Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 9 biteni 1-2
  • Bósambela Yehova libota mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bósambela Yehova libota mobimba
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 KÓMISÁ BOYOKANI NA YO NÁ YEHOVA MAKASI
  • 2 BÓSALAKA LOSAMBO NA KATI YA LIBOTA
  • Lisalisi mpo na mabota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Losambo na kati ya libota ezali nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Ndenge nini okoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • ‘Pusaná penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo’
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 9 biteni 1-2
Mwasi ná mobali bazali koyekola Biblia elongo

ETENI 9

Bósambela Yehova libota mobimba

“Bósambela Oyo asalá likoló, ná mabele.”​—Emoniseli 14:7

Ndenge omoni yango na mwa buku oyo, Biblia ezali na batoli mingi oyo ekosalisa yo ná libota na yo. Yehova alingi ete bózala na esengo. Alobi ete soki botye losambo na ye na esika ya liboso, “bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” (Matai 6:33) Alingi mpenza ozala moninga na ye. Salá nyonso mpo na kokolisa boninga na yo ná Nzambe. Yango nde libaku malamu koleka oyo moto akoki kozwa.​—Matai 22:37, 38.

1 KÓMISÁ BOYOKANI NA YO NÁ YEHOVA MAKASI

Mwasi ná mobali bazali kosakola elongo

OYO BIBLIA ELOBI: “‘Nakozala tata na bino, mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi,’ Yehova . . . alobi bongo.” (2 Bakorinti 6:18) Nzambe alingi ete okóma moninga na ye ya motema. Libondeli ezali lolenge moko ya kosala yango. Yehova asɛngi yo ‘obondelaka ntango nyonso.’ (1 Batesaloniki 5:17) Azali na mposa makasi ya koyoka makanisi ya motema na yo mpe mitungisi na yo. (Bafilipi 4:6) Ntango ozali kobondela elongo na bato ya libota na yo, bakomona ete Nzambe azali mpenza moto ya solo mpo na yo.

Longola koloba na Nzambe, osengeli mpe koyoka ye. Okoki koyoka ye soki ozali koyekola Liloba na ye mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. (Nzembo 1:1, 2) Manyoláká makambo oyo ozali koyekola. (Nzembo 77:11, 12) Mpo na koyoka Nzambe, osengeli mpe koyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ.​—Nzembo 122:1-4.

Koyebisa basusu makambo etali Yehova ezali lolenge mosusu ya ntina ya kokómisa boyokani na yo ná ye makasi. Soki ozali kosala yango mingi, okopusana lisusu mingi penepene na ye.​—Matai 28:19, 20.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Zwáká ntango ya kotánga Biblia mpe kobondela mokolo na mokolo

  • Yo ná libota na yo, bótyaka makambo ya losambo liboso ya kominanola mpe kozwa mwa mopɛpɛ

2 BÓSALAKA LOSAMBO NA KATI YA LIBOTA

Tata azali komibongisa mpo na koyekola elongo na libota na ye mpe na nsima bazali kosala losambo na kati ya libota

OYO BIBLIA ELOBI: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Osengeli kosala programɛ ya losambo na kati ya libota mpe kolandelaka yango malamu. (Ebandeli 18:19) Kasi esuki kaka wana te. Nzambe asengeli kozala na esika na bomoi na yo ya mokolo na mokolo. Okokómisa boyokani ya libota na yo na Nzambe makasi soki ozali kolobela ye “ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.” (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Omityela mokano ya kozala lokola Yosua, oyo alobaki ete: “Mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.”​—Yosua 24:15.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Na programɛ na bino ya koyekola pɔsɔ na pɔsɔ, bólobelaka mpe makambo oyo etali moto mokomoko ya libota

Mama azali kotángela mwana na ye ya mobali; libota ezali kosala lisolo moko ya Biblia lokola lisano; tata azali koyekola ná mwana na ye ya mwasi

BASALELI YA YEHOVA BAZALI BATO YA ESENGO

Eloko moko te ezali malamu koleka kosambela Yehova Nzambe. Yehova asepelaka komona yo ná libota na yo bozali kosalela ye na motema moko. Soki ozali kosala bongo, okokóma kolinga Yehova mpe komekola ye mingi koleka. (Marko 12:30; Baefese 5:1) Kotya Nzambe na esika ya liboso na libala na bino ekokómisa boyokani na yo ná molongani na yo makasi. (Mosakoli 4:12; Yisaya 48:17) Yo ná libota na yo bokozala na esengo mpo na libela, mpamba te ‘Yehova Nzambe apamboli bino.’​—Kolimbola Mibeko 12:7.

OMITUNA BOYE . . .

  • Mbala ya nsuka oyo ngai ná molongani na ngai tobondelaki elongo ezalaki mokolo nini?

  • Nini nakoki koyekola elongo na libota na ngai oyo ekokómisa kondima na biso epai ya Yehova makasi?

EPAI YA TATA YA LIBOTA

  • Kotika likambo moko te epekisa bino kosala losambo na kati ya libota

  • Yebisáká bato ya libota na yo liboso makambo oyo bokolobela mpo bákoka komibongisa

  • Salá ete moto nyonso ya libota azala wana na ntango ya losambo

  • Salá yango na kimya mpo bato nyonso básepela

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto