Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 85 lok. 198-lok. 199 par. 1
  • Yesu abikisi moto mokolo ya Sabata

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu abikisi moto mokolo ya Sabata
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bafarisai baluki kokweisa moto oyo akufá miso
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Bafalisai baboyi kondima
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mokufeli miso abiki
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu abikisi moto oyo akufá miso banda kobotama
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 85 lok. 198-lok. 199 par. 1
Bafarisai bazali kotuna moto oyo akufaki miso liboso mituna

LITEYA 85

Yesu abikisi moto mokolo ya Sabata

Bafarisai bazalaki koyina Yesu, mpe bazalaki kolukela ye likambo mpo bákanga ye. Balobaki ete asengelaki te kobikisa bato ya maladi na mokolo ya Sabata. Na mokolo moko ya Sabata, Yesu amonaki moto moko oyo akufá miso azali kosɛngasɛnga na balabala. Ayebisaki bayekoli na ye ete: ‘Bótala ndenge nguya ya Nzambe ekobikisa moto oyo.’ Yesu asangisaki nsoi na ye ná putulu mpe esalaki pɔtɔpɔtɔ, na nsima apakolaki moto yango na miso. Yesu alobaki na ye boye: ‘Kende kosukola miso na yo na pisini ya Siloame.’ Mobali yango akendaki kosukola miso na ye, mpe yango nde ezalaki mbala ya liboso amona na bomoi na ye.

Bato bakamwaki. Balobaki: ‘Oyo ezali mobali oyo azalaki kofanda mpe kosɛngasɛnga awa, to ezali nde moto moko oyo akokani na ye?’ Mobali yango alobaki na bango ete: ‘Ngai nde moto nabotamaki miso ekufá!’ Bongo bato batunaki ye: ‘Ndenge nini okómi komona?’ Ntango ayebisaki bango makambo oyo esalemaki, bakendaki na ye epai ya Bafarisai.

Mobali yango ayebisaki Bafarisai ete: ‘Yesu atyaki ngai pɔtɔpɔtɔ ya mabele na miso mpe ayebisaki ngai nakende kosukola yango na mai. Nakendaki kosukola, mpe sikoyo nakómi komona.’ Bafarisai babandaki koloba: ‘Soki Yesu abikisi mokolo ya Sabata, nguya na ye euti epai ya Nzambe te.’ Basusu balobaki: ‘Soki nguya na ye euti epai ya Nzambe te, mbɛlɛ akoki kobikisa te.’

Bafarisai babengaki baboti ya mobali yango mpe batunaki bango boye: ‘Ndenge nini mwana na bino azali komona sikoyo?’ Baboti na ye babangaki mpo Bafarisai bayebisaki bato ete moto oyo akondimela Yesu, bakobengana ye na sinagoga. Yango wana bayanolaki: ‘Toyebi te. Bótuna ye moko.’ Bafarisai babandaki kotuna mobali yango mituna ebele tii alobaki na bango: ‘Nayebisi bino makambo nyonso oyo nayebi. Mpo na nini bozali kaka kotuna ngai?’ Bafarisai bayokaki nkanda mpe babwakaki ye libándá.

Bongo Yesu akendaki epai ya mobali yango, mpe atunaki ye: ‘Ozali kondimela Masiya?’ Moto yango azongisaki ete: ‘Nakondimela ye soki nayebi ye.’ Yesu alobaki: ‘Ngai nde Masiya.’ Yesu azalaki mpenza na boboto! Asukaki kaka na kobikisa ye te, kasi asalisaki ye mpe akóma na kondima.

“Bozali na libunga, mpo boyebi Makomami te, boyebi mpe nguya ya Nzambe te.”​—Matai 22:29

Mituna: Ndenge nini Yesu asalisaki mobali moko oyo akufá miso? Mpo na nini Bafarisai bayinaki Yesu?

Yoane 9:1-41

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto