Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 33 lok. 80-lok. 81 par. 1
  • Akokisi esakweli ya Yisaya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Akokisi esakweli ya Yisaya
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Akokisi esakweli moko ya Yisaya
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Okozimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yehova: Alingi boyengebene mpe kosambisa-sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Ye oyo naponi mpe oyo molimo na ngai endimi!”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 33 lok. 80-lok. 81 par. 1
Yesu azali koteya ebele ya bato oyo bazali na libongo na masuwa moko ya moke

MOKAPO 33

Akokisi esakweli ya Yisaya

MATAI 12:15-21 MARKO 3:7-12

  • EBELE YA BATO BAPUSANI PENE YA YESU

  • AKOKISI ESAKWELI YA YISAYA

Ntango Yesu ayoki ete Bafarisai ná bato ya Erode balingi koboma ye, ye ná bayekoli na ye balongwe wana, mpe bakei na Mbu ya Galile. Kuna, ebele ya bato bauti na Galile, na bingumba ya Tire mpe Sidone oyo ezali pembenipembeni ya mbu, na ɛsti ya ebale Yordani, na Yerusaleme mpe mosika na sudi na Idumea, bayei epai na ye. Yesu abikisi bato mingi. Yango wana, bato ya maladi ya makasi bazali kowelana. Balingi kozela te ete Yesu asimba bango, kasi bazali kowela mpo básimba ye.​—Marko 3:9, 10.

Bato yango bazali ebele mpenza, yango wana Yesu ayebisi bayekoli na ye báyela ye masuwa moko ya moke. Na ndenge yango, akoki kolongwa na libongo mpo bato yango bákanganakangana na ye te. Akoki mpe koteya bango esika azali na masuwa yango to kokende esika mosusu pembenipembeni ya ebale mpo na kosalisa bato ebele koleka.

Moyekoli Matai amonisi ete mosala ya Yesu ekokisi “likambo oyo elobamaki na nzela ya Yisaya mosakoli.” (Matai 12:17) Awa, Yesu akokisi esakweli nini?

“Talá! Mosaleli na ngai oyo naponi, oyo nalingá, oyo molimo na ngai endimi! Nakotya ye elimo na ngai, mpe akomonisa bikólo bosembo. Akoswana te, mpe akoganga makasi te, mpe moto moko te akoyoka mongongo na ye na babalabala ya minene. Akobuka te mongendu oyo efinamá, mpe akoboma te nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke, tii akolonga komonisa bosembo. Ya solo, bikólo bakolikya na nkombo na ye.”​—Matai 12:18-21; Yisaya 42:1-4.

Ya solo, Yesu azali mpenza mosaleli oyo Nzambe alingi mpe andimi. Amonisi polele bosembo ya solosolo, oyo mimeseno ya lokuta ya mangomba ezipi. Lokola Bafarisai bazali kosalela Mibeko ya Nzambe na ndenge na bango moko, bakoki ata kosalisa te moto oyo azali na maladi mokolo ya Sabata! Mpo Yesu amonisa bosembo ya Nzambe polele mpe amonisa ete azali na elimo ya Nzambe, alongoli bato kilo ya mimeseno oyo ezangá bosembo. Yango wana bakonzi ya mangomba balingi koboma ye. Ezali mpenza mawa!

Maloba “akoswana te, mpe akoganga makasi te, mpe moto moko te akoyoka mongongo na ye na babalabala ya minene,” elimboli nini? Ntango Yesu azali kobikisa bato, alingi ete bato to bademo “báyebisa te soki azali nani.” (Marko 3:12) Alingi te ete bato báyeba ye na bapiblisite na balabala to bápanza ye nsango oyo ebongi te, oyo bato batambwisaka na bilobaloba.

Lisusu, Yesu azali komema nsango ya kobɔndisa epai ya bato oyo bazali lokola mongendu oyo etutami, egumbami mpe ekweisami. Bato yango bazali lokola nsinga ya lini oyo ezali na mɔtɔ mpe etikali moke ekufa. Yesu anyati te mongendu oyo etutami to abomi te mɔtɔ oyo elingi kokufa. Kutu, na boboto mpe bolingo, azali nde kotombola bato ya komikitisa. Ya solo, Yesu azali mpenza moto oyo bikólo ekoki kotyela elikya!

  • Ndenge nini Yesu amonisi bosembo polele kozanga ete aswana to aganga na mongongo makasi na banzela minene?

  • Banani bazali lokola mongendu oyo etutami mpe nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke, mpe Yesu asaleli bango makambo ndenge nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto