Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rk eteni 12 nk. 28-29
  • Monisá ete ozali na kondima ya solosolo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monisá ete ozali na kondima ya solosolo!
  • Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Masolo mosusu
  • Kondima ya solosolo ezali nini?
    Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Ondimaka mpenza nsango malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
rk eteni 12 nk. 28-29

ETENI 12

Monisá ete ozali na kondima ya solosolo!

NZAMBE akebisaka basaleli na ye ete kondima na bango ekomekama. Liloba na ye elobi boye: “Bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” (1 Petro 5:8) Ndenge nini Satana akoki kolɛmbisa kondima na yo?

Mobali moko azali kotánga Makomami Mosantu mpe mosusu azali koboya kotala yango ata na miso

Osilá kokutana na komekama ya boye?

Satana akoki kosalela bato mosusu, ata mpe bandeko na yo mpo bápekisa yo koyekola Makomami Mosantu. Mpo na yango, Yesu asakolaki boye: “Banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Matai 10:36) Ekoki kozala ete bato ya libota na yo mpe baninga na yo, oyo atako bazali na makanisi ya mabe te, bayebi te mateya ya solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. To bakoki kobanga oyo bato mosusu bakoloba. Nzokande, Makomami elobi ete: “Kolɛnga liboso ya bato, yango nde etyaka motambo, kasi ye oyo azali kotyela Yehova motema akobatelama.” (Masese 29:25) Soki otiki koyekola Makomami mpo na kosepelisa bato, yango ekosepelisa Nzambe? Soki moke te! Longola yango, soki tomonisi kondima ya solosolo, Nzambe akosalisa biso. “Biso tozali te bato oyo bazongaka nsima mpo na libebi, kasi tozali nde bato oyo bazali na kondima mpo na kobatela molimo na bomoi.”​—Baebre 10:39.

Kanisá ndakisa ya Dumas, oyo tolobelaki liboso. Na ebandeli, mwasi na ye azalaki kosɛka ye mpo na kondima na ye. Kasi na nsima, ye mpe akómaki koyekola Liloba ya Nzambe. Soki yo mpe okobi kosala oyo ezali malamu, okoki kosalisa baninga na yo mpe bandeko na yo básala mpe bongo. Bandakisa mingi emonisi ete bandeko na biso oyo bazalaki bandimi te ‘bazwamaki na maloba te kasi na etamboli ya pɛto’ mpe ‘limemya makasi’ ya moto oyo amonisaki kondima ya solosolo.​—1 Petro 3:1, 2. 

Satana atindaka mpe bato bákanisa ete bazali na ntango te mpo na koyekola Makomami. Akolinga ete mikakatano ya bomoi, na ndakisa mitungisi na yo moko mpe mikakatano ya mbongo ‘etya liloba nkaka’ mpo kondima na yo ‘ebota mbuma te.’ (Marko 4:19) Moná mosika! Makomami elobi boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Kokoba koyekola makambo mingi oyo etali Nzambe mpe Yesu Masiya ezali na ntina mingi mpo na kozwa bomoi ya seko na Paradiso!

Mobali moko azali kobondela

Bondelá Nzambe mpo asalisa yo

Kanisá naino Moize, moto oyo akolaki na ndako ya mokonzi ya Ezipito. Akokaki kopona koluka bozwi, lokumu, mpe bokonzi. Kasi, Moize aponaki nde “konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” Mpo na nini? “Mpo atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Baebre 11:24, 25, 27) Ya solo, Moize azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe. Atyaki makambo ya Nzambe liboso ya makambo na ye moko, mpe Nzambe apambolaki ye mingi. Yo mpe soki osali bongo, Nzambe akopambola yo.

Satana akoki kotyela yo mitambo ndenge na ndenge. Kasi osengeli te kokwea na mitambo na ye. Liloba ya Nzambe elendisi biso boye: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” (Yakobo 4:7) Ndenge nini okoki kotɛmɛla ye?

Kobá koyekola Makomami Mosantu. Tángáká Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Yekolá mateya na yango. Salelá toli na yango na bomoi na yo. Soki osali bongo, ‘okokamata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe,’ oyo ekosalisa yo otɛmɛla Satana.​—Baefese 6:13.

Lekisáká ntango elongo na bato oyo bazali na kondima ya solosolo. Luká bato mosusu oyo batángaka, bayekolaka mpe basalelaka makambo oyo ezali na kati ya Makomami Mosantu. Bato yango ‘batyelanaka likebi mpo na kolendisana mpo bázala na bolingo mpe básala misala ya malamu.’ Bakosalisa yo okolisa kondima na yo.​—Baebre 10:24, 25.

Bilenge mpe mikóló bazali na esengo ya kolekisa ntango elongo

Lekisáká ntango elongo na baoyo bazali na kondima

Pusaná penepene na Yehova. Bondelá Nzambe asalisa yo, mpe tyelá ye motema. Kobosana te ete Nzambe alingaka kosalisa yo. ‘Bwakelá [Nzambe] mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:6, 7) “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”​—1 Bakorinti 10:13.

Satana atumolaki Nzambe, alobaki ete moto moko te akokoba kosalela Nzambe na kati ya komekama. Kasi, ozali na libaku ya komonisa ete Satana azali mokosi! Nzambe alobi boye: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.” (Masese 27:11) Zwá ekateli ya komonisa ete ozali na kondima ya solosolo!

Okopesa eyano nini?

  • Satana akoki kosala nini mpo na koluka kolɛmbisa kondima na yo?

  • Ndenge nini Moize amonisaki ete azali na kondima ya solosolo?

  • Ndenge nini okoki koyika mpiko soki kondima na yo emekami?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto