Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 7 nk. 16-17
  • Yesu azalaki nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azalaki nani?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Eteni 7
    Yoká Nzambe
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Yesu Klisto azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 7 nk. 16-17

ETENI 7

Yesu azalaki nani?

Yehova atindaki Yesu awa na mabele. 1 Yoane 4:9

Yesu na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe na likoló

Soki tolingi kosepelisa Yehova, tosengeli koyoka moto mosusu ya ntina mingi. Ntango molai liboso akela Adama, Yehova akelaki ekelamu moko ya elimo ya nguya kuna na likoló.

Maria ntango azali na zemi mpe ntango Yesu abotami

Na nsima, Yehova atindaki ye aya kobotama na Beteleme epai ya ngɔndɔ moko na nkombo Maria. Bapesaki mwana yango nkombo Yesu.​—Yoane 6:38.

Yesu azali koteya basusu makambo etali Yehova

Ntango azalaki moto awa na mabele, Yesu amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli ya Nzambe. Azalaki na boboto, bolingo, mpe bato bazalaki kobanga kosolola na ye te. Kozanga kobanga, ateyaki basusu solo na ntina na Yehova.

Yesu asalaki makambo ya malamu, kasi bato bayinaki ye. 1 Petro 2:21-24

Yesu asekwisi elenge mwasi moko mpe abikisi mobali moko oyo azalaki na maladi

Yesu abikisaki mpe bato ya maladi mpe azongisaki bato mosusu oyo bakufaki na bomoi.

Bakonzi ya mangomba bayinaki Yesu mpo atɔndɔlaki mateya na bango ya lokuta mpe misala na bango ya mabe.

Babɛti Yesu na nsima babomi ye

Bakonzi ya mangomba bandimisaki Baroma mpo bábɛta Yesu mpe báboma ye.

  • Mpo na nini ezali na ntina tóyeba Yesu?​—Yoane 17:3.

  • Yesu asalaki nini na likoló liboso aya awa na mabele?​—Bakolose 1:15-17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto