezali malamu bátikala lokola ngai.” (1 Ko. 7:8) Ekoki kozala ete Paulo azalaki na mwasi, kasi mwasi yango akufaki. Ezala bongo to te, azalaki monzemba ntango nyonso oyo azalaki misionɛrɛ. (1 Ko. 9:5) Omoni te ete kozala monzemba ezalaki litomba mpo na ye? Yango esalisaki ye ‘asalela Nkolo mosala ntango nyonso kozanga kotya makanisi na makambo mosusu,’ mpe akokisaki mosala mingi.​—1 Ko. 7:35.

“Nasepelaka mingi mpenza na ntango oyo nazalaka kaka ngai moko. Nakoki kosolola na Yehova na libondeli. Nakoki komanyola mpe koyekola ngai moko kozanga kotya makanisi na makambo mosusu. . . . Kozala monzemba ememeli ngai matomba ebele.”​—Babette

13 Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Paulo alobaki mpe ete: “Baoyo bazali kobala bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” Nzambe asalisaki mpe Paulo abakisa likambo oyo ya ntina mpenza: “Soki moto azwi ekateli na motema na ye . . . ya kobatela bongɔndɔ na ye mpenza, akosala malamu. Na yango, moto oyo mpe apesi bongɔndɔ na ye na libala asali malamu, kasi oyo apesi yango na libala te akosala malamu koleka.” (1 Ko. 7:28, 37, 38) Yirimia ayebaki maloba yango te. Ata bongo, atikalaki mozemba bambula ebele mpe bomoi na ye emonisi ete kozala monzemba epekisaka moto te azala na bomoi ya esengo na mosala ya Nzambe. Ya solo, kozala monzemba ekoki kosala ete moto azala na bomoi ya ntina mpe amipesa mobimba na losambo ya solo. Atako Mokonzi Zidikiya abalaki, aboyaki kolanda toli ya Yirimia oyo ekokaki kosalisa ye ‘atikala na bomoi’; nzokande mosakoli Yirimia oyo azalaki monzemba aponaki lolenge ya bomoi oyo ebikisaki ye.

Lokola Yirimia atikalaki monzemba bambula ebele, yango ekoki koteya yo nini?

LENDISÁ BANGO MPE YO MOKO OLENDISAMA

14. Boninga oyo ezalaki kati ya libota ya Akila ná Paulo emonisi mpenza nini?

14 Ndenge oyo tomonaki, na ntango ya Yirimia Bayuda mingi bazalaki na mabota. Ezalaki mpe bongo na mikolo ya ntoma Paulo. Ya solo, bakristo mingi oyo bazalaki na mabota bakokaki te kokende kosakola mosika lokola Paulo, kasi bazalaki na mingi ya kosala epai bazalaki kofanda. Na ndakisa, bakokaki kosalisa bandeko na bango ya mibali mpe ya basi oyo babalaki te. Kobosana te ete ntango Paulo akómaki na engumba ya Korinti, Akila ná Prisile bayambaki ye na ndako na bango mpe lokola bayebaki mosala moko, basalaki na ye elongo. Kasi basukaki kaka wana te. Na ntembe te, Paulo alendisamaki mpenza na boninga ya libota ya Akila. Kanisá naino esengo oyo bazalaki na yango ntango bazalaki kolya elongo mpe mabaku mosusu oyo bazalaki kosepela elongo. Yirimia azalaki mpe na baninga ya ndenge wana? Atako atikalaki monzemba mpo na komipesa na mosala ya Nzambe, tosengeli te kokanisa ete azalaki kolinga kofanda kaka ye moko ntango nyonso. Ekoki kozala ete azalaki kolekisa mwa ntango elongo na mabota ya basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe, lokola libota ya Baruke, ya Ebede-meleke mpe ya basusu.​—Rom. 16:3; tángá Misala 18:1-3.

15. Ndenge nini bakristo oyo bazali na mabota bakoki mpenza kosalisa bandeko oyo bazali minzemba?

15 Lelo oyo mpe, bakristo oyo bazali minzemba bazwaka bolamu mingi ntango bandeko mosusu ya lisangá babengisaka bango mpo na kolekisa mwa ntango elongo, kaka ndenge libota ya Akila esalaki mpo na ntoma Paulo. Soki ozali na libota okanisaka kolekisa mwa ntango elongo na bandeko oyo bazali minzemba? Ndeko mwasi moko afungolaki motema na ye, mpe alobaki boye: “Nalongwá na mokili mpe nazalaka ata na mposa te ya kozongela yango. Kasi nazali kaka na mposa ete bato bákipe ngai mpe bálinga ngai. Nasɛngaka Yehova ete akoba kopesa bilei ya elimo mpe bilendiseli mpo na kosalisa bakristo oyo bazali minzemba. Tozalaka na mposa bálendisa biso, bábosana biso te, mpe biso nyonso te nde tozalaka na mposa makasi ya kobala. Kasi, tomonaka lokola moto ya kosalisa biso azali te. Ezali solo ete tokoki kosolola na Yehova ntango nyonso, kasi na bantango oyo tozalaka na mposa ya kosolola na moto, bandeko ya lisangá oyo tokoki kosolola na bango bakomonana mpenza?” Bandeko ebele oyo bazali minzemba bazwaka bandeko ya ndenge wana. Bazalaka na baninga ya kosolola na bango na lisangá na bango. Kasi baninga na bango ezalaka kaka te bandeko basi mpe mibali oyo bazali na bango mbula moko. Lokola balingaka bato, bazalaka na baninga ya lolenge nyonso, ezala bilenge mpe mibange na mabota ya bakristo ya lisangá na bango.

Elilingi na lokasa 100

16. Na lisangá na bino, makambo nini ya mikemike okoki kosala mpo na kolendisa bandeko oyo bazali minzemba?

16 Soki ozwi mwa bibongiseli liboso, okoki kolendisa bandeko oyo bazali minzemba soki ozali kobengisa bango ntango bozali kosala makambo mosusu na libota, na ndakisa okoki kobengisa bango na mpokwa oyo bosalaka Losambo ya libota. Kolya elongo na libota na yo ekosepelisa bango, kasi bilendiseli oyo bakozwa eleki bilei oyo bakolya. Okoki kozwa bibongiseli mpo na kobima na bango na mosala ya kosakola? Okoki kobengisa ndeko moko oyo azali monzemba mpo azala elongo na libota na yo ntango bokei kosala misala ya kobatela mpe kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi to mikolo mosusu bokoki kokende elongo na ye na wenze to na magazini mpo na kosomba biloko? Mabota mosusu babengisaka ndeko oyo mobalani na ye akufá to mobongisi-nzela moko oyo azali monzemba akende elongo na bango na liyangani to na esika oyo balekisaka konje. Na ntembe te, kolekisa ntango elongo ndenge wana esalaka ete bandeko nyonso bálendisana.

17-19. (a) Mpo na nini bana basengeli kozala na bolingo mpe bokatikati ntango bazali kozwa bibongiseli mpo na kobatela baboti na bango oyo bakómi mibange to bazali na maladi? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo Yesu asalaki mpo na kobatela mama na ye?

17 Likambo mosusu ya kotalela mpo na bandeko basi mpe mibali oyo bazali minzemba ezali likambo ya kosalisa baboti oyo bakómi mibange. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bayuda mosusu ya lokumu bazalaki kosalela mayele mabe mpo na kokima mokumba ya kobatela baboti na bango. Bazalaki koloba ete kokokisa mikumba oyo bango moko bamityelaki mpo na lingomba eleki mikumba oyo Nzambe apesaki bango mpo na baboti na bango. (Mrk. 7:9-13) Kasi mabota ya bakristo basengeli kosala bongo te.​—1 Tim. 5:3-8.

18 Ezali boni soki baboti oyo bakómi mibange bazali na bana oyo bazali bakristo? Soki mwana moko na kati ya libota azali monzemba, yango elingi mbala moko koloba ete ye nde asengeli kozwa mokumba nyonso ya kosalisa baboti? Ndeko mwasi moko na Japon akomaki boye: “Nazalaka na mposa ya kobala, kasi lokola nazali na mokumba ya kobatela baboti na ngai, nakoki kobala te. Nayebi mpenza ete Yehova ayebi mitungisi oyo moto oyo abatelaka baboti azalaka na yango mpe mpasi oyo bato oyo bazali minzemba bayokaka na motema.” Ekoki nde kozala ete ndeko mwasi yango azali na bandeko na ye oyo babalá mpe kozanga bátuna likanisi na ye, bazwaki ekateli ete ye nde asengeli kobatela baboti na bango? Soki okutani na likambo ya ndenge wana, yebá ete Yirimia mpe azalaki na bandeko oyo basalelaki ye makambo na bosembo te.​—Tángá Yirimia 12:6.

19 Yehova amityaka na esika ya bato oyo bazali minzemba mpe ayokaka mawa mpo na baoyo bazali kokutana na mikakatano. (Nz. 103:11-14) Nzokande, baboti oyo bakómi mibange to oyo bazali na maladi bazali baboti kaka ya bana oyo bazali minzemba te, kasi ya bana na bango nyonso. Ya solo, ekoki kozala ete bana na bango mosusu babalá mpe bazali na bana na bango. Ata bongo, yango elingi koloba te ete basengeli lisusu te kolinga baboti na bango, mpe yango elongoli bango te mokumba oyo Nzambe apesi bango ya kosalisa baboti na bango ntango bazali na mposa ya lisalisi. Tóbosana te ete ata ntango Yesu akómaki pene ya kokufa likoló ya nzete, abosanaki mokumba na ye te mpe azwaki bibongiseli mpo moto mosusu abatela mama na ye. (Yoa. 19:25-27) Ezali solo ete Biblia epesi mibeko te oyo elakisi ndenge nini bana basengeli kokabola mokumba ya kobatela baboti oyo bakómi mikóló to bazali na maladi; elobi mpe te ete bana oyo bazali minzemba nde basengeli kozala bato ya liboso mpo na kozwa mokumba ya kobatela baboti. Na likambo yango, ebongi ete bato nyonso ya libota básolola mpo báyokana na makambo ya mikemike oyo moko na moko asengeli kosala. Kasi ntango bakosolola, moto nyonso asengeli komonisa ete azali makambo makasimakasi te mpe azali komemya basusu, mpe basengeli kobosana te ndakisa malamu oyo Yesu atikaki mpo na kobatela mama na ye.

20. Okanisi nini na oyo etali kolekisa ntango elongo na bandeko ya lisangá na bino oyo bazali minzemba?

20 Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Yirimia asakolaki ete: “Bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mpe moto na moto ndeko na ye ete: ‘Bóyeba Yehova!’ mpo bango nyonso bakoyeba ngai.” (Yir. 31:34) Biso mpe, tozali na baninga ya ndenge wana oyo bayebi Yehova na kati ya lisangá ya Bokristo, mpe na kati ya baninga yango ezali mpe na bandeko mosusu oyo bazali minzemba. Na ntembe te, biso nyonso tolingi kolendisama elongo na bango mpe tozali na mposa ete bandeko yango oyo bazali minzemba ‘bátikala na bomoi.’

Makambo nini mosusu okoki kosala mpo na kolendisa bandeko mosusu ya mibali mpe ya basi oyo bazali minzemba, mpe na yango yo moko olendisama?

a Makomami ya Ebre esaleli liloba “monzemba” te.

b Yisaya asakolaki mpo na bato ya ntango na ye oyo babotamaki mikube, oyo mobeko ezalaki kopekisa bango básangana na makambo mosusu ya losambo ya Bayisraele. Asakolaki ete, lokola bazalaki kotosa, bakozwa “eloko moko ya malamu koleka bana mibali ná bana basi,” mpe bakozwa “nkombo mpo na ntango oyo etyami ndelo te” na ndako ya Nzambe.​—Yis. 56:4, 5.

c Moto mosusu akoki kozala ye moko mpo molongani na ye, oyo azali mbala mosusu Motatoli te, akabwanaki na ye to abomaki libala mpe mibeko ya Leta epesi ye ndingisa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto