Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 23 points 1-6
  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Okoki mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 23 points 1-6
Liteya 23. Bazindisi mwasi moko nzoto mobimba na mai mpo na kopesa ye batisimo mpe akómi Motatoli ya Yehova.

LITEYA 23

Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Yesu alobaki ete mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo. (Tángá Matai 28:19, 20.) Kasi batisimo ezali nini? Moto asengeli kosala nini mpo azwa batisimo?

1. Batisimo ezali nini?

Liloba “kobatisa” euti na liloba moko ya Grɛki oyo elakisi “kozindisa” na mai. Ntango Yoane abatisaki Yesu, azindisaki ye mobimba na ebale Yordani, mpe na nsima Yesu “abimaki na mai.” (Marko 1:9, 10) Ndenge moko na Yesu, bakristo ya solo bazwaka batisimo, elingi koloba, bazindisaka bango nzoto mobimba na kati ya mai.

2. Ntango moto azwi batisimo amonisaka nini?

Ntango moto azwi batisimo, amonisaka ete amipesi mobimba epai ya Yehova Nzambe. Ndenge nini moto amipesaka? Liboso azwa batisimo, moto yango asalaka libondeli mpe ayebisaka Yehova ete alingi kosalela ye bomoi na ye mobimba. Alakaka Yehova ete akosambela kaka ye mpe akoluka libosoliboso kosala mokano ya Nzambe na bomoi na ye. Moto yango andimaka ‘komiboya mpe . . . akobaka kolanda’ mateya mpe ndakisa ya Yesu. (Matai 16:24) Soki moto amipesi mpe azwi batisimo, akokóma moninga ya Yehova mpe ya bato oyo basambelaka Yehova.

3. Moto asengeli kosala nini liboso azwa batisimo?

Liboso ozwa batisimo, osengeli koyekola makambo ya Yehova mpe kokóma na kondima makasi epai na ye. (Tángá Baebre 11:6.) Ntango ozali kokolisa boyebi na yo mpe kokómisa kondima na yo makasi, okolinga Yehova mingi. Yango ekopesa yo mposa ya kotosa mibeko na ye mpe ya koyebisa bato mosusu makambo etali ye. (2 Timote 4:2; 1 Yoane 5:3) Ntango moto azali ‘komitambwisa na ndenge oyo ebongi na Yehova mpe kosepelisa ye mpenza,’ akoki kopesa bomoi na ye epai ya Nzambe mpe kozwa batisimo.​—Bakolose 1:9, 10.a

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba mateya oyo tokoki kozwa na batisimo ya Yesu mpe makambo oyo moto akoki kosala mpo azwa batisimo.

4. Tokoki kozwa mateya na batisimo ya Yesu

Tángá Matai 3:13-17 mpo na koyeba makambo mosusu etali batisimo ya Yesu. Mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yesu azalaki bebe ntango azwaki batisimo?

  • Ndenge nini babatisaki ye? Basopelaki ye kaka mwa matangá ya mai na motó?

Nsima ya kozwa batisimo, Yesu abandaki mosala ya ntina mingi oyo Nzambe apesaki ye. Tángá Luka 3:21-23 mpe Yoane 6:38, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nsima ya kozwa batisimo, mosala nini Yesu atyaki na esika ya liboso na bomoi na ye?

5. Okoki kozwa batisimo!

Okoki kobanga soki okanisi ete osengeli komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Kasi, soki okobi koyekola makambo mingi ya Yehova mpe oyebi ye malamumalamu, okotika kobanga mpe okozwa ekateli wana ya ntina mingi. Mpo na komona bato mosusu oyo basalaki bongo, talá VIDEO.

VIDEO: Ndenge oyo okoki kokóma moninga ya Yehova (1:11)

Tángá Yoane 17:3 mpe Yakobo 1:5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini ekoki kosalisa moto amibongisa mpo na batisimo?

A. Mwasi moko azali kobondela Nzambe mpo na komipesa epai na Ye. B. Bazindisi mwasi yango nzoto mobimba na mai mpo na kopesa ye batisimo mpe akómi Motatoli ya Yehova.
  1. Tomipesaka epai ya Yehova ntango toyebisaka ye na libondeli ete tolingi kosalela ye bomoi na biso mobimba

  2. Ntango tozali kozwa batisimo, tomonisaka epai ya bato oyo bazali kotala biso ete tomipesi epai ya Nzambe

6. Ntango moto azwi batisimo, akɔtaka na libota ya Yehova

Ntango moto azwi batisimo, akɔtaka na libota moko ya mokili mobimba oyo ezali na bomoko. Atako tofandi bisika ndenge na ndenge mpe tozali na mimeseno ndenge moko te, biso nyonso tondimaka mateya moko mpe totosaka mibeko ya Biblia. Tángá Nzembo 25:14 mpe 1 Petro 2:17, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Soki moto azwi batisimo, boyokani nini akozala na yango ná Yehova mpe ná bato mosusu oyo basambelaka ye?

Bililingi: Ndeko mwasi moko azali na esengo mpe azali kokanisa boyokani malamu oyo azali na yango ná bandeko ya lisangá. 1. Azali kosolola na ndeko mwasi moko. 2. Asimbi mobange moko mpo na kosalisa ye atambola. 3. Azali kolya elongo na baninga oyo bazali na bambula ekeseni. 4. Azali elongo na ndeko mwasi moko mpe bazali kosakwela mobali moko. 5. Azali kokanga fɔtɔ elongo na Batatoli mibale ya loposo mosusu na liyangani moko.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nakozwa batisimo sikoyo te.”

  • Soki yo mpe omonaka bongo, okanisi ete kozwa batisimo ezali likambo oyo ebongi mpenza osala?

NA MOKUSE

Yesu alobaki ete bakristo basengeli kozwa batisimo. Mpo moto azwa batisimo asengeli kokóma na kondima makasi epai ya Yehova, kotosa mibeko na ye, mpe komipesa epai na ye.

Bozongeli

  • Batisimo ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina?

  • Boyokani nini ezali kati na komipesa mpe batisimo?

  • Makambo nini moto asengeli kosala mpo amipesa mpe azwa batisimo?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba oyo batisimo elimboli mpe oyo yango elimboli te.

“Batisimo elimboli nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Zongelá makambo oyo moto asengeli kosala mpo azwa batisimo.

“Bolingo mpe botɔndi mpo na Yehova ekotinda yo ozwa batisimo” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 03/2020)

Talá ndenge mobali moko amonisi ete ekateli na ye ya kozwa batisimo eutaki na motema.

“Balingaki ngai moko namona oyo Biblia eteyaka mpenza” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2013)

Luká koyeba ntina oyo ebongi mpenza kozwa batisimo mpe makambo oyo okoki kosala mpo ozwa yango.

“Nasengeli kozwa batisimo?” (Mituna oyo bilenge batunaka ​—biyano oyo ebongi, Volimi 2, mokapo 37)

a Soki moto azwá batisimo na lingomba mosusu, asengeli lisusu kozwa batisimo. Mpo na nini? Mpo lingomba yango eteyaki ye te solo oyo ezali na Biblia.​—Talá Misala 19:1-5 mpe Liteya 13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto