Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 8 nk. 18-19
  • Liwa ya Yesu ezali na ntina nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liwa ya Yesu ezali na ntina nini mpo na yo?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Eteni 8
    Yoká Nzambe
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 8 nk. 18-19

ETENI 8

Liwa ya Yesu ezali na ntina nini mpo na yo?

Yesu akufaki mpo biso tókoka kozala na bomoi. Yoane 3:16

Basi bazali kotala lilita ya Yesu oyo ezali polele

Mikolo misato nsima ya liwa ya Yesu, basi mosusu bakendaki na lilita na ye mpe bakutaki yango polele. Yehova asekwisaki Yesu na kati ya bakufi.

Yesu abimeli bantoma na ye, na nsima akei na likoló

Na nsima, Yesu amonanaki na bantoma na ye.

Ya solo, Yehova asekwisaki Yesu lokola ekelamu ya elimo mpe ya nguya oyo akoki kokufa lisusu te. Bayekoli na ye bamonaki ye ntango azalaki komata na likoló.

  • “Lifuti” ya lisumu ezali nini?​—Baroma 6:23.

  • Yesu afungolaki nzela ya bomoi ya seko.​—Baroma 5:21.

Nzambe asekwisaki Yesu mpe akómisaki ye Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Danyele 7:13, 14

Yesu azali koyangela bato na paradiso awa na mabele, na kiti ya bokonzi na ye na likoló

Yesu apesaki bomoi na ye mpo na kofuta lisiko mpo na bato. (Matai 20:28) Na nzela ya lisiko yango, Nzambe apesi biso libaku ya kozwa bomoi ya seko.

Yehova atyaki Yesu Mokonzi mpo ayangela mabele. Akozala elongo na bato 144 000 ya sembo oyo basekwi awa na mabele mpo na kozala na bomoi na likoló. Yesu ná bato 144 000 basali guvɛrnema moko ya sembo na likoló​—Bokonzi ya Nzambe.​—Emoniseli 14:1-3.

Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele paradiso. Bitumba, kobomana, bobola, mpe nzala ekozala lisusu te. Bato bakozala mpenza na esengo.​—Nzembo 145:16.

  • Bokonzi ya Nzambe ekomema mapamboli nini?​—Nzembo 72.

  • Tosengeli kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya.​—Matai 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto