Ntango mpo na koloba—Na likambo nini?
MARIE azali monganga na lopitalo. Asengeli kobomba sekele ya mosala, elingi koloba ete asengeli kobimisa mokanda te, ata likambo moko oyo etali mosala na ye epai na bato oyo bakoki te koyeba yango. Akoki mpe te, kobimisa sekele oyo etali bato bazali maladi kozanga ete atalela mobeko oyo ezali na mboka na ye.
Mokolo mosusu, Marie akutanaki na likambo monene. Wana ezalaki ye kotala mikanda ya bato na maladi, amonaki mikanda mizalaki kolobela kolongola zemi; nzokande moto oyo alongolaki zemi ezalaki bongo Témoin de Jéhovah lokola ye. Na kolandaka Biblia, azalaki na mokumba ya kobimisa likambo yango epai na bankulutu ya lisangá, mpe na bongo komitya na likama ya kobungisa mosala na ye, komityaka ye moko na likama to kotyaka patron na ye na liboso na bifundeli ya bisambiselo? To asengelaki kobomba likambo yango, liponi oyo mbala mosusu elingaki kolongisa Masese 11:13 oyo elobi: “Ye oyo akopalanganisa nsango mabe azipoli makambo na nkuku; nde ye oyo azali na elimo na solo akobomba likambo.”—Tala Masese 25:9, 10.
Ekomaka mbala mosusu ete ba Témoins de Jéhovah bakutanaka na makambo motindo boye. Lokola Marie, bazali komiyoka ete likanisi oyo ya mokonzi Salomon etali mpe bango: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe mpo na likambo na likambo na nse na moi; . . . ntango na kozala nye mpe ntango na koloba.” (Mosakoli 3:1, 7) Mpo na Marie, ezalaki ntango ya kozala nye, to ntango ya koloba likambo oyo ye amonaki?a
Lokola makambo makoki kokesena mpenza, ekoki kosalema te ete topesa nzela moko ya kolanda mpo na likambo nyonso, lokola soko bato nyonso basengeli kolanda ndakisa ya Marie. Ya solo, moklisto nyonso, soko mokolo mosusu akomi na likambo motindo oyo, asengeli komibongisa mpo na kotalela makambo nyonso oyo esangani na likambo oyo ebimi. Esengeli na ye mpe kozwa ekateli oyo ekotalela mpe mitinda ya Biblia mpe mibeko ya mboka, mpe oyo ekopesa ye nzela ya kobatela lisosoli malamu liboso na Jéhovah. (1 Timote 1:5, 19) Soko lisumu ezali monene te mpe esalemi mpo na ezaleli ya kozanga kokoka ya bomoto, etinda oyo ekosalelama: “Mpo ete bolingo ekozipaka ebele na masumu.” (1 Petelo 4:8) Nzokande, soko emonani ete libunga moko ya monene esalemaki, moklisto oyo azali sembo asengeli kobimisa likambo oyo ayebi, mpo na bolingo oyo azali na yango epai na Nzambe mpe epai ya moninga na ye moklisto, mpo ete mosumuki azwa lisalisi mpe ete bopeto ya lisanga ebatelama.
Kosalela mitinda ya Biblia
Mitinda nini ya Biblia ekosalelama? Ya liboso, etinda oyo elobi ete moto asali libunga monene akoki komeka kobomba yango te. “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango akozwa ngolu.” (Masese 28:13) Jéhovah azali komona makambo nyonso; akozanga te kozongisa monoko mpo na libunga nyonso ebombami (Masese 15:3; 1 Timoté 5:24, 25) Mbala mosusu, akosala na boye ndeko moko ya lisangá ayeba lisumu oyo ebombami mpo ete batalela yango na ndenge esengeli.—Yosua 7:1-26.
Tozali na etinda mosusu ya Biblia kati na Levitike 5:1; “Soko moto asali mabe, eyoki ye ndai na kobyanga ye kotatola likambo limoni ye to liyebi ye, nde ye alobi yango te, mbe akomema lisumu na ye.” “Ndai to kolakelama mabe oyo esalemaki na miso na bato” ezalaki kofinga te. Ezalaki kosalema mpenza ete moto oyo basaleli ye mabe abyanga batemwe oyo bakokaki komona likambo yango (mpo ete basalisa ye ete likambo na ye ekatama malamu), mpe kobimisa maloba na kosengaka lisalisi ya Jéhovah epai na moto oyo ayebani te, oyo asalelaki ye mabe. Ezalaki lolenge moko ya kokatisa ndai epai na baoyo bazalaki koyoka ye. Na yango, moto nyonso oyo amonaki libunga akoyeba bongo nani nde basalelaki ye mabe mpe ekozala mokumba na ye ete amibimisa mpo na kotanga moto asali mabe. Soko te, “akomema lisumu” liboso na Jéhovah.b
Etinda oyo eutaki epai na Mokonzi aleki likolo ya molongo epesaki epai na Moyisraele mokomoko mokumba ya koyebisa epai na bazuzi libunga nyonso ya monene oyo amonaki, mpo ete likambo yango etalelama. Atako baklisto bazali lisusu mpenza na nse ya Mobeko na Moise te, mitinda ya Mobeko yango ezali ntango nyonso kosalelama kati na lisangá ya boklisto. Mpo na yango, ekoki kokoma ete moklisto azala na mokumba ya koyebisa likambo epai na bankulutu. Ya solo, na mikili mingi ezali kobuka mobeko soko oyebisi epai na bato oyo bazangi lotomo ya koyeba makambo mazali kati na mikanda oyo misengeli kobombama. Kasi soko, nsima na kokanisa malamu na likambo yango kati na libondeli, moklisto amoni ete azali liboso na likambo oyo mobeko na Nzambe esengi ye ete abimisa likambo oyo ayebi ata soko bakonzi ya mokili mpe bapesi mibeko na bango, wana ezali mokumba oyo azali na yango na miso na Jéhovah. Ezali na bantango oyo moklisto “asengeli kotosa Nzambe, lokola mokonzi, liboso na kotosa bato”.—Misala 5:29.
Ata ndai, to elaka esalemi na miso ya bato nyonso, ezali likambo moke te, ekoki kosalema ete likatami esalemi epai na bato ekesena na mobeko oyo elobi ete Nzambe azali kosenga bokangami makasi. Ntango moto asali lisumu ya monene, akwei mpenzampenza na ‘kolakelama mabe’ esalemi na Ye oyo basaleli ye mabe, Jéhovah Nzambe. (Deteronome 27:26; Masese 3:33) Baoyo nyonso bazali kokoma basangani ya lisangá ya boklisto bazali bongo kokata “ndai” oyo ezali kosenga bango ete babatela bopeto ya lisangá, ezala na etamboli na bango moko to na lolenge oyo bakosalisa baninga na bango ete batikala peto.
Mokumba ya moto na moto
Ezali wana mwa mitinda ya Biblia oyo Marie atalelaki mpo na kozwa ekateli na ye. Mayele etindaki ye ete asala makambo mbangombango te, kozanga ete atalela malamumalamu liboso makambo nyonso. Biblia ezali kopesa toli oyo: “Zala motatoli na mpo na kokitisa mozalani na yo mpamba te; zimbisama na bibebu na yo te.” (Masese 24:28) Mpo na komonisa likambo na lolenge ya sikisiki, osengeli kozala na litatoli ata ya batemwe mibale oyo bamonaki likambo yango. (Deteronome 19:15) Soki Marie amonaki bobele mwa elembo moke na ntina ya kolongola zemi, asengelaki kozwa ekateli na koyebaka ete na komonana bobele ya elembo ya lisumu asengelaki komema yango mosika te. Ekokaki mbala mosusu kozala libunga ya facture, to mpe lisusu, ba dossiers ekokaki komonisa makambo na motindo moko ya kokoka te.
Kasi, kati na ndakisa oyo, Marie azalaki na bilembo mingi ya sikisiki. Nzokande, ayebaki ete moklisto yango afutaki mosolo na ye mpo na opération, ezali mpo na yango ayebaki mpenzampenza ete basalaki ye opération oyo ekomamaki na mikanda. Marie ayebaki lisusu ete moklisto yango ya mwasi azalaki na mobali te, yango endimisaki ye ete asalaki pite. Mpo na bolingo na ye, Marie alingaki kosalisa moklisto wana ya mwasi oyo asalaki libunga mpe kobatela bopeto ya lisangá na Jéhovah, mpamba te azalaki kokanisa na Masese 14:25; “Motatoli na sembo akobikisaka milimo; nde ye oyo akozimbisa akolobaka nkuta.”
Marie azalaki kobanga mwa moke ndenge makambo makokaki kobaluka na kotalela mibeko, kasi ayebaki ete kati na likambo wana mitinda ya Biblia mizalaki na bolongi likolo na mobeko oyo ezalaki kosenga ye na kobatela sekele ya mikanda ya lopitalo. Amilobaki ete moklisto ya mwasi oyo asalaki libunga akokangela ye nkanda te mpe akomeka kozongisa mabe mpo na mabe te na kobendela ye mindondo. Lisusu, nsima na kotalela makambo nyonso wana, Marie asukisaki na motema moko ete ezalaki wana ntango mpo na “koloba”, kasi “mpo na kokanga monoko” te.
Na bongo ekateli mosusu ya kokamata ezalaki: Marie asengelaki koloba epai na nani, mpe ndenge nini asengelaki kosala yango na motindo ya mayele? Akokaki koloba yango mbala moko epai na bankulutu, kasi amonaki malamu ete akende liboso koloba na ndeko na ye ya mwasi moklisto na nkuku. Ezalaki bongo elembo ya bolingo; ya solo, azalaki komiloba, mbala mosusu ndeko mwasi yango akosalela libaku yango mpo na komonisa polele ndenge makambo mazali to, soki asalaki libunga, akondima mabe oyo ye asalaki. Soki moklisto wana ya mwasi asilaki koyebisa libunga na ye epai na bankulutu, ezali polele ete akoyebisa ye yango, mpe Marie akozala lisusu na ntina ya komema likambo yango mosika te. Kasi, soko mpenza alongolaki zemi, ayambolaki te libunga monene wana ndenge abukaki mobeko na Nzambe, Marie alingaki kolendisa ye na ntina yango, mpo ete bankulutu bakoka kosalisa ye, ndenge elobami na mokapo ya Yakobo 5:13-20. Ezali esengo mpo ete makambo malekaki motindo yango. Ndeko mwasi yango ayebisaki Marie ete azwaki ekateli ya kolongola zemi mpo ete batyelaki ye molunge mpe azalaki na makasi mingi te na elimo. Mpo na nsoni mpe mpo na kobanga, abombaki lisumu na ye, kasi andimaki na motema na ye moko mpo na kokende kokutana na bankulutu mpo na koluka lisalisi na ntina na kolongono na ye ya elimo.
Soki Marie akendeki liboso koyebisa likambo yango epai na lisangani ya bankulutu, bango mpe lokola ye balingaki kozala liboso ya mokakatano. Likambo nini basengelaki kosala nsima ya koyeba sekele yango? Basengelaki kozwa ekateli na kotalelaka makambo oyo, engebene bango, Jéhovah mpe Liloba na ye bazali kosenga epai na babateli na mpate lokola bango. Soki likambo yango etalaki moklisto moko oyo azwa batisimo mpe azali kosangana na mosala ya lisangá, basengelaki, lokola esalaki yango Marie, koluka elembeteli mpo na kondima soki basengelaki kokende mosika. Soki bamonaki ete “fulu” mabe elingi kobebisa lisangá, mbala mosusu basengelaki kozwa ekateli ya kosala komité ya kosambisa mpo na koyeba na bozindo likambo yango. (Bagalatia 5:9, 10) Nzokande, soki bamonaki ete moto yango oyo asalaki libunga amilongoli na lisangá mpe azali koya lisusu na makita te mpe azali komitalela lisusu lokola Témoin de Jéhovah te, mbala mosusu basengelaki kozela naino ete abanda komimonisa lisusu lokola Témoin liboso ya kosala ata soki likambo nini.
Kokana liboso ezali malamu
Ba patrons na misala bazali na lotomo ya kozela epai na bato na bango ya mosala oyo bazali baklisto ete ‘bamonisa bosembo ya kokoka’, bakisa mpe botosi mpo na kobatela basekele ya mosala. (Tito 2:9, 10) Soki moklisto moko akati ndai, asengeli kotalela yango na bopotu te. Ndai ezali kokomisa elaka kilo koleka mpe ekoki kobongwana te. (Nzembo 24:4) Mpe ntango mobeko esengi basekele ya mosala ebatelama, likambo yango ezali liseki te. Na yango, liboso ya kokata ndai to ya komikotisa kati na sekele ya mosala, ezala na boyokani na mosala na ye to mpe soki na likambo nini mosusu, moklisto akomonisa mayele mpe akokana, nokinoki, makama nini komikotisa na ye kati na likambo yango ekoki kobimisa soki kozanga boyokani emonani kati na mibeko ya bato mpe ya Biblia. Akosala ndenge nini soki Témoin de Jéhovah moko ayei kosenga lisalisi epai na ye? Mingimingi, misala oyo mizali mpenza na makama motindo boye ezali oyo etali misala ya minganga, ya ba hopitaux, ba tribunaux mpe ya ba avocats. Tokoki kotiola mibeko ya Kaisala te to mpe na motindo malamu oyo tosengeli kotalela ndai, nzokande atako bongo mibeko ya Jéhovah ezali likolo ya mibeko nyonso wana mosusu.
Koyebaka liboso likambo oyo ekoki kobima, ba Témoins mosusu oyo bazali ba avocats, minganga, ba comptables, bongo na bongo, bakomaki mitinda oyo basengeli kolanda kati na likambo yango mpe batangisaki yango epai na ba Témoins de Jéhovah baoyo bazali koya epai na bango liboso ete bayebisa bango ata likambo nini oyo bazali na yango lokola sekele. Na boye, emonani polele ete moto oyo asali libunga akolendisama mpo na kokende koloba libunga na ye epai na bankulutu ya lisangá na ye mpe ete, soki asali yango te, conseiller to mopesi-toli akozala na mokumba ya kokende koloba yango ye moko epai na bankulutu.
Ekoki kosalema ete, lokola apusami na bikateli na ye moko oyo bitongami likolo na boyebi na ye ya Liloba na Nzambe, mosaleli ya sembo na Nzambe azwi ekateli ya kolongola, to ya kobuka mobeko ya kobatela sekele ya mosala mpo ete mobeko ya Nzambe enyati yango. Mpo na yango esengeli na ye komonisa mpiko mpe mayele. Mokano ezali ya kobebisa bonsomi ya bamosusu te, kasi ya kosalisa baoyo bazali kobunga mpe ye kobatela bopeto ya lisangá na boklisto. Tosengeli kokanga miso likolo na mabunga mikemike oyo ebimi mpo na bolembu ya nzoto. Kati na likambo ya boye, “bolingo ezali kozipa ebele na masumu”, mpe tosengeli kolimbisa “kino mbala ntuku nsambo na nsambo”. (Matai 18:21, 22) Wana ezali “ntango ya kokanga monoko”. Nzokande, ntango moto moko ameki kobomba libunga ya monene, tokoki koloba ete “ezali ntango mpo na koloba”.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo ya Marie, todefi yango kodefa, kasi likambo oyo akutani na yango esila kokomela baklisto. Likambo oyo ye akosala emonisi ndenge bamoko basalelaki mitinda ya Biblia na makambo motindo boye.
b Kati na mokanda na bango Commentaire de l’Ancien Testament (Angl.), MM. Keil mpe Delitzsch bandimi ete “moto nyonso oyo ayebaki mabe esalemaki epai na moto mosusu (ezala amonaki to ayokaki) mpe, mpo na yango, asengelaki kotatola liboso na esambiselo mpo na kobimisa libunga ya moto oyo asalaki mabe, soko asali bongo te, ezalaki lisumu mpo na ye. Abombaki bongo makambo oyo ye amonaki to ayokaki, nzokande na ntango ankete esalemaki epai na bato nyonso, ayokaki mosambisi kobenga bato oyo bayebaki mwa likambo na mbeba oyo esalemaki ete baya kotatola.”
[Elilingi na lokasa 24]
Ezaleli ebongi mpe etondi na bolingo ezali oyo ya kolendisa moklisto oyo asali libunga ete akenda koyambola libunga na ye epai na bankulutu, kozalaka na elikya ete bakotalela likambo yango na boboto nyonso mpe na komityaka na esika na ye